Nzembo
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi.
14 Bazoba balobi na mitema na bango ete:
“Yehova azali te.”+
Bazali bato mabe mpe basalaka makambo oyo eyinami;
Ata moto moko te azali kosala malamu.+
2 Kasi uta na likoló, Yehova azali kotala bana ya bato
Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, soki ezali na moto oyo azali koluka Yehova.+
Ata moto moko te azali kosala malamu,
Ata moto moko te.
4 Ezali ata na moto mabe moko te oyo azali kokanga ntina?
Bazali kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa.
Babeleli Yehova te.
6 Bino basali mabe, bolukaka kosala ete mposa ya moto mpamba ekokisama te,
Kasi Yehova azali esika na ye ya kokima.+
7 Ee lobiko ya Yisraele euta na Siona!+
Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,
Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.