Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Batesaloniki 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Batesaloniki

      • Paulo azali komitungisa ntango azali kozela na Atene (1-5)

      • Nsango oyo Timote amemi ebɔndisi (6-10)

      • Libondeli mpo na Batesaloniki (11-13)

1 Batesaloniki 3:1

Mitindami

  • +Mis 17:15

1 Batesaloniki 3:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “moninga ya mosala ya Nzambe.”

Mitindami

  • +Mis 16:1, 2; Ro 16:21; 1Ko 16:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2009, lok. 14

1 Batesaloniki 3:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “malɔzi.”

  • *

    To, “totyami mpo na likambo yango mpenza.”

Mitindami

  • +Mis 14:22; 1Ko 4:9; 1Pe 2:21

1 Batesaloniki 3:4

Mitindami

  • +1Te 2:14

1 Batesaloniki 3:5

Mitindami

  • +1Te 3:2
  • +Mt 4:3; 2Ko 11:3

1 Batesaloniki 3:6

Mitindami

  • +Mis 18:5

1 Batesaloniki 3:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kokelela.”

  • *

    To, “bolɔzi.”

Mitindami

  • +2Te 1:4

1 Batesaloniki 3:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tozali na bomoi.”

1 Batesaloniki 3:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “malɔmbɔ.”

  • *

    Lil., “komona bilongi na bino.”

Mitindami

  • +2Te 1:3

1 Batesaloniki 3:12

Mitindami

  • +1Te 4:9; 2Te 1:3

1 Batesaloniki 3:13

Mitindami

  • +1Ko 1:8
  • +1Te 2:19; 5:23; 2Te 2:1, 2

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Tes. 3:1Mis 17:15
1 Tes. 3:2Mis 16:1, 2; Ro 16:21; 1Ko 16:10
1 Tes. 3:3Mis 14:22; 1Ko 4:9; 1Pe 2:21
1 Tes. 3:41Te 2:14
1 Tes. 3:51Te 3:2
1 Tes. 3:5Mt 4:3; 2Ko 11:3
1 Tes. 3:6Mis 18:5
1 Tes. 3:72Te 1:4
1 Tes. 3:102Te 1:3
1 Tes. 3:121Te 4:9; 2Te 1:3
1 Tes. 3:131Ko 1:8
1 Tes. 3:131Te 2:19; 5:23; 2Te 2:1, 2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Batesaloniki 3:1-13

Mokanda ya liboso epai ya Batesaloniki

3 Yango wana, ntango tokokaki kokanga motema lisusu te, tomonaki malamu tótikala biso moko na Atene;+ 2 mpe totindaki Timote,+ ndeko na biso mpe mosaleli ya Nzambe* mpo na nsango malamu oyo etali Kristo, mpo apesa bino makasi mpe abɔndisa bino mpo na kondima na bino, 3 mpo moto moko te aningisama na komekama* wana. Mpo bino moko boyebi ete tokoki te kokima bampasi yango.*+ 4 Ya solo, ntango tozalaki elongo na bino, tozalaki koyebisa bino liboso ete tosengeli kokutana na mikakatano, mpe esalemaki bongo kaka ndenge boyebi.+ 5 Yango wana, ntango nakokaki lisusu kozela te, natindaki ye mpo na koyeba makambo oyo etali bosembo na bino,+ ntango mosusu Momeki+ amekaki bino na lolenge moko to mosusu, mpe mbala mosusu mosala na biso ya makasi ekei mpamba.

6 Kasi Timote auti epai na bino, akómi awa sikoyo+ mpe apesi biso nsango malamu oyo etali bosembo na bino mpe bolingo na bino, ete bozali ntango nyonso kokoba kokanisa biso na bolingo, mpe bozali koyoka mposa makasi ya komona biso lisusu, kaka ndenge biso mpe tozali koyoka yango mpo na bino. 7 Yango wana, bandeko, na mitungisi* na biso nyonso mpe na komekama* na biso nyonso tobɔndisami mpo na bino mpe mpo na bosembo oyo bozali komonisa.+ 8 Sikoyo tozwi lisusu makasi* lokola toyoki ete bozali kotɛlɛma ngwi na kati ya Nkolo. 9 Mpo ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya Nzambe mpo na bino mpe mpo na esengo monene oyo tozali na yango liboso ya Nzambe mpo na bino? 10 Butu moi tozali kosala mabondeli* na makasi na biso nyonso mpo na komona bino lisusu* mpe kobakisela bino makambo oyo ezangi na kondima na bino.+

11 Tiká Nzambe mpe Tata na biso ye moko mpe Nkolo na biso Yesu bápesa biso likoki ya koya epai na bino. 12 Lisusu, Nkolo akolisa bino, ɛɛ, atondisa bino na bolingo, ya bino na bino+ mpe ya bato nyonso, kaka ndenge biso tozali na yango mpo na bino, 13 mpo akómisa mitema na bino ngwi, ezanga mbeba na kati ya bosantu liboso ya Nzambe na biso+ mpe Tata na ntango ya kozala ya Nkolo na biso Yesu+ elongo na basantu na ye nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto