Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 35
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yakobo alongoli banzambe bapaya (1-4)

      • Yakobo azongi na Betele (5-15)

      • Benyamina abotami; Rashele akufi (16-20)

      • Bana mibali 12 ya Yisraele (21-26)

      • Yisaka akufi (27-29)

Ebandeli 35:1

Mitindami

  • +Eb 28:19; 31:13
  • +Eb 27:42-44

Ebandeli 35:2

Mitindami

  • +Eb 31:19; Mib 5:7; Yos 23:7; 1Ko 10:14

Ebandeli 35:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na nzela.”

Mitindami

  • +Eb 28:13, 15; 31:42

Ebandeli 35:6

Mitindami

  • +Eb 28:19

Ebandeli 35:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “Nzambe ya Betele.”

Mitindami

  • +Eb 28:20-22

Ebandeli 35:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “nzete monene ya kolela.”

Mitindami

  • +Eb 24:59

Ebandeli 35:10

Mitindami

  • +Eb 25:26; 27:36
  • +Eb 32:28

Ebandeli 35:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bakouta na bangɛi na yo.”

Mitindami

  • +Eb 17:1; Kob 6:3; Em 15:3
  • +Eb 48:3, 4
  • +Eb 17:5, 6; Yn 12:13

Ebandeli 35:12

Mitindami

  • +Eb 15:18; Mib 34:4

Ebandeli 35:14

Mitindami

  • +Eb 28:18

Ebandeli 35:15

Mitindami

  • +Eb 28:19

Ebandeli 35:17

Mitindami

  • +Eb 30:22-24

Ebandeli 35:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “mwana ya kolela na ngai.”

  • *

    Elimboli, “mwana ya lobɔkɔ ya mobali.”

Mitindami

  • +Eb 46:21; 49:27; Mib 33:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 14

    15/7/2007, nk. 4-5

    1/4/1999, lok. 16

    Soki tokufi, nk. 22-23

Ebandeli 35:19

Mitindami

  • +Eb 48:7; Mik 5:2; Mt 2:6

Ebandeli 35:22

Mitindami

  • +Eb 49:3, 4; 1Nt 5:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 16

Ebandeli 35:23

Mitindami

  • +Eb 49:3

Ebandeli 35:27

Mitindami

  • +Eb 31:17, 18
  • +Eb 15:13; Ebr 11:9

Ebandeli 35:28

Mitindami

  • +Eb 25:20, 26

Ebandeli 35:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “anuni mpe atondi na mikolo.”

  • *

    Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.

Mitindami

  • +Eb 49:30, 31

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 35:1Eb 28:19; 31:13
Eba. 35:1Eb 27:42-44
Eba. 35:2Eb 31:19; Mib 5:7; Yos 23:7; 1Ko 10:14
Eba. 35:3Eb 28:13, 15; 31:42
Eba. 35:6Eb 28:19
Eba. 35:7Eb 28:20-22
Eba. 35:8Eb 24:59
Eba. 35:10Eb 25:26; 27:36
Eba. 35:10Eb 32:28
Eba. 35:11Eb 17:1; Kob 6:3; Em 15:3
Eba. 35:11Eb 48:3, 4
Eba. 35:11Eb 17:5, 6; Yn 12:13
Eba. 35:12Eb 15:18; Mib 34:4
Eba. 35:14Eb 28:18
Eba. 35:15Eb 28:19
Eba. 35:17Eb 30:22-24
Eba. 35:18Eb 46:21; 49:27; Mib 33:12
Eba. 35:19Eb 48:7; Mik 5:2; Mt 2:6
Eba. 35:22Eb 49:3, 4; 1Nt 5:1
Eba. 35:23Eb 49:3
Eba. 35:27Eb 31:17, 18
Eba. 35:27Eb 15:13; Ebr 11:9
Eba. 35:28Eb 25:20, 26
Eba. 35:29Eb 49:30, 31
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 35:1-29

Ebandeli

35 Nsima na yango, Nzambe alobaki na Yakobo ete: “Tɛlɛmá, matá na Betele+ mpe fandá kuna, mpe salá etumbelo kuna mpo na Nzambe ya solo, oyo abimelaki yo ntango ozalaki kokima Esau ndeko na yo.”+

2 Bongo Yakobo alobaki na bato ya ndako na ye mpe na baoyo nyonso bazalaki elongo na ye ete: “Bólongola banzambe ya bapaya oyo bazali na kati na bino,+ bómipɛtola mpe bólata bilamba mosusu, 3 tótɛlɛma mpe tómata na Betele. Nakosala etumbelo kuna mpo na Nzambe ya solo, oyo ayanolaki ngai ntango nazalaki na mpasi mpe oyo azalaki elongo na ngai esika nyonso* oyo nakendaki.”+ 4 Na bongo, bapesaki Yakobo banzambe nyonso ya bapaya oyo bazalaki na yango mpe biloko ya matoi oyo ezalaki na matoi na bango, mpe Yakobo akundaki yango na nse ya nzete monene oyo ezalaki pene na Shekeme.

5 Ntango bakendaki, nsɔmɔ ya Nzambe ekwelaki bingumba oyo ezalaki zingazinga na bango; na yango balandaki bana ya Yakobo te. 6 Nsukansuka, Yakobo ná bato na ye nyonso bakómaki na Luze,+ elingi koloba Betele, oyo ezali na mokili ya Kanana. 7 Atongaki etumbelo kuna mpe abengaki esika yango Ele-betele,* mpo na Nzambe ya solo amimonisaki epai na ye na esika wana, ntango akimaki ndeko na ye.+ 8 Na nsima, Debora,+ mwasi oyo amɛlisaká Rebeka mabɛlɛ, akufaki mpe bakundaki ye pene na Betele, na nse ya nzete moko monene. Na yango, Yakobo apesaki yango nkombo Alone-bakute.*

9 Nzambe abimelaki lisusu Yakobo ntango azalaki kouta na Padane-arame mpe apambolaki ye. 10 Nzambe alobaki na ye ete: “Nkombo na yo ezali Yakobo.+ Bakobenga yo lisusu te na nkombo Yakobo, kasi nkombo na yo ekokóma nde Yisraele.” Mpe akómaki kobenga ye Yisraele.+ 11 Nzambe alobaki na ye lisusu ete: “Ngai nazali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ Botá mpe kómá mingi. Bikólo mpe lisangá ya bikólo ekouta na yo,+ mpe bakonzi bakouta na yo.*+ 12 Nakopesa yo mokili oyo napesaki Abrahama mpe Yisaka, mpe nakopesa yango libota na yo.”+ 13 Na nsima, Nzambe amataki, atiki ye na esika oyo azalaki kosolola na ye.

14 Bongo, Yakobo atɛlɛmisaki likonzí na esika oyo asololaki na ye, likonzí ya libanga, mpe asopelaki yango likabo ya masanga mpe asopelaki yango mafuta.+ 15 Mpe Yakobo akobaki kobenga esika oyo Nzambe asololaki na ye na nkombo Betele.+

16 Na nsima, balongwaki na Betele. Mpe ntango bazalaki na nzela, mwa mosika liboso ya kokóma na Efrata, Rashele abandaki kobota, mpe kobota na ye ezalaki mpasi mpenza. 17 Kasi ntango azalaki kobundana mpo na kobimisa mwana, mobotisi alobaki na ye ete: “Kobanga te, mpo okosimba mpe mwana mobali oyo.”+ 18 Kaka na ntango oyo azalaki kokata motema (mpo azalaki kobundana na liwa), Rashele apesaki ye nkombo Bene-oni,* kasi tata na ye abengaki ye Benyamina.*+ 19 Bongo, Rashele akufaki mpe bakundaki ye na nzela oyo ezali kokende na Efrata, elingi koloba, Beteleme.+ 20 Yakobo atɛlɛmisaki likonzí moko likoló ya lilita na ye; ezali likonzí ya lilita ya Rashele tii na mokolo ya lelo.

21 Nsima na yango, Yisraele akendaki mpe atɛlɛmisaki hema na ye mwa mosika koleka ndako molai ya Edere. 22 Wana Yisraele azalaki kofanda na bahema na mokili yango, Rubene alalaki na Bila, mwasi mosusu ya tata na ye, mpe Yisraele ayokaki likambo yango.+

Yakobo azalaki na bana mibali 12. 23 Bana mibali ya Lea bango oyo: Rubene, mwana ya liboso ya Yakobo,+ na nsima Simeone, Levi, Yuda, Isakare mpe Zebulone. 24 Bana mibali ya Rashele bango oyo: Yozefe ná Benyamina. 25 Bana mibali ya Bila, mosaleli ya Rashele bango oyo: Dani ná Nafatali. 26 Mpe bana mibali ya Zilipa, mosaleli ya Lea bango oyo: Gade ná Ashere. Bango nde bazali bana mibali ya Yakobo, oyo abotaki na Padane-arame.

27 Nsukansuka, Yakobo akómaki epai ya Yisaka tata na ye na Mamare,+ na Kiriate-arba, elingi koloba Hebrone, epai Abrahama ná Yisaka bafandaki bapaya.+ 28 Yisaka aumelaki na bomoi mbula 180.+ 29 Na nsima, Yisaka akataki motema. Akufaki nsima ya kolekisa bomoi ya molai mpe ya esengo;* ayanganisamaki na bato na ye;* bana na ye, Esau ná Yakobo, bakundaki ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto