Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Batesaloniki 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Batesaloniki

      • Bókoba kobondela (1-5)

      • Likebisi mpo na kotambola na mobulu te (6-15)

      • Mbote ya nsuka (16-18)

2 Batesaloniki 3:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ap. A5.

Mitindami

  • +Ro 15:30; 1Te 5:25; Ebr 13:18
  • +Mis 19:20; 1Te 1:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/1991, lok. 23

2 Batesaloniki 3:2

Mitindami

  • +Yis 25:4
  • +Mis 28:24; Ro 10:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2009, lok. 8

    15/5/1998, lok. 10

2 Batesaloniki 3:5

Mitindami

  • +1Yn 5:3
  • +Lk 21:19; Ro 5:3

2 Batesaloniki 3:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mateya.”

  • *

    To mbala mosusu, “bazwaki.”

Mitindami

  • +1Te 5:14
  • +1Ko 11:2; 2Te 2:15; 3:14

2 Batesaloniki 3:7

Mitindami

  • +1Ko 4:16; 1Te 1:6

2 Batesaloniki 3:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpe tolyaki eloko ya moto te kozanga kofuta.”

Mitindami

  • +Mis 20:34
  • +Mis 18:3; 1Ko 9:14, 15; 2Ko 11:9; 1Te 2:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    12/2019, lok. 5

2 Batesaloniki 3:9

Mitindami

  • +Mt 10:9, 10; 1Ko 9:6, 7
  • +1Ko 11:1; Flp 3:17

2 Batesaloniki 3:10

Mitindami

  • +1Te 4:11, 12; 1Ti 5:8

2 Batesaloniki 3:11

Mitindami

  • +1Te 5:14
  • +1Ti 5:13; 1Pe 4:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 232

2 Batesaloniki 3:12

Mitindami

  • +Ef 4:28

2 Batesaloniki 3:14

Mitindami

  • +2Te 3:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Tobongisami, nk. 144-145

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    11/2016, lok. 12

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/1999, nk. 29-31

2 Batesaloniki 3:15

Mitindami

  • +1Te 5:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    11/2016, lok. 12

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/1999, lok. 30

2 Batesaloniki 3:16

Mitindami

  • +Yn 14:27

2 Batesaloniki 3:17

Mitindami

  • +1Ko 16:21; Kol 4:18

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Tes. 3:1Ro 15:30; 1Te 5:25; Ebr 13:18
2 Tes. 3:1Mis 19:20; 1Te 1:8
2 Tes. 3:2Yis 25:4
2 Tes. 3:2Mis 28:24; Ro 10:16
2 Tes. 3:51Yn 5:3
2 Tes. 3:5Lk 21:19; Ro 5:3
2 Tes. 3:61Te 5:14
2 Tes. 3:61Ko 11:2; 2Te 2:15; 3:14
2 Tes. 3:71Ko 4:16; 1Te 1:6
2 Tes. 3:8Mis 20:34
2 Tes. 3:8Mis 18:3; 1Ko 9:14, 15; 2Ko 11:9; 1Te 2:9
2 Tes. 3:9Mt 10:9, 10; 1Ko 9:6, 7
2 Tes. 3:91Ko 11:1; Flp 3:17
2 Tes. 3:101Te 4:11, 12; 1Ti 5:8
2 Tes. 3:111Te 5:14
2 Tes. 3:111Ti 5:13; 1Pe 4:15
2 Tes. 3:12Ef 4:28
2 Tes. 3:142Te 3:6
2 Tes. 3:151Te 5:14
2 Tes. 3:16Yn 14:27
2 Tes. 3:171Ko 16:21; Kol 4:18
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Batesaloniki 3:1-18

Mokanda ya mibale epai ya Batesaloniki

3 Mpo na kosukisa, bandeko, bókoba kobondela mpo na biso,+ mpo liloba ya Yehova* ekoba kopalangana nokinoki+ mpe kokumisama kaka ndenge ezali epai na bino, 2 mpe tozali kobondela ete Nzambe abikisa biso na bato oyo bayokisaka mpasi mpe bato mabe,+ mpo bato nyonso te nde bazalaka na kondima.+ 3 Kasi Nkolo azali sembo, mpe akopesa bino makasi mpe akobatela bino na moto mabe. 4 Lisusu, tozali kotyela bino motema na kati ya Nkolo, ete bozali kosalela mpe bokokoba kosalela malako oyo tozali kopesa bino. 5 Tiká ete Nkolo asalisa bino bólinga Nzambe+ mpe bóyika mpiko+ mpo na Kristo.

6 Bandeko, tozali kopesa bino malako na nkombo ya Nkolo Yesu Kristo, ete bókima ndeko nyonso oyo azali kotambola na mobulu+ kasi te na kolanda momeseno* oyo bozwaki* epai na biso.+ 7 Mpo bino moko boyebi ndenge oyo bosengeli komekola biso,+ mpo tomitambwisaki te na mobulu na kati na bino 8 mpe tolyaki eloko ya moto ofele te.*+ Kasi, na mosala makasi mpe na mitoki butu moi tozalaki kosala mosala mpo na komemisa moto moko te na kati na bino kilo monene na makasi.+ 9 Ezali te mpo tozali na bokonzi te,+ kasi tolingaki nde kozala ndakisa epai na bino mpo bómekola biso.+ 10 Kutu ntango tozalaki elongo na bino, tozalaki kopesa bino etinda oyo: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.”+ 11 Mpo tozali koyoka ete bato mosusu bazali kotambola na mobulu na kati na bino,+ bazali kosala mosala ata moke te, kasi bazali nde komikɔtisa na makambo oyo etali bango te.+ 12 Epai ya bato wana tozali kopesa etinda mpe elendiseli na kati ya Nkolo Yesu Kristo ete: básala mosala na kimya mpe bálya bilei oyo bango moko bazwi.+

13 Nde bino, bandeko, bótika te kosala makambo ya malamu. 14 Kasi soki moto moko atosi te makambo oyo tolobi na mokanda oyo, bótya moto yango elembo, bótika kosangana na ye,+ mpo ayoka nsɔni. 15 Atako bongo bótalela ye te lokola monguna, kasi bókoba nde kokebisa ye+ lokola ndeko.

16 Tiká ete Nkolo ya kimya ye moko apesa bino ntango nyonso kimya na ndenge nyonso.+ Nkolo azala na bino nyonso.

17 Oyo ezali mbote na ngai, Paulo, nakomi yango na lobɔkɔ na ngai moko,+ yango ezali elembo na mikanda na ngai nyonso; wana ezali ndenge nakomaka.

18 Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto