Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Yehoashe, mokonzi ya Yuda (1-3)

      • Yehoashe abongisi tempelo (4-16)

      • Etumba ya bato ya Siri (17, 18)

      • Babomi Yehoashe (19-21)

2 Bakonzi 12:1

Mitindami

  • +1Ba 19:16; 2Ba 10:30
  • +2Ba 11:2; 1Nt 3:10, 11
  • +2Nt 24:1, 2

2 Bakonzi 12:3

Mitindami

  • +Mit 33:52

2 Bakonzi 12:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

Mitindami

  • +2Nt 31:12
  • +Kob 30:13; 2Nt 24:9
  • +Kob 25:2; 35:21

2 Bakonzi 12:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “epai ya bato oyo bayebani na bango.”

  • *

    To, “esali minkaka.”

Mitindami

  • +2Nt 24:7

2 Bakonzi 12:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Nt 24:5

2 Bakonzi 12:7

Mitindami

  • +2Ba 11:4; 2Nt 23:1; 24:15
  • +2Nt 24:6

2 Bakonzi 12:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kɛsi.”

Mitindami

  • +2Nt 24:8; Mr 12:41; Lk 21:1
  • +2Nt 24:10

2 Bakonzi 12:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kotya na saki.” Lil., “kokangisa.”

Mitindami

  • +2Nt 24:11

2 Bakonzi 12:11

Mitindami

  • +2Ba 22:4-6; 2Nt 24:12

2 Bakonzi 12:13

Mitindami

  • +Mit 10:2; 2Nt 5:12
  • +2Nt 24:14

2 Bakonzi 12:15

Mitindami

  • +2Ba 22:7

2 Bakonzi 12:16

Mitindami

  • +Le 5:15
  • +Le 7:7; Mit 18:8

2 Bakonzi 12:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Hazaele abalusaki elongi na ye mpo na komata mpe kobundisa.”

Mitindami

  • +1Ba 19:15; 2Ba 8:13; 10:32
  • +1Nt 18:1
  • +2Nt 24:23

2 Bakonzi 12:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bapesaki.”

Mitindami

  • +1Ba 15:18; 2Ba 16:8; 18:15

2 Bakonzi 12:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na Bete-milo.”

Mitindami

  • +2Nt 24:25, 26; 25:27
  • +2Sa 5:9; 1Ba 9:15, 24; 2Nt 32:5

2 Bakonzi 12:21

Mitindami

  • +2Ba 14:1, 5
  • +2Nt 24:27

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 12:11Ba 19:16; 2Ba 10:30
2 Bak. 12:12Ba 11:2; 1Nt 3:10, 11
2 Bak. 12:12Nt 24:1, 2
2 Bak. 12:3Mit 33:52
2 Bak. 12:42Nt 31:12
2 Bak. 12:4Kob 30:13; 2Nt 24:9
2 Bak. 12:4Kob 25:2; 35:21
2 Bak. 12:52Nt 24:7
2 Bak. 12:62Nt 24:5
2 Bak. 12:72Ba 11:4; 2Nt 23:1; 24:15
2 Bak. 12:72Nt 24:6
2 Bak. 12:92Nt 24:8; Mr 12:41; Lk 21:1
2 Bak. 12:92Nt 24:10
2 Bak. 12:102Nt 24:11
2 Bak. 12:112Ba 22:4-6; 2Nt 24:12
2 Bak. 12:13Mit 10:2; 2Nt 5:12
2 Bak. 12:132Nt 24:14
2 Bak. 12:152Ba 22:7
2 Bak. 12:16Le 5:15
2 Bak. 12:16Le 7:7; Mit 18:8
2 Bak. 12:171Ba 19:15; 2Ba 8:13; 10:32
2 Bak. 12:171Nt 18:1
2 Bak. 12:172Nt 24:23
2 Bak. 12:181Ba 15:18; 2Ba 16:8; 18:15
2 Bak. 12:202Nt 24:25, 26; 25:27
2 Bak. 12:202Sa 5:9; 1Ba 9:15, 24; 2Nt 32:5
2 Bak. 12:212Ba 14:1, 5
2 Bak. 12:212Nt 24:27
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 12:1-21

Mokanda ya mibale ya

12 Na mbula ya nsambo ya boyangeli ya Yehu,+ Yehoashe+ akómaki mokonzi mpe ayangelaki mbula 40 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Zibia, moto ya Beere-sheba.+ 2 Yehoashe akobaki kosala makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova mikolo nyonso oyo nganga-nzambe Yehoyada azalaki mopesi-toli na ye. 3 Nzokande, bisika oyo etombwaná+ elongwaki te na ekólo. Bato bazalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná.

4 Mokolo moko Yehoashe alobaki na banganga-nzambe boye: “Bózwa mbongo nyonso oyo bazali komema na ndako ya Yehova mpo na makabo mosantu,+ ezala mpako oyo moto* mokomoko asengeli kofuta,+ mbongo oyo bokozwa na bato oyo basalaki elako, mpe mbongo nyonso oyo moto apesi na ndako ya Yehova+ ndenge motema na ye etindi ye. 5 Banganga-nzambe bango moko bakozwa mbongo yango epai ya bato oyo bakopesa yango,* mpe bakosalela yango mpo na kobongisa ndako ya Nzambe, bisika nyonso oyo ebebi.”*+

6 Nzokande na mbula ya 23 ya boyangeli ya Yehoashe, banganga-nzambe babongisaki naino te bisika oyo ebebaki na tempelo.*+ 7 Bongo Mokonzi Yehoashe+ abengaki nganga-nzambe Yehoyada ná banganga-nzambe mosusu mpe alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kobongisa te bisika oyo ebebi na tempelo? Sikoyo bózwa lisusu mbongo te epai ya bato oyo bapesaka yango, longola kaka soki bokosalela yango mpo na kobongisa tempelo.”+ 8 Na yango banganga-nzambe bandimaki ete bakozwa lisusu mbongo epai ya bato te mpe ete mokumba ya kobongisa tempelo ezali lisusu na motó na bango te.

9 Bongo nganga-nzambe Yehoyada azwaki sanduku*+ moko mpe atɔbɔlaki lidusu na ezipeli na yango mpe atyaki yango pembeni ya etumbelo, na lobɔkɔ ya mobali ntango moto azali kokɔta na ndako ya Yehova. Kuna nde banganga-nzambe oyo bazalaki bakɛngɛli ya porte bazalaki kotya mbongo nyonso oyo bato bazalaki koya na yango na ndako ya Yehova.+ 10 Mbala nyonso oyo bamoni ete mbongo ekómi mingi mpenza na kati ya kɛsi yango, sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi mpe nganga-nzambe monene bazalaki koya kozwa* mbongo oyo bato bayaki na yango na ndako ya Yehova+ mpe bazalaki kotánga yango. 11 Mbongo oyo batángi, bazalaki kopesa yango bato oyo batyamaki mpo na kotambwisa misala na ndako ya Yehova. Na ngala na bango, bato yango bazalaki kofuta bato ya misala ya mabaya ná batongi oyo bazalaki kosala mosala na ndako ya Yehova,+ 12 ezala mpe bamasɔ ná bakati-mabanga. Bazalaki mpe kosomba banzete ná mabanga oyo bakatá mpo na kobongisa bisika oyo ebebi na ndako ya Yehova. Bazalaki mpe kosalela mbongo yango mpo na kosomba biloko mosusu nyonso oyo esengelaki mpo na kobongisa ndako yango.

13 Kasi mbongo oyo bato bazalaki koya na yango na ndako ya Yehova, basalelaki yango te mpo na kosala basaani ya palata, biloko ya koboma mɔtɔ, mabakuli, bakelelo,+ to eloko mosusu nyonso ya wolo to ya palata mpo na ndako ya Yehova.+ 14 Bazalaki kopesa mbongo yango kaka bato oyo bazalaki kosala mosala, mpe na mbongo yango, bazalaki kobongisa ndako ya Yehova. 15 Bato oyo mbongo epesamaki na mabɔkɔ na bango mpo na kofuta bato ya mosala, bazalaki kotuna bango te ndenge oyo basaleli mbongo, mpo bazalaki bato oyo babongi kotyelama motema.+ 16 Kasi mbongo ya makabo mpo na ngambo+ mpe mbongo ya makabo mpo na lisumu, bazalaki koya na yango na ndako ya Yehova te; ezalaki ya banganga-nzambe.+

17 Ezalaki na ntango yango nde Hazaele+ mokonzi ya Siri akendaki kobundisa engumba Gate,+ mpe azwaki yango. Nsima na yango, azwaki mokano ya kobundisa* Yerusaleme.+ 18 Na yango Yehoashe mokonzi ya Yuda azwaki makabo mosantu nyonso oyo bankɔkɔ na ye Yehoshafate, Yehorame ná Ahazia, bakonzi ya Yuda, basantisaki.* Azwaki mpe makabo mosantu na ye moko, ná wolo nyonso oyo ezalaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe ya ndako ya mokonzi, mpe atindelaki yango Hazaele mokonzi ya Siri.+ Bongo Hazaele abundisaki lisusu Yerusaleme te.

19 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehoashe, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda. 20 Nzokande, basaleli ya Yehoashe basanganaki, basalelaki ye likita,+ mpe babomaki ye na ndako ya Mwa Ngomba,*+ na nzela oyo ekiti tii na Sila. 21 Basaleli na ye oyo babomaki ye ezalaki Yozakare mwana ya Shimeate mpe Yehozabade mwana ya Shomere.+ Bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi, mpe mwana na ye Amazia akómaki mokonzi na esika na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto