Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Ntango

      • Batye Sanduku na hema (1-6)

      • Davidi asali nzembo ya kopesa matɔndi (7-36)

        • “Yehova akómi Mokonzi!” (31)

      • Mosala oyo basalaka liboso ya Sanduku (37-43)

1 Ntango 16:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +1Ba 8:1; 1Nt 15:1
  • +2Sa 6:17-19; 1Ba 8:5

1 Ntango 16:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Le 1:3
  • +Le 3:1

1 Ntango 16:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpo bákundwelaka bato.”

Mitindami

  • +Mit 18:2

1 Ntango 16:5

Mitindami

  • +1Nt 6:31, 39
  • +1Nt 15:18
  • +1Nt 15:21
  • +1Nt 15:17, 19

1 Ntango 16:7

Mitindami

  • +1Nt 6:31, 39

1 Ntango 16:8

Mitindami

  • +Nz 106:1
  • +Nz 67:2; 105:1-6; Yis 12:4

1 Ntango 16:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bóbɛta miziki mpo na ye.”

  • *

    To mbala mosusu, “Bólobela.”

Mitindami

  • +2Sa 23:1; Ef 5:19
  • +Nz 107:43

1 Ntango 16:10

Mitindami

  • +Le 22:32; Yis 45:25; Yir 9:24
  • +1Nt 28:9; Flp 4:4

1 Ntango 16:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kozala; kondimama.”

Mitindami

  • +Am 5:4; Sef 2:3
  • +Nz 24:5, 6

1 Ntango 16:12

Mitindami

  • +Nz 111:2-4

1 Ntango 16:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Yis 41:8
  • +Nz 135:4

1 Ntango 16:14

Mitindami

  • +Nz 95:7
  • +Nz 105:7-11

1 Ntango 16:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Liloba oyo apesaki mitindo.”

Mitindami

  • +Mib 7:9

1 Ntango 16:16

Mitindami

  • +Eb 15:18; 17:1, 2
  • +Eb 26:3-5

1 Ntango 16:17

Mitindami

  • +Eb 28:14

1 Ntango 16:18

Mitindami

  • +Eb 12:7; 17:8; 35:12
  • +Mib 32:8

1 Ntango 16:19

Mitindami

  • +Eb 34:30; Mib 26:5; Nz 105:12-15

1 Ntango 16:20

Mitindami

  • +Eb 20:1; 46:6

1 Ntango 16:21

Mitindami

  • +Eb 31:7, 42
  • +Eb 12:17; 20:3

1 Ntango 16:22

Mitindami

  • +Eb 20:7

1 Ntango 16:23

Mitindami

  • +Nz 40:10; 96:1-6

1 Ntango 16:25

Mitindami

  • +Kob 15:11

1 Ntango 16:26

Mitindami

  • +Yis 45:20; 1Ko 8:4
  • +Yis 44:24

1 Ntango 16:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lokumu.”

Mitindami

  • +Mib 33:26; Nz 8:1
  • +1Ti 1:11

1 Ntango 16:28

Mitindami

  • +Nz 68:34; 96:7-13

1 Ntango 16:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Bósambela.”

  • *

    To mbala mosusu, “mpo na nkembo ya bosantu na ye.”

Mitindami

  • +Mib 28:58; Ne 9:5; Nz 148:13
  • +1Nt 29:3-5; Mt 5:23
  • +Mib 26:10

1 Ntango 16:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Mabele oyo ebotaka.”

  • *

    To, “kotengatenga te.”

Mitindami

  • +Nz 104:5; Mos 1:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2005, nk. 10-11

1 Ntango 16:31

Mitindami

  • +Nz 97:1
  • +Em 19:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2014, nk. 10-11

1 Ntango 16:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ayei.”

1 Ntango 16:34

Mitindami

  • +2Nt 5:13; Lk 18:19
  • +Nz 103:17; Yir 31:3; Bil 3:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2002, lok. 11

1 Ntango 16:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “tósepela na masanzoli na yo.”

Mitindami

  • +Nz 68:20
  • +Nz 122:4
  • +Yis 43:21

1 Ntango 16:36

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Seko na seko.”

  • *

    To, “Ezala bongo!”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 9

1 Ntango 16:37

Mitindami

  • +1Nt 15:16, 17
  • +1Nt 16:4-6
  • +Kob 29:38; 2Nt 13:11; Ezr 3:4

1 Ntango 16:39

Mitindami

  • +1Nt 12:28
  • +1Ba 3:4

1 Ntango 16:40

Mitindami

  • +Kob 29:39; 2Nt 2:4

1 Ntango 16:41

Mitindami

  • +1Nt 25:1
  • +1Nt 16:4
  • +2Nt 5:13; Ezr 3:11

1 Ntango 16:42

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bibɛtɛlo ya nzembo ya.”

Mitindami

  • +1Nt 6:31, 33; 15:16, 17
  • +1Nt 25:1, 3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Nt. 16:11Ba 8:1; 1Nt 15:1
1 Nt. 16:12Sa 6:17-19; 1Ba 8:5
1 Nt. 16:2Le 1:3
1 Nt. 16:2Le 3:1
1 Nt. 16:4Mit 18:2
1 Nt. 16:51Nt 6:31, 39
1 Nt. 16:51Nt 15:18
1 Nt. 16:51Nt 15:21
1 Nt. 16:51Nt 15:17, 19
1 Nt. 16:71Nt 6:31, 39
1 Nt. 16:8Nz 106:1
1 Nt. 16:8Nz 67:2; 105:1-6; Yis 12:4
1 Nt. 16:92Sa 23:1; Ef 5:19
1 Nt. 16:9Nz 107:43
1 Nt. 16:10Le 22:32; Yis 45:25; Yir 9:24
1 Nt. 16:101Nt 28:9; Flp 4:4
1 Nt. 16:11Am 5:4; Sef 2:3
1 Nt. 16:11Nz 24:5, 6
1 Nt. 16:12Nz 111:2-4
1 Nt. 16:13Yis 41:8
1 Nt. 16:13Nz 135:4
1 Nt. 16:14Nz 95:7
1 Nt. 16:14Nz 105:7-11
1 Nt. 16:15Mib 7:9
1 Nt. 16:16Eb 15:18; 17:1, 2
1 Nt. 16:16Eb 26:3-5
1 Nt. 16:17Eb 28:14
1 Nt. 16:18Eb 12:7; 17:8; 35:12
1 Nt. 16:18Mib 32:8
1 Nt. 16:19Eb 34:30; Mib 26:5; Nz 105:12-15
1 Nt. 16:20Eb 20:1; 46:6
1 Nt. 16:21Eb 31:7, 42
1 Nt. 16:21Eb 12:17; 20:3
1 Nt. 16:22Eb 20:7
1 Nt. 16:23Nz 40:10; 96:1-6
1 Nt. 16:25Kob 15:11
1 Nt. 16:26Yis 45:20; 1Ko 8:4
1 Nt. 16:26Yis 44:24
1 Nt. 16:27Mib 33:26; Nz 8:1
1 Nt. 16:271Ti 1:11
1 Nt. 16:28Nz 68:34; 96:7-13
1 Nt. 16:29Mib 28:58; Ne 9:5; Nz 148:13
1 Nt. 16:291Nt 29:3-5; Mt 5:23
1 Nt. 16:29Mib 26:10
1 Nt. 16:30Nz 104:5; Mos 1:4
1 Nt. 16:31Nz 97:1
1 Nt. 16:31Em 19:6
1 Nt. 16:342Nt 5:13; Lk 18:19
1 Nt. 16:34Nz 103:17; Yir 31:3; Bil 3:22
1 Nt. 16:35Nz 68:20
1 Nt. 16:35Nz 122:4
1 Nt. 16:35Yis 43:21
1 Nt. 16:371Nt 15:16, 17
1 Nt. 16:371Nt 16:4-6
1 Nt. 16:37Kob 29:38; 2Nt 13:11; Ezr 3:4
1 Nt. 16:391Nt 12:28
1 Nt. 16:391Ba 3:4
1 Nt. 16:40Kob 29:39; 2Nt 2:4
1 Nt. 16:411Nt 25:1
1 Nt. 16:411Nt 16:4
1 Nt. 16:412Nt 5:13; Ezr 3:11
1 Nt. 16:421Nt 6:31, 33; 15:16, 17
1 Nt. 16:421Nt 25:1, 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Ntango 16:1-43

Mokanda ya liboso ya Ntango

16 Bongo bamemaki Sanduku ya Nzambe ya solo mpe batyaki yango na kati ya hema oyo Davidi atɛlɛmisaki mpo na yango;+ na nsima bapesaki makabo ya kotumba mpe bambeka ya kimya* liboso ya Nzambe ya solo.+ 2 Ntango Davidi asilisaki kopesa makabo ya kotumba+ mpe bambeka ya kimya,*+ apambolaki bato na nkombo ya Yehova. 3 Lisusu, akabolelaki Bayisraele nyonso, ezala mobali to mwasi, moto na moto limpa moko ya libungutulu, gato moko ya mbuma ya date, mpe gato moko ya mbuma ya vinyo. 4 Na nsima atyaki Balevi mosusu mpo básalaka liboso ya Sanduku ya Yehova,+ mpo bákumisaka* Yehova Nzambe ya Yisraele, bápesaka ye matɔndi, mpe básanzolaka ye. 5 Asafe+ azalaki motambwisi, mpe Zekaria azalaki kosalisa ye. Yeyele, Shemiramote, Yehiele, Matitia, Eliabe, Benaya, Obede-edome mpe Yeyele+ bazalaki kobɛta bibɛtɛlo ya bansinga ná banzɛnzɛ;+ Asafe azalaki kobɛta basɛmbalɛ,+ 6 mpe Benaya ná Yahaziele, oyo bazalaki banganga-nzambe, bazalaki kobɛta bakelelo ntango nyonso liboso ya sanduku ya kondimana ya Nzambe ya solo.

7 Ezalaki na mokolo wana nde mpo na mbala ya liboso Davidi asalaki loyembo mpo na kopesa Yehova matɔndi na nzela ya Asafe+ mpe bandeko na ye:

8 “Bópesa Yehova matɔndi,+ bóbelela nkombo na ye,

Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye!+

9 Bóyembela ye, bóyemba mpo na kosanzola ye,*+

Bókanisa na mozindo* misala na ye nyonso ya kokamwa.+

10 Bómikumisa mpo na nkombo na ye mosantu.+

Mitema ya baoyo bazali koluka Yehova esepela.+

11 Bóluka Yehova+ mpe makasi na ye.

Bóluka elongi* na ye ntango nyonso.+

12 Bókanisa lisusu misala ya kokamwa oyo asalá,+

Makamwisi na ye mpe bikateli ya lisambisi oyo alobá,

13 Bino libota* ya Yisraele mosaleli na ye,+

Bino bana ya Yakobo, baoyo ye aponá.+

14 Ye azali Yehova Nzambe na biso.+

Bikateli na ye ya lisambisi etali mabele mobimba.+

15 Bókanisaka kondimana na ye mpo na libela,

Elaka oyo apesaki,* mpo na mabota nkóto,+

16 Kondimana oyo asalaki na Abrahama,+

Mpe ndai oyo alapaki epai ya Yisaka,+

17 Oyo atyaki mpo ezala mobeko mpo na Yakobo,+

Mpe ezala kondimana oyo ekoumela libela mpo na Yisraele,

18 Ntango alobaki: ‘Nakopesa yo mokili ya Kanana+

Mpo ezala libula oyo bapesi yo.’+

19 Yango ezalaki ntango bozalaki kaka bato moke,

Ɛɛ, moke mpenza, mpe bozalaki bapaya na mokili yango.+

20 Bazalaki kotambolatambola longwa na ekólo moko tii na ekólo mosusu,

Longwa na bokonzi moko tii na bato ya ekólo mosusu,+

21 Apesaki moto moko te nzela anyokola bango,+

Kutu apamelaki bakonzi mpo na bango,+

22 Alobaki: ‘Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta,

Mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.’+

23 Bóyembela Yehova, mabele mobimba!

Mokolo na mokolo, bóyebisa lobiko na ye!+

24 Bósakola nkembo na ye na kati ya bikólo,

Misala na ye ya kokamwa na kati ya bato ya bikólo nyonso.

25 Mpo Yehova azali monene mpe abongi kosanzolama mingi mpenza.

Azali nsɔmɔ koleka banzambe mosusu nyonso.+

26 Banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba,+

Kasi Yehova nde asalá likoló.+

27 Bonene* mpe nkembo ezali na esika oyo ye azali;+

Bokasi mpe esengo ezali na esika oyo afandaka.+

28 Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, bino mabota ya bato ya bikólo,

Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, mpo na nkembo mpe bokasi na ye.+

29 Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye;+

Bómema likabo mpe bókɔta liboso na ye.+

Bógumbamela* Yehova na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu.*+

30 Bólɛnga liboso na ye, mabele mobimba!

Mabele* epikami makasi; ekoki koningana te.*+

31 Likoló esepela, mpe mabele ezala na esengo;+

Bósakola na kati ya bikólo ete: ‘Yehova akómi Mokonzi!’+

32 Mbu enguluma lokola nkake mpe biloko nyonso oyo etondi kuna;

Esobe ná biloko nyonso oyo ezali kuna esepela.

33 Kaka na ntango yango, banzete ya zamba eganga na esengo liboso ya Yehova,

Mpo azali koya* kosambisa mabele.

34 Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

35 Bóloba: ‘Bikisá biso, Ee Nzambe, mobikisi na biso,+

Yanganisá biso mpe sikolá biso na bikólo,

Mpo tókumisa nkombo na yo mosantu+

Mpe tósanzola yo na esengo.*+

36 Yehova Nzambe ya Yisraele asanzolama

Libela na libela.’”*

Mpe bato nyonso balobaki, “Amen!”* mpe basanzolaki Yehova.

37 Na nsima Davidi atikaki Asafe+ ná bandeko na ye liboso ya sanduku ya kondimana ya Yehova mpo bákoba kosala liboso ya Sanduku,+ na kolanda misala ya mokolo na mokolo.+ 38 Atyaki Obede-edome ná bandeko na ye, mibali 68, mpe Obede-edome mwana ya Yedutune ná Hosa bázala bakɛngɛli ya baporte; 39 mpe atikaki nganga-nzambe Zadoke+ ná banganga-nzambe oyo bazalaki kosala ná ye liboso ya tabernakle ya Yehova na esika oyo etombwaná, na Gibeone,+ 40 mpo na kopesa Yehova makabo ya kotumba mbala na mbala likoló ya etumbelo ya makabo ya kotumba na ntɔngɔ mpe na mpokwa, mpe mpo na kosala nyonso oyo ekomami na Mobeko ya Yehova, oyo apesaki Yisraele.+ 41 Bazalaki ná Hemane, Yedutune+ ná bato mosusu oyo baponamaki mpe batángamaki nkombo, mpo na kopesa Yehova matɔndi,+ mpo “bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko”;+ 42 Hemane+ ná Yedutune basengelaki kobɛta bakelelo, basɛmbalɛ mpe bibɛtɛlo ya miziki mpo na kosanzola* Nzambe ya solo; mpe bana ya Yedutune+ bazalaki kokɛngɛla na porte. 43 Bongo bato nyonso bazongaki na bandako na bango. Davidi mpe azongaki mpo na kopambola bato ya ndako na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto