Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Loyembo ya Salomo 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Loyembo ya Salomo

    • MOSHULAME NA YERUSALEME (3:6–8:4)

Loyembo ya Salomo 4:1

Mitindami

  • +Mit 32:1; Mib 3:12; Loy 6:5-7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2006, lok. 19

Loyembo ya Salomo 4:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Mpakatoi.”

Loyembo ya Salomo 4:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bakakisá.”

Mitindami

  • +Loy 1:10
  • +Ne 3:25; Loy 7:4
  • +2Sa 8:7; 2Ba 11:10

Loyembo ya Salomo 4:5

Mitindami

  • +Loy 7:3

Loyembo ya Salomo 4:6

Mitindami

  • +Mos 2:5

Loyembo ya Salomo 4:7

Mitindami

  • +Loy 4:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 29

    15/11/2006, lok. 20

Loyembo ya Salomo 4:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Anti-Liban.”

Mitindami

  • +Mib 3:25
  • +Mib 3:8, 9; Nz 133:3

Loyembo ya Salomo 4:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Nsinga ya nkingo mpo na monzɛlɛ.

Mitindami

  • +Mas 5:18, 19

Loyembo ya Salomo 4:10

Mitindami

  • +Loy 7:12
  • +Loy 1:2, 4
  • +Est 2:12; Loy 1:12

Loyembo ya Salomo 4:11

Mitindami

  • +Mas 16:24
  • +Loy 5:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 29

    15/11/2006, lok. 19

Loyembo ya Salomo 4:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, nk. 31-32

    15/11/2006, lok. 20

    1/11/2000, nk. 11-12

Loyembo ya Salomo 4:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “Loposo.”

  • *

    To, “elanga.”

Loyembo ya Salomo 4:14

Mitindami

  • +Yn 12:3
  • +Yis 43:24
  • +Mas 7:17
  • +Nz 45:8
  • +Kob 30:23, 24, 34; Ezk 27:2, 22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2014, lok. 10

Loyembo ya Salomo 4:15

Mitindami

  • +Yir 18:14

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Loy. 4:1Mit 32:1; Mib 3:12; Loy 6:5-7
Loy. 4:4Loy 1:10
Loy. 4:4Ne 3:25; Loy 7:4
Loy. 4:42Sa 8:7; 2Ba 11:10
Loy. 4:5Loy 7:3
Loy. 4:6Mos 2:5
Loy. 4:7Loy 4:1
Loy. 4:8Mib 3:25
Loy. 4:8Mib 3:8, 9; Nz 133:3
Loy. 4:9Mas 5:18, 19
Loy. 4:10Loy 7:12
Loy. 4:10Loy 1:2, 4
Loy. 4:10Est 2:12; Loy 1:12
Loy. 4:11Mas 16:24
Loy. 4:11Loy 5:1
Loy. 4:14Yn 12:3
Loy. 4:14Yis 43:24
Loy. 4:14Mas 7:17
Loy. 4:14Nz 45:8
Loy. 4:14Kob 30:23, 24, 34; Ezk 27:2, 22
Loy. 4:15Yir 18:14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Loyembo ya Salomo 4:1-16

Loyembo ya Salomo

4 “Talá! Bolingo na ngai, ozali kitoko.

Talá! Ozali kitoko.

Miso na yo ezali lokola miso ya bibenga, ezipami na nse ya litambala na yo.

Nsuki na yo ezali lokola etonga ya bantaba

Oyo ezali kokita na bangomba ya Gileade.+

 2 Mino na yo ezali lokola etonga ya bampate oyo euti kokatama nsuki sika

Oyo ebimi na mai nsima ya kosukolama,

Yango nyonso ezali na bana ya mapasa,

Mpe moko te ebungisi mwana na yango.

 3 Mbɛbu na yo ezali lokola nsinga ya elamba ya motane makasi,

Mpe maloba na yo ezali kitoko.

Matama* na yo oyo ezipami na nse ya litambala na yo

Ezali lokola eteni ya mbuma ya grenade.

 4 Nkingo na yo+ ezali lokola linɔ́ngi ya Davidi,+

Oyo batongá na mabanga oyo ebongisami na milɔngɔ

Oyo likoló na yango batyá* banguba nkóto,

Banguba nyonso ya sɛrklɛ ya bilombe mibali.+

 5 Mabɛlɛ na yo mibale ezali lokola bana mibale ya nyama babengi bishe,

Mapasa ya mboloko,+

Oyo ezali kolya na kati ya bafololo lísi.”

 6 “Liboso ete mopɛpɛ ya moi epɛpa mokemoke mpe bilili elimwa,

Nakokende na ngai na ngomba ya mire

Mpe na ngomba moke ya olibana.”+

 7 “Ozali kitoko nzoto mobimba, bolingo na ngai,+

Ozali ata na mbeba moko te.

 8 Mwasi na ngai ya libala, yaká, tólongwa na Liban,+

Yaká, tólongwa na Liban.

Kitá uta na nsɔngɛ ya ngomba ya Amana,*

Uta na nsɔngɛ ya ngomba ya Senire, uta na nsɔngɛ ya ngomba ya Hermone,+

Uta na bisika oyo bankɔsi efandaka, uta na bangomba ya bankɔi.

 9 Ndeko na ngai ya mwasi, mwasi oyo nakobala, obɛtisi ngai motema,+

Otali ngai kaka mbala moko mpe obɛtisi ngai motema,

Na mwa biju oyo esimbami na shɛnɛti* ya nkingo na yo.

10 Ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai oyo nakobala, ndenge na yo ya kolakisa lolango ezali kitoko mpenza!+

Ndenge na yo ya kolakisa lolango eleki vinyo na elɛngi,+

Mpe malasi na yo ezali na nsolo kitoko mpenza koleka ya biloko nyonso oyo epesaka nsolo kitoko!+

11 Mwasi na ngai oyo nakobala, mbɛbu na yo ezali lokola ndako ya nzoi oyo ezali kotangisa mafuta na yango.+

Mafuta ya nzoi mpe miliki ezali na nse ya lolemo na yo,+

Mpe nsolo kitoko ya bilamba na yo ezali lokola nsolo kitoko ya Liban.

12 Ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai oyo nakobala, azali lokola elanga oyo ezali na kati ya lopango oyo ekangamá,

Elanga oyo ezali na kati ya lopango oyo ekangamá, liziba oyo bakangi mpe batye elembo.

13 Bitape* na yo ezali lokola paradiso* ya banzete ya grenade

Oyo ezali na bambuma ya kitoko koleka, banzete ya hena mpe milona ya narde,

14 Narde+ mpe fololo safra, nkokó ya nsolo mpimbo+ mpe kinamono,+

Ná mitindo nyonso ya banzete ya olibana, mire mpe aloe,+

Ná malasi nyonso ya kitoko koleka;+

15 Ozali liziba ya mai na kati ya elanga, libulu ya mai ya pɛto,

Mpe mikɛli ya mai oyo ezali kouta na Liban.+

16 Lamuká, Ee mopɛpɛ ya nɔrdi,

Kɔtá, Ee mopɛpɛ ya sudi.

Pɛpá na elanga na ngai.

Malasi na yango ya kitoko epanzana.”

“Bolingo na ngai akɔta na elanga na ye

Mpe alya bambuma na yango oyo eleki kitoko.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto