Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 20
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Ntango

      • Babɔtɔli engumba Raba (1-3)

      • Babomi bilombe ya Bafilistia (4-8)

1 Ntango 20:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, eleko ya prɛnta.

Mitindami

  • +1Nt 11:6
  • +Mib 3:11
  • +2Sa 11:1
  • +2Sa 12:26

1 Ntango 20:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ekɔti ya bokonzi.”

  • *

    Soki 34,2 kg. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +2Sa 8:11, 12; 12:30, 31

1 Ntango 20:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “basóka.”

Mitindami

  • +1Ba 9:20, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2005, lok. 27

1 Ntango 20:4

Mitindami

  • +2Sa 21:18; 1Nt 11:26, 29
  • +Mib 3:13

1 Ntango 20:5

Mitindami

  • +1Sa 17:4, 7; 21:9
  • +2Sa 21:19; 1Nt 11:23, 24

1 Ntango 20:6

Mitindami

  • +Yos 11:22; 1Sa 7:14
  • +Mit 13:33; Mib 2:10; 3:11
  • +2Sa 21:16, 20-22

1 Ntango 20:7

Mitindami

  • +1Sa 17:10; 2Ba 19:22
  • +1Nt 2:13

1 Ntango 20:8

Mitindami

  • +Mib 2:11
  • +1Sa 17:4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Nt. 20:11Nt 11:6
1 Nt. 20:1Mib 3:11
1 Nt. 20:12Sa 11:1
1 Nt. 20:12Sa 12:26
1 Nt. 20:22Sa 8:11, 12; 12:30, 31
1 Nt. 20:31Ba 9:20, 21
1 Nt. 20:42Sa 21:18; 1Nt 11:26, 29
1 Nt. 20:4Mib 3:13
1 Nt. 20:51Sa 17:4, 7; 21:9
1 Nt. 20:52Sa 21:19; 1Nt 11:23, 24
1 Nt. 20:6Yos 11:22; 1Sa 7:14
1 Nt. 20:6Mit 13:33; Mib 2:10; 3:11
1 Nt. 20:62Sa 21:16, 20-22
1 Nt. 20:71Sa 17:10; 2Ba 19:22
1 Nt. 20:71Nt 2:13
1 Nt. 20:8Mib 2:11
1 Nt. 20:81Sa 17:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Ntango 20:1-8

Mokanda ya liboso ya Ntango

20 Na ebandeli ya mbula,* na ntango oyo bakonzi babimaka mpo na etumba, Yoabe+ akambaki etuluku moko ya basoda mpe abebisaki mokili ya Baamone; akendaki kozinga Raba.+ Nzokande Davidi atikalaki na Yerusaleme.+ Yoabe abundisaki Raba mpe abebisaki yango.+ 2 Bongo Davidi azwaki motole* oyo ezalaki na motó ya Malakame, mpe amonaki ete ezali na kilo ya talanta moko* ya wolo, mpe kati na yango, ezalaki na mabanga ya ntalo; mpe batyaki yango na motó ya Davidi. Azwaki mpe biloko ebele oyo bapunzaki na engumba yango.+ 3 Abimisaki bato oyo bazalaki na engumba yango, mpe apesaki bango mosala+ ya kokata mabanga na sii, ya kosalela bisaleli ya ebende oyo epeli makasi mpe misala ya kosala na bipasola.* Davidi asalaki bongo na bingumba nyonso ya Baamone. Nsukansuka, Davidi ná basoda nyonso bazongaki na Yerusaleme.

4 Nsima na yango, bitumba ebimaki na Gezere ná Bafilistia. Na ntango yango, Sibekai+ Mohusha abomaki Sipai, oyo azalaki moto ya libota ya Barefaime,+ mpe balongaki Bafilistia.

5 Bitumba ebimaki lisusu ná Bafilistia. Mpe Elehanane mwana ya Yaire abomaki Lahami ndeko ya Goliate+ moto ya Gate, oyo nzete ya likɔnga na ye ezalaki monene lokola nzete ya kolíngela nsinga oyo basali-bilamba basalelaka.+

6 Etumba mosusu ebimaki na Gate.+ Kuna, ezalaki na mobali moko ya mbinga mpenza,+ oyo azalaki na misapi 24: misapi 6 na lobɔkɔ mokomoko mpe misapi 6 na lokolo mokomoko. Ye mpe azalaki moto ya libota ya Barefaime.+ 7 Azalaki kaka kotumola+ Yisraele. Na yango, Yonatane mwana ya Shimea,+ ndeko ya Davidi, abomaki ye.

8 Bafilistia yango bazalaki bato ya libota ya Barefaime+ oyo bazalaki kofanda na Gate.+ Davidi ná bato na ye nde babomaki bango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto