Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 18
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Eteni ya banganga-nzambe mpe Balevi (1-8)

      • Misala ya bilimo mabe epekisami (9-14)

      • Mosakoli moko lokola Moize (15-19)

      • Ndenge ya koyeba basakoli ya lokuta (20-22)

Kolimbola Mibeko 18:1

Mitindami

  • +Mit 18:20, 24; Mib 10:9; Yos 13:14, 33; 1Ko 9:13

Kolimbola Mibeko 18:4

Mitindami

  • +Kob 23:19; Mit 18:8, 12; 2Nt 31:4; Ne 12:44

Kolimbola Mibeko 18:5

Mitindami

  • +Kob 28:1; Mit 3:10; Mib 10:8

Kolimbola Mibeko 18:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ye esepeli.”

  • *

    Elingi koloba, esika oyo Yehova aponi mpo ezala esika ya losambo.

Mitindami

  • +Mit 35:2
  • +Mib 12:5, 6; 16:2; Nz 26:8

Kolimbola Mibeko 18:7

Mitindami

  • +2Nt 31:2

Kolimbola Mibeko 18:8

Mitindami

  • +Le 7:10

Kolimbola Mibeko 18:9

Mitindami

  • +Le 18:26; Mib 12:30

Kolimbola Mibeko 18:10

Mitindami

  • +Mib 12:31; 2Ba 16:1, 3; 2Nt 28:1, 3; Nz 106:35-37; Yir 32:35
  • +2Ba 17:17; Mis 16:16
  • +Le 19:26; Mis 19:19
  • +Ezk 21:21
  • +Kob 22:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 24

Kolimbola Mibeko 18:11

Mitindami

  • +Le 20:27; 1Nt 10:13
  • +Le 19:31
  • +1Sa 28:7-11; Yis 8:19; Ga 5:19, 20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 24

Kolimbola Mibeko 18:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 24

Kolimbola Mibeko 18:13

Mitindami

  • +Mt 5:48; 2Pe 3:14

Kolimbola Mibeko 18:14

Mitindami

  • +Le 19:26; 2Ba 21:1, 2, 6
  • +Yos 13:22

Kolimbola Mibeko 18:15

Mitindami

  • +Eb 49:10; Mit 24:17; Lk 7:16; Yn 1:45; 6:14; Mis 3:22; 7:37

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2009, nk. 25-28

    Mokili mozangi bitumba?, nk. 14-15

    “Makomami nyonso,” nk. 40-41

Kolimbola Mibeko 18:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lisangá.”

Mitindami

  • +Kob 19:17
  • +Kob 20:19

Kolimbola Mibeko 18:18

Mitindami

  • +Kob 34:28; Mit 12:3; Mt 4:1, 2; 11:29; Yn 5:46
  • +Yn 17:8
  • +Yn 12:49; Ebr 1:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2009, nk. 25-28

    15/2/2000, lok. 24

    15/11/1991, nk. 28-31

    Mokili mozangi bitumba?, nk. 14-15

Kolimbola Mibeko 18:19

Mitindami

  • +Mis 3:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mokili mozangi bitumba?, nk. 14-15

Kolimbola Mibeko 18:20

Mitindami

  • +Mib 13:1-5; Yir 28:11-17

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 18:1Mit 18:20, 24; Mib 10:9; Yos 13:14, 33; 1Ko 9:13
Mib. 18:4Kob 23:19; Mit 18:8, 12; 2Nt 31:4; Ne 12:44
Mib. 18:5Kob 28:1; Mit 3:10; Mib 10:8
Mib. 18:6Mit 35:2
Mib. 18:6Mib 12:5, 6; 16:2; Nz 26:8
Mib. 18:72Nt 31:2
Mib. 18:8Le 7:10
Mib. 18:9Le 18:26; Mib 12:30
Mib. 18:10Mib 12:31; 2Ba 16:1, 3; 2Nt 28:1, 3; Nz 106:35-37; Yir 32:35
Mib. 18:102Ba 17:17; Mis 16:16
Mib. 18:10Le 19:26; Mis 19:19
Mib. 18:10Ezk 21:21
Mib. 18:10Kob 22:18
Mib. 18:11Le 20:27; 1Nt 10:13
Mib. 18:11Le 19:31
Mib. 18:111Sa 28:7-11; Yis 8:19; Ga 5:19, 20
Mib. 18:13Mt 5:48; 2Pe 3:14
Mib. 18:14Le 19:26; 2Ba 21:1, 2, 6
Mib. 18:14Yos 13:22
Mib. 18:15Eb 49:10; Mit 24:17; Lk 7:16; Yn 1:45; 6:14; Mis 3:22; 7:37
Mib. 18:16Kob 19:17
Mib. 18:16Kob 20:19
Mib. 18:18Kob 34:28; Mit 12:3; Mt 4:1, 2; 11:29; Yn 5:46
Mib. 18:18Yn 17:8
Mib. 18:18Yn 12:49; Ebr 1:2
Mib. 18:19Mis 3:23
Mib. 18:20Mib 13:1-5; Yir 28:11-17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 18:1-22

Kolimbola Mibeko

18 “Banganga-nzambe Balevi, mpe na nsima libota mobimba ya Levi, bakopesa bango likabo te mpe libula te elongo na Yisraele. Bakolya makabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ, makabo oyo ezali eteni na ye.+ 2 Bongo bakozala na libula ata moko te na kati ya bandeko na bango. Yehova azali libula na bango, kaka ndenge alobi na bango.

3 “Oyo nde ekozala lotomo ya banganga-nzambe epai ya bato: Moto nyonso oyo apesi mbeka, ezala ya ngɔmbɛ to ya mpate, asengeli kopesa nganga-nzambe lipeka, mbanga mpe likundu. 4 Okopesa ye mbuma ya liboso ya milona na yo, ya vinyo na yo ya sika, ya mafuta na yo mpe nsuki ya liboso oyo bakati bampate na yo.+ 5 Yehova Nzambe na yo aponi ye ná bana na ye, kati na mabota na yo nyonso mpo na kosala mosala na nkombo ya Yehova ntango nyonso.+

6 “Kasi soki Molevi alongwe na moko ya bingumba na yo na Yisraele, epai azalaki kofanda+ mpe asepeli* kokende na esika oyo Yehova aponi,*+ 7 akoki kosala mosala kuna na nkombo ya Yehova Nzambe na ye lokola bandeko na ye nyonso, Balevi, oyo batɛlɛmi kuna liboso ya Yehova.+ 8 Akozwa bilei ndenge moko na bango,+ longola oyo azwaka na biloko oyo atɛki, oyo euti na bankɔkɔ na ye.

9 “Ntango okokɔta na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, osengeli te koyekola kosala makambo oyo eyinamá ya bikólo yango.+ 10 Epai na yo moto ya lolenge oyo asengeli kozala te: moto oyo alekisi mwana na ye ya mobali to ya mwasi mbeka na mɔtɔ,+ moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná,+ moto ya misala ya maji,+ moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya+ to moto oyo azali nganga-nkisi,+ 11 moto oyo azali kolɔka bato mosusu, moto oyo azali kotuna makambo epai ya moto oyo asololaka na bilimo+ to moto oyo asakolaka makambo ekoya,+ to moto oyo azali kotuna bakufi.+ 12 Mpo Yehova ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo yango, mpe Yehova Nzambe na yo azali kobengana bikólo yango liboso na yo mpo ezali kosala makambo oyo eyinamá. 13 Osengeli kozala na mbeba te na miso ya Yehova Nzambe na yo.+

14 “Mpo bikólo yango oyo ozali kobengana ezalaki koyokela bato oyo basalaka misala ya maji+ mpe baoyo basakolaka makambo oyo ebombaná,+ kasi Yehova Nzambe na yo apesi yo nzela te ya kosala eloko ya ndenge wana. 15 Yehova Nzambe na yo akobimisela yo na kati ya bandeko na yo, mosakoli moko lokola ngai. Osengeli koyoka ye.+ 16 Yango nde osɛngaki Yehova Nzambe na yo na Horebe na mokolo ya liyangani*+ ntango olobaki ete: ‘Kotika te nayoka mongongo ya Yehova Nzambe na ngai to namona lisusu mɔtɔ monene oyo, mpo nakufa te.’+ 17 Mpe Yehova alobaki na ngai ete: ‘Makambo oyo balobi ezali malamu. 18 Nakobimisela bango mosakoli moko lokola yo,+ oyo akouta na kati ya bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na ye,+ mpe akoyebisa bango mitindo nyonso oyo nakopesa ye.+ 19 Kasi moto oyo akoyoka te maloba na ngai oyo mosakoli yango akoloba na nkombo na ngai, nakosɛnga ye azongisa monɔkɔ.+

20 “‘Soki na lofundo nyonso mosakoli moko alobi na nkombo na ngai liloba oyo napesi ye mitindo te ya koloba to alobi na nkombo ya banzambe mosusu, mosakoli yango asengeli kokufa.+ 21 Kasi, soki olobi na motema na yo ete: “Ndenge nini tokoyeba ete Yehova alobi liloba oyo te?” 22 Soki mosakoli alobi na nkombo ya Yehova mpe liloba yango ekokisami te to esalemi te, wana ezali liloba oyo Yehova alobi te. Mosakoli alobaki yango na lofundo. Osengeli kobanga ye te.’

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto