Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Samwele

      • Balongi Baamone mpe bato ya Siri (1-19)

2 Samwele 10:1

Mitindami

  • +Eb 19:36, 38; Bas 10:7; 11:12, 33; 1Sa 11:1
  • +1Nt 19:1-5

2 Samwele 10:4

Mitindami

  • +Le 19:27

2 Samwele 10:5

Mitindami

  • +Yos 18:21

2 Samwele 10:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mibali ya Tobe.”

Mitindami

  • +Mit 13:21
  • +2Sa 8:5
  • +Yos 13:13
  • +1Nt 19:6, 7

2 Samwele 10:7

Mitindami

  • +2Sa 23:8; 1Nt 19:8, 9

2 Samwele 10:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mibali ya Tobe.”

2 Samwele 10:9

Mitindami

  • +1Nt 19:10-13

2 Samwele 10:10

Mitindami

  • +1Sa 26:6; 2Sa 2:18; 23:18; 1Nt 2:15, 16
  • +Mit 21:24

2 Samwele 10:12

Mitindami

  • +Mib 31:6
  • +Nz 37:5; 44:5; Mas 29:25

2 Samwele 10:13

Mitindami

  • +1Nt 19:14, 15

2 Samwele 10:15

Mitindami

  • +1Nt 19:16

2 Samwele 10:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, Efrate.

Mitindami

  • +2Sa 8:3-5
  • +Eb 15:18; Kob 23:31

2 Samwele 10:17

Mitindami

  • +1Nt 19:17-19

2 Samwele 10:18

Mitindami

  • +Mib 20:1; Nz 18:37, 38

2 Samwele 10:19

Mitindami

  • +Eb 15:18; Mib 20:10, 11

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Sa. 10:1Eb 19:36, 38; Bas 10:7; 11:12, 33; 1Sa 11:1
2 Sa. 10:11Nt 19:1-5
2 Sa. 10:4Le 19:27
2 Sa. 10:5Yos 18:21
2 Sa. 10:6Mit 13:21
2 Sa. 10:62Sa 8:5
2 Sa. 10:6Yos 13:13
2 Sa. 10:61Nt 19:6, 7
2 Sa. 10:72Sa 23:8; 1Nt 19:8, 9
2 Sa. 10:91Nt 19:10-13
2 Sa. 10:101Sa 26:6; 2Sa 2:18; 23:18; 1Nt 2:15, 16
2 Sa. 10:10Mit 21:24
2 Sa. 10:12Mib 31:6
2 Sa. 10:12Nz 37:5; 44:5; Mas 29:25
2 Sa. 10:131Nt 19:14, 15
2 Sa. 10:151Nt 19:16
2 Sa. 10:162Sa 8:3-5
2 Sa. 10:16Eb 15:18; Kob 23:31
2 Sa. 10:171Nt 19:17-19
2 Sa. 10:18Mib 20:1; Nz 18:37, 38
2 Sa. 10:19Eb 15:18; Mib 20:10, 11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Samwele 10:1-19

Mokanda ya mibale ya Samwele

10 Na nsima mokonzi ya Baamone+ akufaki, mpe mwana na ye Hanune akómaki mokonzi na esika na ye.+ 2 Na yango Davidi alobaki: “Nakomonisela Hanune mwana ya Nahashe bolingo ya sembo, ndenge tata na ye amoniselaki ngai bolingo ya sembo.” Bongo Davidi atindaki basaleli na ye bákende kobɔndisa Hanune mpo na liwa ya tata na ye. Kasi ntango basaleli ya Davidi bakómaki na mokili ya Baamone, 3 bankumu ya Baamone balobaki na nkolo na bango Hanune boye: “Okanisi ete Davidi atindeli yo babɔndisi nde mpo na kokumisa tata na yo? Ezali te mpo na koluka koyeba engumba, kotalatala yango na mayele mpe kokweisa yango, nde Davidi atindi basaleli na ye epai na yo?” 4 Bongo Hanune akangaki basaleli ya Davidi, akataki bango mandefu na ngámbo moko,+ apasolaki bilamba na bango na katikati, na masɔkɔ, mpe abenganaki bango. 5 Ntango bayebisaki Davidi likambo yango, na mbala moko atindaki bato bákende kokutana na mibali yango, mpo basambwaki mpenza; mpe mokonzi ayebisaki bango: “Bófanda na Yeriko+ tii ntango mandefu na bino ekokola, bongo na nsima bokozonga.”

6 Na nsima, Baamone bamonaki ete bakómi eloko ya nsolo mabe na miso ya Davidi. Na yango, batindaki bamemi-nsango bázwa na mosala bato ya Siri ya Bete-rehobe+ mpe bato ya Siri ya Soba,+ basoda 20 000 oyo batambolaka na makolo, ná mokonzi ya Maaka+ mpe mibali 1 000. Na Ishitobe,* bazwaki mibali 12 000.+ 7 Ntango Davidi ayokaki yango, atindaki Yoabe ná limpinga mobimba ya basoda, ata mpe bilombe na ye ya etumba oyo baleki makasi.+ 8 Bongo Baamone babimaki mpe batandamaki na molɔngɔ ya etumba na esika ya kokɔta na porte ya engumba, wana bato ya Siri ya Soba mpe ya Rehobe, ná basoda ya Ishitobe* mpe ya Maaka batɛlɛmaki bango moko na esobe.

9 Ntango Yoabe amonaki ete banguna bazali koyela ye na liboso mpe na nsima, aponaki ndambo ya basoda ya Yisraele oyo baleki makasi mpe atandaki bango na molɔngɔ mpo bábunda na bato ya Siri.+ 10 Atikaki basoda mosusu na mabɔkɔ ya ndeko na ye Abishai,+ mpo atanda bango na molɔngɔ mpo na kobunda na Baamone.+ 11 Bongo alobaki: “Soki bato ya Siri bakómi makasi koleka ngai, okoya kosalisa ngai; kasi soki Baamone bakómi makasi koleka yo, ngai nakoya kosalisa yo. 12 Tózala na makasi mpe na mpiko.+ Tóbundela bato na biso mpe bingumba ya Nzambe na biso, mpe Yehova akosala oyo ezali malamu na miso na ye.”+

13 Na nsima Yoabe ná basoda na ye bapusanaki mpo na kobunda na bato ya Siri, kasi bato ya Siri bakimaki.+ 14 Ntango Baamone bamonaki ete bato ya Siri bakimi, bango mpe bakimaki Abishai mpe bazongaki na kati ya engumba. Na nsima Yoabe atikaki kobundisa Baamone, mpe azongaki na Yerusaleme.

15 Ntango bato ya Siri bamonaki ete Yisraele elongi bango, basanganaki lisusu mpo bábongisa bituluku na bango.+ 16 Bongo Hadadezere+ abengisaki bato ya Siri oyo bazalaki na etúká ya Ebale,*+ mpe bayaki na Helame. Shobake, mokonzi ya basoda ya Hadadezere, nde azalaki kokamba bango.

17 Ntango nsango yango ekómelaki Davidi, na mbala moko ayanganisaki limpinga mobimba ya Yisraele, akatisaki Yordani, mpe akómaki na Helame. Bongo bato ya Siri batandamaki na molɔngɔ mpo na kokutana na Davidi mpe babundisaki ye.+ 18 Kasi, bato ya Siri bakimaki Bayisraele; mpe Davidi abomaki batambwisi-makalo 700 mpe batambwisi-mpunda 40 000 ya bato ya Siri. Abɛtaki mpe Shobake mokonzi ya basoda na bango, mpe akufaki wana.+ 19 Ntango bakonzi nyonso oyo bazalaki basaleli ya Hadadezere bamonaki ete Bayisraele balongi bango, basalaki nokinoki boyokani ná Bayisraele mpe bakómaki bato na bango.+ Bato ya Siri bakómaki kobanga kosalisa lisusu Baamone.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto