Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Bankumu mabe bazwi etumbu (1-13)

        • Engumba ekokanisami na nzungu ya kolambela (3-12)

      • Elaka ya kozongisama ya Yisraele (14-21)

        • Nzambe apesi “elimo ya sika” (19)

      • Nkembo ya Nzambe elongwe na Yerusaleme (22, 23)

      • Ezekiele azongi na Kaladea na nzela ya emonaneli (24, 25)

Ezekiele 11:1

Mitindami

  • +Ezk 10:19
  • +Yis 1:23; Ezk 22:27

Ezekiele 11:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpo na.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, lok. 8

Ezekiele 11:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Azali,” engumba ya Yerusaleme. Esika oyo Bayuda bazalaki kokanisa ete babatelami.”

  • *

    To, “nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ ya monene.”

Mitindami

  • +Ezk 12:27
  • +Ezk 24:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, lok. 8

Ezekiele 11:4

Mitindami

  • +Ezk 3:17; 20:46; 21:2

Ezekiele 11:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “makambo oyo eyei na makanisi na bino.”

Mitindami

  • +2Pe 1:21

Ezekiele 11:6

Mitindami

  • +Ezk 7:23; 22:3, 4

Ezekiele 11:7

Mitindami

  • +Ezk 24:6

Ezekiele 11:8

Mitindami

  • +Yir 38:19

Ezekiele 11:9

Mitindami

  • +Yir 39:6, 7; 52:24-27

Ezekiele 11:10

Mitindami

  • +2Ba 25:18-21; 2Nt 36:17
  • +2Ba 14:25; Yir 52:27
  • +Ezk 6:13

Ezekiele 11:12

Mitindami

  • +Ezr 9:7; Ne 9:34
  • +Mib 12:29-31; 2Nt 28:1, 3; Nz 106:34-36

Ezekiele 11:13

Mitindami

  • +Ezk 9:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, nk. 8-9

Ezekiele 11:16

Mitindami

  • +2Ba 24:14, 15; Yir 24:5
  • +Le 26:44

Ezekiele 11:17

Mitindami

  • +Yis 11:11, 12; Yir 30:10, 11; Ezk 34:13, 14; Am 9:14, 15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, nk. 19-20

Ezekiele 11:18

Mitindami

  • +Ezk 37:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, lok. 20

Ezekiele 11:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “nakopesa bango motema moko.”

  • *

    Elingi koloba, “nakosala ete báyoka toli ya Nzambe.”

Mitindami

  • +Yir 24:7; 31:33; 32:39
  • +Nz 51:10; Ezk 36:31
  • +Zek 7:12
  • +Ezk 36:26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, lok. 20

Ezekiele 11:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1997, lok. 20

Ezekiele 11:22

Mitindami

  • +Ezk 1:19
  • +Ezk 10:18, 19

Ezekiele 11:23

Mitindami

  • +Ezk 9:3; 10:4
  • +Zek 14:4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 11:1Ezk 10:19
Ezk. 11:1Yis 1:23; Ezk 22:27
Ezk. 11:3Ezk 12:27
Ezk. 11:3Ezk 24:3
Ezk. 11:4Ezk 3:17; 20:46; 21:2
Ezk. 11:52Pe 1:21
Ezk. 11:6Ezk 7:23; 22:3, 4
Ezk. 11:7Ezk 24:6
Ezk. 11:8Yir 38:19
Ezk. 11:9Yir 39:6, 7; 52:24-27
Ezk. 11:102Ba 25:18-21; 2Nt 36:17
Ezk. 11:102Ba 14:25; Yir 52:27
Ezk. 11:10Ezk 6:13
Ezk. 11:12Ezr 9:7; Ne 9:34
Ezk. 11:12Mib 12:29-31; 2Nt 28:1, 3; Nz 106:34-36
Ezk. 11:13Ezk 9:8
Ezk. 11:162Ba 24:14, 15; Yir 24:5
Ezk. 11:16Le 26:44
Ezk. 11:17Yis 11:11, 12; Yir 30:10, 11; Ezk 34:13, 14; Am 9:14, 15
Ezk. 11:18Ezk 37:23
Ezk. 11:19Yir 24:7; 31:33; 32:39
Ezk. 11:19Nz 51:10; Ezk 36:31
Ezk. 11:19Zek 7:12
Ezk. 11:19Ezk 36:26
Ezk. 11:22Ezk 1:19
Ezk. 11:22Ezk 10:18, 19
Ezk. 11:23Ezk 9:3; 10:4
Ezk. 11:23Zek 14:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 11:1-25

Ezekiele

11 Elimo etombolaki ngai mpe ememaki ngai na porte ya ndako ya Yehova, porte oyo etali na ngámbo ya ɛsti.+ Kuna na ekɔtelo ya porte namonaki mibali 25, mpe na kati na bango namonaki Yaazania mwana ya Azure mpe Pelatia mwana ya Benaya, bankumu ya bato.+ 2 Bongo alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, baoyo wana nde mibali oyo bazali kokana kosala makambo ya mabe mpe bazali kopesa toli ya mabe na* engumba oyo. 3 Bazali koloba ete: ‘Oyo ezali ntango te ya kotonga bandako?+ Engumba ezali* nzungu ya kolambela*+ mpe biso tozali mosuni.’

4 “Na yango, sakwelá bango. Mwana ya moto, sakolá.”+

5 Bongo elimo ya Yehova esalaki likoló na ngai,+ mpe Nzambe alobaki na ngai ete: “Lobá: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Ee bato ya Yisraele, bolobi likambo ya solo, mpe nayebi oyo bozali kokanisa.* 6 Bosali ete bato ebele bákufa na engumba oyo, mpe botondisi babalabala na yango na bibembe.”’”+ 7 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bibembe oyo bopanzi na engumba ezali misuni mpe engumba ezali nzungu ya kolambela.+ Kasi bakobimisa bino na kati na yango.’”

8 “‘Bozali kobanga etumba,+ kasi nakomemela bino etumba,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 9 ‘Nakobimisa bino na kati na yango, nakopesa bino na lobɔkɔ ya bapaya mpe nakokweisela bino bitumbu.+ 10 Bokobomama na mopanga.+ Nakosambisa bino na ndelo ya Yisraele,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 11 Engumba ekozala te nzungu ya kolambela mpo na bino, mpe bokozala te mosuni na kati na yango. Nakosambisa bino na ndelo ya Yisraele, 12 bokoyeba mpenza ete nazali Yehova, mpo botosaki te mibeko na ngai mpe bosalelaki te bikateli na ngai,+ kasi bosalaki nde makambo na kolanda bikateli ya bikólo oyo ezali zingazinga na bino.’”+

13 Ntango kaka nasilisaki kosakola, Pelatia mwana ya Benaya akufaki, mpe nakweaki natye elongi na nse mpe nagangaki na mongongo makasi ete: “Mawa, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Okosilisa nde bato ya Yisraele oyo batikali?”+

14 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 15 “Mwana ya moto, bafandi ya Yerusaleme balobi boye na bandeko na yo, bandeko na yo oyo bazali na lotomo ya kosikola, na bato nyonso ya Yisraele: ‘Bózala mosika na Yehova. Mokili ezali ya biso, bapesi yango biso mpo ekóma ya biso.’ 16 Na yango, lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Natye bango mosika na bikólo, mpe napalanganisi bango na kati ya mikili,+ kasi nakokóma mpo na bango esika mosantu mpo na mwa ntango na kati ya mikili esika bakei.”’+

17 “Na yango, lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosangisa mpe bino uta na bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bino uta na mikili oyo bopalanganisamaki, mpe nakopesa bino mokili ya Yisraele.+ 18 Bakozonga kuna mpe bakolongola na kati na yango makambo nyonso ya bosɔtɔ mpe misala oyo eyinamá.+ 19 Nakosala ete bázala na bomoko na mitema na bango,*+ mpe nakotya elimo ya sika na kati na bango;+ nakolongola motema ya libanga na nzoto na bango+ mpe nakopesa bango motema ya mosuni,*+ 20 mpo bátosa mibeko na ngai, bábatela bikateli na ngai mpe básalela yango. Bongo bakozala bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bango.”’

21 “‘“Kasi mpo na baoyo motema na bango ezali kokoba kolanda makambo ya bosɔtɔ mpe misala na bango oyo eyinamá, nakosala ete bányokwama mpo na mbuma mabe ya etamboli na bango,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.’”

22 Sikoyo bakeruba batombolaki mapapu na bango, bapine ya ebende ezalaki penepene na bango,+ mpe nkembo ya Nzambe ya Yisraele ezalaki likoló na bango.+ 23 Na yango nkembo ya Yehova+ elongwaki likoló ya engumba, mpe etɛlɛmaki likoló ya ngomba, na ɛsti ya engumba.+ 24 Bongo elimo etombolaki ngai na emonaneli na nzela ya elimo ya Nzambe mpe ememaki ngai epai ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya na Kaladea. Mpe emonaneli oyo namonaki esilaki. 25 Mpe nabandaki koyebisa bato oyo bamemamaki na mboka mopaya makambo nyonso oyo Yehova amonisaki ngai.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto