Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 22
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Nzambe ayebisi Abrahama apesa mwana na ye Yisaka mbeka (1-19)

        • Lipamboli na nzela ya mokitani ya Abrahama (15-18)

      • Libota ya Rebeka (20-24)

Ebandeli 22:1

Mitindami

  • +Ebr 11:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1998, lok. 6

Ebandeli 22:2

Mitindami

  • +Eb 17:19; Yos 24:3; Ro 9:7
  • +Yn 3:16
  • +2Nt 3:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2012, lok. 23

    1/2/2009, lok. 18

    15/8/2007, lok. 13

Ebandeli 22:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 18

Ebandeli 22:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2016, lok. 7

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 18

Ebandeli 22:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mbeli ya koboma nyama.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2017, lok. 32

Ebandeli 22:8

Mitindami

  • +Yn 1:29; 1Pe 1:18, 19

Ebandeli 22:9

Mitindami

  • +Yn 10:17, 18

Ebandeli 22:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mbeli ya koboma nyama.”

Mitindami

  • +Ebr 11:17

Ebandeli 22:12

Mitindami

  • +Ebr 11:17-19; Yk 2:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 18

    15/4/1998, lok. 6

Ebandeli 22:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “Yehova akopesa; Yehova akomona.”

Mitindami

  • +Eb 22:2; 2Nt 3:1

Ebandeli 22:16

Mitindami

  • +Ebr 6:13, 14
  • +Yn 3:16; Ro 8:32; Ebr 11:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2012, nk. 23-24

    “Makomami nyonso,” lok. 18

Ebandeli 22:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

  • *

    Lil., “momboto.”

  • *

    Lil., “porte.”

Mitindami

  • +Eb 13:14, 16; 15:1, 5; Mis 3:25
  • +Nz 2:8; Da 2:44

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2008, lok. 21

    15/9/2004, lok. 9

    1/6/2004, lok. 11

    15/5/2000, nk. 15-16

    1/2/1998, nk. 9-13, 17-18

Ebandeli 22:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Eb 3:15; Ro 9:7; Ga 3:16
  • +Ga 3:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 3 2020 nk. 14-15

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    12/2018, lok. 4

    Lamuká!,

    7/2012, lok. 24

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2009, lok. 4

    1/4/2009, lok. 12

    1/9/2000, lok. 20

    15/5/2000, nk. 15-16

    1/2/1998, nk. 9-13, 14-15

    1/7/1995, lok. 11

    15/1/1995, nk. 18-19

    15/3/1994, lok. 18

    15/4/1992, nk. 7-8

    Emoniseli, lok. 311

    Mokili mozangi bitumba?, nk. 12-13, 15-18

    “Makomami nyonso,” lok. 18

Ebandeli 22:19

Mitindami

  • +Eb 21:31

Ebandeli 22:20

Mitindami

  • +Eb 11:26, 29

Ebandeli 22:22

Mitindami

  • +Eb 25:20

Ebandeli 22:23

Mitindami

  • +Eb 24:15; Ro 9:10

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 22:1Ebr 11:17
Eba. 22:2Eb 17:19; Yos 24:3; Ro 9:7
Eba. 22:2Yn 3:16
Eba. 22:22Nt 3:1
Eba. 22:8Yn 1:29; 1Pe 1:18, 19
Eba. 22:9Yn 10:17, 18
Eba. 22:10Ebr 11:17
Eba. 22:12Ebr 11:17-19; Yk 2:21
Eba. 22:14Eb 22:2; 2Nt 3:1
Eba. 22:16Ebr 6:13, 14
Eba. 22:16Yn 3:16; Ro 8:32; Ebr 11:17
Eba. 22:17Eb 13:14, 16; 15:1, 5; Mis 3:25
Eba. 22:17Nz 2:8; Da 2:44
Eba. 22:18Eb 3:15; Ro 9:7; Ga 3:16
Eba. 22:18Ga 3:8
Eba. 22:19Eb 21:31
Eba. 22:20Eb 11:26, 29
Eba. 22:22Eb 25:20
Eba. 22:23Eb 24:15; Ro 9:10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 22:1-24

Ebandeli

22 Nsima na yango, Nzambe ya solo atyaki Abrahama na komekama,+ alobaki na ye ete: “Abrahama!” mpe ye ayanolaki ete: “Ngai oyo!” 2 Na nsima alobaki ete: “Nabondeli yo, zwá mwana na yo Yisaka,+ mwana na yo kaka moko oyo olingaka mingi,+ mpe salá mobembo tii na mokili ya Moria+ mpe kuna pesá ye lokola likabo ya kotumba likoló na moko ya bangomba oyo nakolakisa yo.”

3 Na yango, Abrahama alamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe akangisaki kiti ya mpunda na ye mpe azwaki elongo na ye basali mibale kati na basali na ye mpe Yisaka mwana na ye. Apasolaki nkoni mpo na likabo ya kotumba. Mpe na nsima, atɛlɛmaki mpe asalaki mobembo tii na esika oyo Nzambe ya solo alakisaki ye. 4 Na mokolo ya misato, Abrahama atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika. 5 Sikoyo Abrahama alobaki na basali na ye ete: “Bino bótikala awa ná mpunda, kasi ngai ná mwana tozali kokende kuna kosambela mpe tokozongela bino.”

6 Na yango, Abrahama azwaki nkoni mpo na likabo ya kotumba mpe amemisaki yango Yisaka mwana na ye. Na nsima azwaki mɔtɔ ná mbeli,* mpe bango mibale bakendaki elongo. 7 Mpe Yisaka alobaki na tata na ye Abrahama ete: “Tata!” Mpe ye alobaki ete: “Lobá, mwana na ngai!” Bongo alobaki lisusu ete: “Mɔtɔ ná nkoni yango oyo, kasi wapi mpate mpo na likabo ya kotumba?” 8 Na yango, Abrahama alobaki ete: “Mwana na ngai, Nzambe ye moko akopesa mpate mpo na likabo ya kotumba.”+ Mpe bango mibale bakobaki nzela na bango.

9 Nsukansuka, bakómaki na esika oyo Nzambe ya solo alakisaki ye, mpe Abrahama atongaki etumbelo kuna mpe atyaki nkoni likoló na yango. Akangaki mwana na ye Yisaka mabɔkɔ ná makolo mpe atyaki ye na etumbelo likoló ya nkoni.+ 10 Bongo Abrahama asembolaki lobɔkɔ na ye mpe azwaki mbeli* mpo na koboma mwana na ye.+ 11 Kasi anzelu ya Yehova abengaki ye longwa na likoló mpe alobaki ete: “Abrahama, Abrahama!” mpe ye ayanolaki ete: “Ngai oyo!” 12 Na nsima alobaki ete: “Kosala mwana na yo mabe te, mpe kosala ye ata eloko moko te, mpo sikoyo nayebi ete obangaka Nzambe mpo opimeli ngai mwana na yo te, mwana na yo kaka moko.”+ 13 Na yango, Abrahama atombolaki miso, mpe mosika mpenza te na ye, amonaki mpate-mobali moko oyo maseke na yango ekangamaki na mwa banzete. Bongo Abrahama akendaki kozwa mpate-mobali yango mpe apesaki yango likabo ya kotumba na esika ya mwana na ye. 14 Mpe Abrahama apesaki esika yango nkombo Yehova-yire.* Yango wana tii lelo bato balobaka ete: “Na ngomba ya Yehova, ekopesama.”+

15 Mpe anzelu ya Yehova abengaki Abrahama mpo na mbala ya mibale longwa na likoló, 16 mpe alobaki ete: “‘Na nkombo na ngai moko nalapi ndai,’ yango nde liloba ya Yehova,+ ‘ete lokola osali likambo oyo mpe opimeli ngai mwana na yo te, mwana na yo kaka moko,+ 17 nakopambola yo mpenza mpe nakokómisa mpenza bana* na yo mingi lokola minzoto ya likoló mpe lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu;+ mpe mwana* na yo akozwa bingumba* ya banguna na ye.+ 18 Mpe na nzela ya libota*+ na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela lipamboli mpo oyoki mongongo na ngai.’”+

19 Nsima na yango, Abrahama azongelaki basali na ye, mpe bazongaki elongo na Beere-sheba;+ mpe Abrahama akobaki kofanda na Beere-sheba.

20 Na nsima, Abrahama azwaki nsango ete: “Talá! Milka mpe aboteli ndeko na yo Nahore+ bana mibali: 21 Uze mwana na ye ya liboso, Buze ndeko na ye, Kemuele tata ya Arame, 22 Kesede, Hazo, Pilidashe, Yidilafe mpe Betuele.”+ 23 Betuele abotaki Rebeka.+ Milka abotelaki Nahore ndeko ya Abrahama bana mwambe yango. 24 Mwana na ye mosusu, oyo nkombo na ye ezalaki Reuma, abotaki mpe bana mibali: Teba, Gahame, Tahashe, mpe Maaka.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto