Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 22
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Yosiya, mokonzi ya Yuda (1, 2)

      • Malako mpo na kobongisa tempelo (3-7)

      • Bamoni buku ya Mobeko (8-13)

      • Huluda asakoli ete mpasi ekoya (14-20)

2 Bakonzi 22:1

Mitindami

  • +1Ba 13:2; Yir 1:2; Sef 1:1
  • +2Nt 34:1, 2
  • +Yos 15:20, 39

2 Bakonzi 22:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Atambolaki na nzela nyonso.”

Mitindami

  • +1Ba 15:5

2 Bakonzi 22:3

Mitindami

  • +2Nt 34:8

2 Bakonzi 22:4

Mitindami

  • +1Nt 6:13
  • +2Ba 12:4, 5; 2Nt 24:8
  • +2Ba 12:9; 2Nt 34:9

2 Bakonzi 22:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bisika oyo efelo esali bandelo.”

Mitindami

  • +2Ba 12:11, 12; 2Nt 34:10

2 Bakonzi 22:6

Mitindami

  • +2Nt 34:11

2 Bakonzi 22:7

Mitindami

  • +2Ba 12:15; 2Nt 34:12

2 Bakonzi 22:8

Mitindami

  • +2Ba 22:3
  • +Mib 31:24-26
  • +2Nt 34:14, 15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/1990, lok. 28

2 Bakonzi 22:9

Mitindami

  • +2Nt 34:16-18

2 Bakonzi 22:10

Mitindami

  • +Mib 31:9

2 Bakonzi 22:11

Mitindami

  • +2Nt 34:19-21; Yoe 2:13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/2000, lok. 30

2 Bakonzi 22:12

Mitindami

  • +2Ba 25:22; Yir 26:24

2 Bakonzi 22:13

Mitindami

  • +Mib 4:24; 29:27; 31:17

2 Bakonzi 22:14

Mitindami

  • +Kob 15:20; Bas 4:4; Ne 6:14; Lk 2:36; Mis 21:8, 9
  • +2Nt 34:22-28

2 Bakonzi 22:16

Mitindami

  • +2Ba 22:8

2 Bakonzi 22:17

Mitindami

  • +Kob 20:3; Mib 32:17; Bas 2:12; Yir 2:11
  • +Yis 2:8
  • +Mib 32:22; Yis 33:14; Yir 7:20; Ezk 20:48

2 Bakonzi 22:19

Mitindami

  • +1Ba 21:29; Yk 4:6
  • +2Ba 22:11

2 Bakonzi 22:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Oyo ezali maloba ya ntoki mpo na kolobela liwa.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2000, lok. 30

    15/9/2000, lok. 30

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 22:11Ba 13:2; Yir 1:2; Sef 1:1
2 Bak. 22:12Nt 34:1, 2
2 Bak. 22:1Yos 15:20, 39
2 Bak. 22:21Ba 15:5
2 Bak. 22:32Nt 34:8
2 Bak. 22:41Nt 6:13
2 Bak. 22:42Ba 12:4, 5; 2Nt 24:8
2 Bak. 22:42Ba 12:9; 2Nt 34:9
2 Bak. 22:52Ba 12:11, 12; 2Nt 34:10
2 Bak. 22:62Nt 34:11
2 Bak. 22:72Ba 12:15; 2Nt 34:12
2 Bak. 22:82Ba 22:3
2 Bak. 22:8Mib 31:24-26
2 Bak. 22:82Nt 34:14, 15
2 Bak. 22:92Nt 34:16-18
2 Bak. 22:10Mib 31:9
2 Bak. 22:112Nt 34:19-21; Yoe 2:13
2 Bak. 22:122Ba 25:22; Yir 26:24
2 Bak. 22:13Mib 4:24; 29:27; 31:17
2 Bak. 22:14Kob 15:20; Bas 4:4; Ne 6:14; Lk 2:36; Mis 21:8, 9
2 Bak. 22:142Nt 34:22-28
2 Bak. 22:162Ba 22:8
2 Bak. 22:17Kob 20:3; Mib 32:17; Bas 2:12; Yir 2:11
2 Bak. 22:17Yis 2:8
2 Bak. 22:17Mib 32:22; Yis 33:14; Yir 7:20; Ezk 20:48
2 Bak. 22:191Ba 21:29; Yk 4:6
2 Bak. 22:192Ba 22:11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 22:1-20

Mokanda ya mibale ya

22 Yosiya+ azalaki na mbula mwambe ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 31 na Yerusaleme.+ Nkombo ya mama na ye ezalaki Yedida, mwana ya Adaya moto ya engumba Bozekate.+ 2 Yosiya asalaki makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Alandaki ndakisa* ya nkɔkɔ na ye Davidi na makambo nyonso,+ mpe apɛngwaki te mpo na kokende na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.

3 Na mbula ya 18 ya boyangeli na ye, Mokonzi Yosiya atindaki Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mwana ya Azaliya, mwana ya Meshulame, akende na ndako ya Yehova,+ alobi: 4 “Kende epai ya nganga-nzambe monene Hilikiya,+ mpe yebisá ye asangisa mbongo nyonso oyo ezali komemama na ndako ya Yehova,+ oyo bakɛngɛli ya baporte bazwi epai ya bato.+ 5 Bápesa yango bato oyo batyamaki mpo na kotambwisa misala na ndako ya Yehova, mpe bango bakofuta basali-misala na ndako ya Yehova oyo bakobongisa bisika oyo ebebi,*+ 6 elingi koloba, bato ya misala ya mabɔkɔ, batongi, mpe bamasɔ; bakosomba mabaya ná mabanga oyo bakatá mpo na kobongisa ndako.+ 7 Kasi esengeli te kotuna bango ndenge oyo bazali kosalela mbongo yango, mpo bazali bato oyo babongi kotyelama motema.”+

8 Na nsima nganga-nzambe monene Hilikiya alobaki na Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ+ ete: “Namoni buku ya Mobeko+ na ndako ya Yehova.” Bongo Hilikiya apesaki Shafane buku yango, mpe Shafane abandaki kotánga yango.+ 9 Na nsima Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ akendaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye ete: “Basaleli na yo babimisi mbongo oyo ezalaki na tempelo, mpe bapesi yango bato oyo batyamaki mpo na kotambwisa misala na ndako ya Yehova.”+ 10 Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ayebisaki lisusu mokonzi: “Nganga-nzambe Hilikiya apesi ngai buku moko.”+ Bongo Shafane abandaki kotánga yango liboso ya mokonzi.

11 Ntango kaka mokonzi ayokaki maloba ya buku yango ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye.+ 12 Na nsima mokonzi apesaki nganga-nzambe Hilikiya, Ahikame+ mwana ya Shafane, Akabore mwana ya Mikaya, Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mpe Asaya mosaleli ya mokonzi mitindo oyo: 13 “Bókende, bótuna Yehova mpo na ngai, mpo na bato ya ekólo, mpe mpo na Yuda mobimba na ntina etali maloba ya buku oyo euti komonana; mpo nkanda makasi ya Yehova oyo epeleli biso ezali monene,+ mpamba te bankɔkɔ na biso batosaki te maloba ya buku oyo, basalelaki te makambo nyonso oyo ekomami mpo na biso.”

14 Na yango nganga-nzambe Hilikiya, Ahikame, Akabore, Shafane, mpe Asaya bakendaki epai ya mosakoli-mwasi Huluda.+ Azalaki mwasi ya Shalume, mokɛngɛli ya esika ya kobomba bilamba, mwana ya Tikiva mwana ya Harase. Azalaki kofanda na Kartye ya mibale na Yerusaleme; mpe kuna nde basololaki na ye.+ 15 Alobaki na bango: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Bóyebisa mobali oyo atindi bino epai na ngai: 16 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nakoyeisa mpasi na esika oyo mpe na bafandi na yango, ɛɛ maloba nyonso ya buku oyo mokonzi ya Yuda atángi.+ 17 Lokola basundoli ngai mpe bazali kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka+ mpo na kosilikisa ngai na misala na bango nyonso,+ nkanda na ngai ekopelela esika oyo mpe ekosila te.’”+ 18 Kasi bóloba boye epai ya mokonzi ya Yuda, oyo atindi bino mpo na kotuna Yehova: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Mpo na maloba oyo oyoki, 19 lokola motema na yo ezalaki makasi te mpe omikitisi+ liboso ya Yehova ntango oyoki makambo oyo nalobi mpo na esika oyo mpe bafandi na yango, ete elakeli mabe ekozwa bango mpe bato mosusu bakokóma na nsɔmɔ mpo na makambo oyo ekoyela bango, mpe lokola opasoli bilamba na yo+ mpe oleli liboso na ngai, ngai mpe nayoki yo, yango nde liloba ya Yehova. 20 Yango wana nakoyanganisa yo na bankɔkɔ na yo,* mpe okotyama na lilita na yo na kimya, mpe miso na yo ekomona te mpasi oyo nakoyeisela esika oyo.’”’” Bongo bamemelaki mokonzi eyano yango.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto