Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Samwele

      • Ndako ya Davidi ezali se kokóma makasi (1)

      • Bana ya Davidi ya mibali (2-5)

      • Abinere akómi na ngámbo ya Davidi (6-21)

      • Yoabe abomi Abinere (22-30)

      • Davidi asali matánga mpo na Abinere (31-39)

2 Samwele 3:1

Mitindami

  • +1Sa 15:27, 28; 24:17, 20; 26:25
  • +2Sa 2:17

2 Samwele 3:2

Mitindami

  • +1Nt 3:1-4
  • +2Sa 13:1
  • +1Sa 25:43

2 Samwele 3:3

Mitindami

  • +1Sa 25:42
  • +2Sa 15:12
  • +2Sa 13:37

2 Samwele 3:4

Mitindami

  • +1Ba 1:5

2 Samwele 3:6

Mitindami

  • +2Sa 2:8

2 Samwele 3:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “makango.”

Mitindami

  • +2Sa 21:8-11
  • +2Sa 2:10
  • +2Sa 16:21; 1Ba 2:22

2 Samwele 3:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “motó ya mbwa.”

2 Samwele 3:9

Mitindami

  • +1Sa 15:27, 28; Nz 78:70; 89:20

2 Samwele 3:10

Mitindami

  • +Bas 20:1; 2Sa 24:2

2 Samwele 3:11

Mitindami

  • +2Sa 3:39

2 Samwele 3:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mpe talá! lobɔkɔ na ngai ekozala elongo na yo.”

Mitindami

  • +2Sa 5:3

2 Samwele 3:13

Mitindami

  • +1Sa 18:20; 19:11; 1Nt 15:29

2 Samwele 3:14

Mitindami

  • +2Sa 2:10
  • +1Sa 18:25, 27

2 Samwele 3:15

Mitindami

  • +1Sa 25:44

2 Samwele 3:16

Mitindami

  • +2Sa 16:5; 1Ba 2:8

2 Samwele 3:18

Mitindami

  • +1Sa 13:14; 15:27, 28; 16:1, 13; Nz 89:3, 20; 132:17; Mis 13:22

2 Samwele 3:19

Mitindami

  • +1Sa 10:20, 21; 1Nt 12:29

2 Samwele 3:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo elingi.”

2 Samwele 3:23

Mitindami

  • +2Sa 8:16
  • +1Sa 14:50; 2Sa 2:8, 22
  • +1Sa 14:51

2 Samwele 3:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “asalaki bongo mpo na makila ya.”

Mitindami

  • +2Sa 3:20
  • +1Ba 2:5
  • +2Sa 2:22, 23

2 Samwele 3:28

Mitindami

  • +Eb 9:6; Kob 21:12; Mit 35:33; Mib 21:9

2 Samwele 3:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu maloba yango elimboli mobali oyo azali ebɔsɔnɔ mpe asengeli kaka kosala mosala ya basi.

Mitindami

  • +Nz 7:16; 55:23; Mas 5:22
  • +Le 15:2
  • +Le 13:44; Mit 5:2
  • +Mib 27:24; Nz 109:2, 10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2005, lok. 17

2 Samwele 3:30

Mitindami

  • +2Sa 2:24
  • +2Sa 2:8
  • +2Sa 2:23

2 Samwele 3:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

2 Samwele 3:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kwivre.”

  • *

    Lil., “bana ya kozanga bosembo.”

Mitindami

  • +1Ba 2:31, 32

2 Samwele 3:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “limpa ya mawa.”

Mitindami

  • +Bas 20:26

2 Samwele 3:37

Mitindami

  • +2Sa 3:28; 1Ba 2:5

2 Samwele 3:38

Mitindami

  • +1Sa 14:50; 2Sa 2:8; 3:12

2 Samwele 3:39

Mitindami

  • +2Sa 2:4
  • +1Nt 2:15, 16
  • +2Sa 19:13; 20:10
  • +2Sa 3:29; 1Ba 2:5, 34

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Sa. 3:11Sa 15:27, 28; 24:17, 20; 26:25
2 Sa. 3:12Sa 2:17
2 Sa. 3:21Nt 3:1-4
2 Sa. 3:22Sa 13:1
2 Sa. 3:21Sa 25:43
2 Sa. 3:31Sa 25:42
2 Sa. 3:32Sa 15:12
2 Sa. 3:32Sa 13:37
2 Sa. 3:41Ba 1:5
2 Sa. 3:62Sa 2:8
2 Sa. 3:72Sa 21:8-11
2 Sa. 3:72Sa 2:10
2 Sa. 3:72Sa 16:21; 1Ba 2:22
2 Sa. 3:91Sa 15:27, 28; Nz 78:70; 89:20
2 Sa. 3:10Bas 20:1; 2Sa 24:2
2 Sa. 3:112Sa 3:39
2 Sa. 3:122Sa 5:3
2 Sa. 3:131Sa 18:20; 19:11; 1Nt 15:29
2 Sa. 3:142Sa 2:10
2 Sa. 3:141Sa 18:25, 27
2 Sa. 3:151Sa 25:44
2 Sa. 3:162Sa 16:5; 1Ba 2:8
2 Sa. 3:181Sa 13:14; 15:27, 28; 16:1, 13; Nz 89:3, 20; 132:17; Mis 13:22
2 Sa. 3:191Sa 10:20, 21; 1Nt 12:29
2 Sa. 3:232Sa 8:16
2 Sa. 3:231Sa 14:50; 2Sa 2:8, 22
2 Sa. 3:231Sa 14:51
2 Sa. 3:272Sa 3:20
2 Sa. 3:271Ba 2:5
2 Sa. 3:272Sa 2:22, 23
2 Sa. 3:28Eb 9:6; Kob 21:12; Mit 35:33; Mib 21:9
2 Sa. 3:29Nz 7:16; 55:23; Mas 5:22
2 Sa. 3:29Le 15:2
2 Sa. 3:29Le 13:44; Mit 5:2
2 Sa. 3:29Mib 27:24; Nz 109:2, 10
2 Sa. 3:302Sa 2:24
2 Sa. 3:302Sa 2:8
2 Sa. 3:302Sa 2:23
2 Sa. 3:341Ba 2:31, 32
2 Sa. 3:35Bas 20:26
2 Sa. 3:372Sa 3:28; 1Ba 2:5
2 Sa. 3:381Sa 14:50; 2Sa 2:8; 3:12
2 Sa. 3:392Sa 19:13; 20:10
2 Sa. 3:392Sa 3:29; 1Ba 2:5, 34
2 Sa. 3:392Sa 2:4
2 Sa. 3:391Nt 2:15, 16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Samwele 3:1-39

Mokanda ya mibale ya Samwele

3 Etumba kati na ndako ya Saulo mpe ndako ya Davidi ezalaki kosila te; mpe Davidi azalaki se kokóma makasi,+ ndako ya Saulo ezalaki se kosila makasi.+

2 Na ntango yango, Davidi abotaki bana mibali na Hebrone.+ Mwana na ye ya liboso ezalaki Aminone,+ oyo abotaki ná Ahinoame,+ moto ya engumba Yizireele. 3 Mwana na ye ya mibale ezalaki Kileabe, oyo abotaki ná Abigaile,+ oyo azalaki mwasi ya Nabale moto ya Karamele. Mwana na ye ya misato ezalaki Abisalome,+ oyo abotaki ná Maaka, mwana ya Talamai+ mokonzi ya Geshure. 4 Mwana na ye ya minei ezalaki Adoniya,+ oyo abotaki ná Hagite. Mwana na ye ya mitano ezalaki Shefatia, oyo abotaki ná Abitale. 5 Mwana na ye ya motoba ezalaki Yitreame, oyo abotaki ná Egla. Wana nde bana oyo Davidi abotaki na Hebrone.

6 Wana etumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ezalaki se kokoba, Abinere+ azalaki se kokóma na nguya mingi na libota ya Saulo. 7 Nzokande, Saulo azalaki na mwasi mosusu, nkombo na ye Rizipa,+ mwana mwasi ya Aiya. Na nsima, Ishi-boshete+ alobaki na Abinere: “Mpo na nini osangisi nzoto na mwasi* ya tata na ngai?”+ 8 Abinere asilikaki makasi mpo na maloba ya Ishi-boshete mpe alobaki: “Nazali nde lokola mbwa* moko boye na libota ya Yuda? Tii lelo, nazali se komonisela libota ya tata na yo Saulo, bandeko na ye mpe baninga na ye bolingo ya sembo, mpe natɛki yo te epai ya Davidi. Kasi lelo, ozali kolandela ngai kaka mpo na libunga oyo nasali na likambo ya mwasi? 9 Tiká Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi, soki nasaleli Davidi te kaka ndenge Yehova alapelaki ye ndai ete:+ 10 akolongola bokonzi na libota ya Saulo mpe akotya kiti ya bokonzi ya Davidi na Yisraele mpe na Yuda, banda na Dani tii na Beere-sheba.”+ 11 Azongiselaki Abinere ata liloba moko te, mpo azalaki kobanga ye.+

12 Na mbala moko Abinere atindelaki Davidi bamemi-nsango, alobi: “Mokili oyo ezali ya nani?” Abakisaki: “Salá kondimana na ngai, mpe nakosala nyonso oyo nakoki* mpo Yisraele mobimba ekóma na ngámbo na yo.”+ 13 Na yango, Davidi azongiselaki ye: “Malamu! Nakosala kondimana na yo. Kasi nasɛngi yo kaka likambo oyo: Okomona elongi na ngai kaka soki omemeli ngai Mikale,+ mwana ya Saulo.” 14 Na nsima, Davidi atindaki bamemi-nsango epai ya Ishi-boshete,+ mwana ya Saulo, alobaki: “Pesá ngai mwasi na ngai Mikale, oyo nabalaki na misutu 100 ya Bafilistia.”+ 15 Na yango, Ishi-boshete atindaki bato bákende kozwa ye epai ya mobali na ye Palatiele+ mwana ya Laishe. 16 Kasi mobali na ye akendaki elongo na ye, azali kolela nzelanzela tii na Bahurime.+ Bongo Abinere alobaki na ye: “Kende, zongá epai na yo!” Mpe azongaki.

17 Nzokande Abinere atindaki maloba epai ya bankulutu ya Yisraele, alobi: “Esili koleka mwa ntango, bozalaki koluka ete Davidi azala mokonzi na bino. 18 Sikoyo ntango oyo bosengeli kotya ye mokonzi ekoki! Mpo Yehova alobaki na Davidi ete: ‘Na nzela ya lobɔkɔ ya mosaleli na ngai Davidi,+ nakobikisa bato na ngai Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia mpe na lobɔkɔ ya banguna na bango nyonso.’” 19 Na nsima, Abinere asololaki na bato ya Benyamina.+ Akendaki mpe kosolola na Davidi ye moko na Hebrone mpo na koyebisa ye makambo nyonso oyo Yisraele mpe libota mobimba ya Benyamina endimaki kosala.

20 Ntango Abinere ayaki epai ya Davidi na Hebrone, elongo na mibali 20, Davidi asalaki fɛti mpo na Abinere mpe mpo na mibali oyo bazalaki elongo na ye. 21 Na nsima, Abinere alobaki na Davidi boye: “Tiká nakende mpe nayanganisa Yisraele mobimba mpo na nkolo na ngai mokonzi, mpo básala kondimana na yo, mpe okóma mokonzi ya nyonso oyo olingi.”* Bongo Davidi atikaki Abinere akende, mpe asimbaki nzela, akei na kimya.

22 Na ntango yango, Yoabe ná basoda ya Davidi bautaki na etumba mpe bayaki na biloko ebele oyo bapunzaki. Kasi Abinere asilaki kolongwa na Hebrone, mpo Davidi atikaki ye akende na kimya. 23 Ntango Yoabe+ ná limpinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye bakómaki, bato bayebisaki Yoabe: “Abinere+ mwana ya Nere+ ayaki epai ya mokonzi, mpe mokonzi atikaki ye akende na kimya.” 24 Na yango, Yoabe akɔtaki epai ya mokonzi mpe alobaki: “Likambo nini osali? Abinere ayei epai na yo, mpe otiki ye akende na kimya, mpo na nini osali bongo? 25 Oyebi malamu Abinere mwana ya Nere! Ayaki awa mpo na kokosa yo mpe mpo na koluka koyeba makambo nyonso oyo ozali kosala?”

26 Bongo Yoabe alongwaki epai ya Davidi mpe atindaki bamemi-nsango bálanda Abinere. Bakutaki Abinere na libulu ya kobomba mai na Sira mpe bazongaki elongo na ye; nzokande Davidi ayebaki likambo yango te. 27 Ntango Abinere azongaki na Hebrone,+ Yoabe amemaki ye pembeni, na porte ya engumba mpo na kosolola na ye na nkuku. Kasi, kuna, Yoabe atubaki ye mopanga na libumu, mpe akufaki.+ Yoabe asalaki bongo mpo Abinere abomaki* ndeko na ye Asahele.+ 28 Na nsima, ntango Davidi ayokaki likambo yango, alobaki boye: “Na miso ya Yehova, ngai ná bokonzi na ngai tozali na ngambo ata moke te mpo na makila+ ya Abinere mwana ya Nere. 29 Tiká ngambo yango ezala na motó ya Yoabe+ mpe ya libota mobimba ya tata na ye. Na libota ya Yoabe, ekozala ntango nyonso na mobali oyo azali na eloko oyo ezali kotanga ye,+ moto ya maba,+ mobali oyo azali kosala na motonga ya kosala nsinga,* mobali oyo akufi na mopanga, to oyo azangi biloko ya kolya!”+ 30 Na yango, Yoabe ná ndeko na ye Abishai+ babomaki Abinere+ mpo abomaki ndeko na bango Asahele na etumba,+ na Gibeone.

31 Na nsima, Davidi alobaki na Yoabe mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye ete: “Bópasola bilamba na bino, bólata ngɔtɔ* mpe bólela Abinere.” Mokonzi Davidi ye moko azalaki kotambola na nsima ya mbeto ya ebembe. 32 Bakundaki Abinere na Hebrone. Mokonzi alelaki na mongongo makasi na lilita ya Abinere, mpe bato nyonso balelaki. 33 Mokonzi ayembaki mpo na Abinere mpe alobaki:

“Abinere asengelaki nde kokufa liwa moko ya nsɔni boye lokola liwa ya bazoba?

34 Mabɔkɔ na yo ekangamaki te,

Mpe makolo na yo ekɔtaki na bikangeli te.*

Okufi lokola moto oyo akwei na mabɔkɔ ya babomi-bato.”*+

Bongo bato nyonso balelaki ye lisusu.

35 Na nsima, ntango moi ezalaki naino, bato nyonso bayaki kopesa Davidi limpa mpo na kobɔndisa ye,* kasi Davidi alapaki ndai ete: “Tiká Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki nameki limpa to eloko mosusu nyonso liboso moi elala!”+ 36 Bato nyonso bamonaki likambo yango, mpe basepelaki na yango kaka ndenge bazalaki kosepela na nyonso oyo mokonzi azalaki kosala. 37 Na yango, na mokolo wana bato nyonso mpe Yisraele mobimba bayebaki ete likanisi ya koboma Abinere mwana ya Nere eutaki epai ya mokonzi te.+ 38 Na nsima, mokonzi alobaki na basaleli na ye: “Boyebi te ete lelo oyo nkumu mpe moto monene akufi na Yisraele?+ 39 Lelo oyo, ngai nazali na makasi te, atako natyami mafuta mpo na kozala mokonzi.+ Mpe mibali oyo, bana ya Zeruya,+ bazali makambo makasi mingi.+ Tiká Yehova afuta moto mabe na kolanda mabe na ye moko.”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto