Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 19
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Ezekiasi aluki lisalisi ya Nzambe na nzela ya Yisaya (1-7)

      • Senakeribe alobi ete akobundisa Yerusaleme (8-13)

      • Libondeli ya Ezekiasi (14-19)

      • Yisaya ayebisi eyano ya Nzambe (20-34)

      • Anzelu abomi Baasiri 185 000 (35-37)

2 Bakonzi 19:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +Yis 37:1-4

2 Bakonzi 19:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Yis 1:1

2 Bakonzi 19:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kofinga.”

  • *

    Lil., “bana bakómi pene na kobima na libumu.”

Mitindami

  • +Yis 26:17, 18

2 Bakonzi 19:4

Mitindami

  • +1Sa 17:45; 2Ba 18:35
  • +2Sa 22:7; 2Nt 20:9; 32:20; Nz 50:15

2 Bakonzi 19:5

Mitindami

  • +Yis 37:5-7

2 Bakonzi 19:6

Mitindami

  • +Mib 20:3; Yis 41:10; 51:7
  • +2Ba 18:17

2 Bakonzi 19:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “elimo moko kati na ye.”

Mitindami

  • +2Nt 32:21; Yis 37:37, 38

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 73

2 Bakonzi 19:8

Mitindami

  • +2Ba 18:14
  • +Yis 37:8-13

2 Bakonzi 19:9

Mitindami

  • +2Ba 18:17

2 Bakonzi 19:10

Mitindami

  • +2Nt 32:15

2 Bakonzi 19:11

Mitindami

  • +2Ba 17:5; 2Nt 32:10, 13; Yis 10:8-11

2 Bakonzi 19:12

Mitindami

  • +Eb 11:31

2 Bakonzi 19:13

Mitindami

  • +2Ba 17:24; 18:33, 34

2 Bakonzi 19:14

Mitindami

  • +1Ba 8:30; Yis 37:14-20

2 Bakonzi 19:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “na katikati.”

Mitindami

  • +2Nt 32:20
  • +Kob 25:22
  • +1Nt 29:10, 11

2 Bakonzi 19:16

Mitindami

  • +1Ba 8:29; Nz 65:2
  • +2Nt 16:9; Da 9:18

2 Bakonzi 19:17

Mitindami

  • +2Ba 16:8, 9; 17:6, 24

2 Bakonzi 19:18

Mitindami

  • +Yis 41:29
  • +Yir 10:3

2 Bakonzi 19:19

Mitindami

  • +Nz 83:17, 18; Yis 45:5, 6

2 Bakonzi 19:20

Mitindami

  • +2Ba 19:15
  • +Yis 37:21, 22

2 Bakonzi 19:22

Mitindami

  • +2Ba 19:10
  • +2Ba 18:30; Yis 10:12, 13
  • +Yis 37:23-25

2 Bakonzi 19:23

Mitindami

  • +2Ba 18:17
  • +2Nt 32:17; Yis 10:10, 11

2 Bakonzi 19:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “banzela ya mai ya Nile.”

2 Bakonzi 19:25

Mitindami

  • +Yis 14:24
  • +Nz 33:11
  • +Yis 46:10
  • +Yis 10:5; 37:26, 27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/1999, lok. 14

2 Bakonzi 19:26

Mitindami

  • +Yis 40:7

2 Bakonzi 19:27

Mitindami

  • +Mas 5:21; Ebr 4:13
  • +Yis 37:28, 29

2 Bakonzi 19:28

Mitindami

  • +Nz 46:6; Yis 10:5, 15
  • +2Ba 18:35; Yis 10:12, 13
  • +Nz 32:9
  • +2Ba 19:33

2 Bakonzi 19:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, Ezekiasi.

  • *

    To, “biloko oyo ekokola, oyo euti na mbuma oyo ekweaki.”

Mitindami

  • +Le 25:4-6
  • +Yis 37:30-32

2 Bakonzi 19:30

Mitindami

  • +2Nt 32:22; Yis 10:20

2 Bakonzi 19:31

Mitindami

  • +Yis 59:17; Zek 1:14, 15

2 Bakonzi 19:32

Mitindami

  • +Yis 10:24
  • +2Nt 32:22
  • +Yis 37:33-35

2 Bakonzi 19:34

Mitindami

  • +Yis 31:5
  • +1Sa 12:22; Yis 43:25; Ezk 36:22
  • +2Ba 20:6; Yir 23:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 145

2 Bakonzi 19:35

Mitindami

  • +2Nt 32:21; Yis 31:8
  • +Kob 12:30; Yis 37:36-38

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1993, lok. 6

2 Bakonzi 19:36

Mitindami

  • +Yon 1:2
  • +2Ba 19:7, 28

2 Bakonzi 19:37

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Nt 32:21
  • +Eb 8:4
  • +Ezr 4:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 73

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 19:1Yis 37:1-4
2 Bak. 19:2Yis 1:1
2 Bak. 19:3Yis 26:17, 18
2 Bak. 19:41Sa 17:45; 2Ba 18:35
2 Bak. 19:42Sa 22:7; 2Nt 20:9; 32:20; Nz 50:15
2 Bak. 19:5Yis 37:5-7
2 Bak. 19:6Mib 20:3; Yis 41:10; 51:7
2 Bak. 19:62Ba 18:17
2 Bak. 19:72Nt 32:21; Yis 37:37, 38
2 Bak. 19:82Ba 18:14
2 Bak. 19:8Yis 37:8-13
2 Bak. 19:92Ba 18:17
2 Bak. 19:102Nt 32:15
2 Bak. 19:112Ba 17:5; 2Nt 32:10, 13; Yis 10:8-11
2 Bak. 19:12Eb 11:31
2 Bak. 19:132Ba 17:24; 18:33, 34
2 Bak. 19:141Ba 8:30; Yis 37:14-20
2 Bak. 19:152Nt 32:20
2 Bak. 19:15Kob 25:22
2 Bak. 19:151Nt 29:10, 11
2 Bak. 19:161Ba 8:29; Nz 65:2
2 Bak. 19:162Nt 16:9; Da 9:18
2 Bak. 19:172Ba 16:8, 9; 17:6, 24
2 Bak. 19:18Yis 41:29
2 Bak. 19:18Yir 10:3
2 Bak. 19:19Nz 83:17, 18; Yis 45:5, 6
2 Bak. 19:202Ba 19:15
2 Bak. 19:20Yis 37:21, 22
2 Bak. 19:222Ba 19:10
2 Bak. 19:222Ba 18:30; Yis 10:12, 13
2 Bak. 19:22Yis 37:23-25
2 Bak. 19:232Ba 18:17
2 Bak. 19:232Nt 32:17; Yis 10:10, 11
2 Bak. 19:25Yis 14:24
2 Bak. 19:25Nz 33:11
2 Bak. 19:25Yis 46:10
2 Bak. 19:25Yis 10:5; 37:26, 27
2 Bak. 19:26Yis 40:7
2 Bak. 19:27Mas 5:21; Ebr 4:13
2 Bak. 19:27Yis 37:28, 29
2 Bak. 19:28Nz 46:6; Yis 10:5, 15
2 Bak. 19:282Ba 18:35; Yis 10:12, 13
2 Bak. 19:28Nz 32:9
2 Bak. 19:282Ba 19:33
2 Bak. 19:29Le 25:4-6
2 Bak. 19:29Yis 37:30-32
2 Bak. 19:302Nt 32:22; Yis 10:20
2 Bak. 19:31Yis 59:17; Zek 1:14, 15
2 Bak. 19:32Yis 10:24
2 Bak. 19:322Nt 32:22
2 Bak. 19:32Yis 37:33-35
2 Bak. 19:34Yis 31:5
2 Bak. 19:341Sa 12:22; Yis 43:25; Ezk 36:22
2 Bak. 19:342Ba 20:6; Yir 23:5
2 Bak. 19:352Nt 32:21; Yis 31:8
2 Bak. 19:35Kob 12:30; Yis 37:36-38
2 Bak. 19:36Yon 1:2
2 Bak. 19:362Ba 19:7, 28
2 Bak. 19:372Nt 32:21
2 Bak. 19:37Eb 8:4
2 Bak. 19:37Ezr 4:2
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 19:1-37

Mokanda ya mibale ya

19 Ntango kaka Mokonzi Ezekiasi ayokaki maloba yango, apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ* mpe akendaki na tempelo* ya Yehova.+ 2 Na nsima atindaki Eliakime, oyo azalaki kokamba ndako ya mokonzi, Shebena oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mpe bakambi ya banganga-nzambe. Bango nyonso balataki ngɔtɔ* mpe bakendaki epai ya mosakoli Yisaya+ mwana ya Amoze. 3 Balobaki na Yisaya: “Ezekiasi alobi boye: ‘Mokolo oyo ezali mokolo ya mpasi, ya mpamela,* mpe ya nsɔni. Mpo tokómi lokola mwasi oyo alingi kobota,* kasi makasi ya kobota ezali te.+ 4 Mbala mosusu Yehova Nzambe na yo akoyoka maloba nyonso ya Rabashake, oyo nkolo na ye mokonzi ya Asiri atindaki mpo na kotumola Nzambe ya bomoi,+ mpe akosɛnga ye azongisa monɔkɔ mpo na maloba oyo Yehova Nzambe na yo ayoki. Yango wana bondelá mpo na bato oyo batikali na bomoi.’”+

5 Ntango basaleli ya Mokonzi Ezekiasi bayebisaki Yisaya nsango yango,+ 6 Yisaya ayanolaki bango: “Talá oyo bokoyebisa nkolo na bino: ‘Yoká oyo Yehova alobi: “Kobanga te+ maloba oyo oyoki, maloba oyo basaleli ya mokonzi ya Asiri balobi mpo na kofinga ngai.+ 7 Talá nazali kotya likanisi moko na motema na ye,* akoyoka nsango moko mpe akozonga na mokili na ye; mpe nakosala ete abomama na mopanga na mokili na ye moko.”’”+

8 Ntango Rabashake ayokaki ete mokonzi ya Asiri alongwe na Lakishi,+ alandaki ye mpe akutaki ye azali kobundisa Libina.+ 9 Bongo bapesaki mokonzi ya Asiri nsango ete: “Tiraka mokonzi ya Etiopi abimi mpo na kobundisa yo.” Na yango, mokonzi atindelaki lisusu Ezekiasi bamemi-nsango,+ na maloba oyo: 10 “Bóyebisa Ezekiasi mokonzi ya Yuda boye: ‘Nzambe na yo oyo otyeli motema akosa yo te ete: “Yerusaleme ekopesama na lobɔkɔ ya mokonzi ya Asiri te.”+ 11 Talá! Yo moko oyebi makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki mikili nyonso, mpe ndenge babebisi yango.+ Bongo kaka yo nde okobika? 12 Banzambe ya bikólo oyo bankɔkɔ na ngai babebisaki, babikisaki nde bikólo yango? Wapi Gozane, Harane,+ Rezefe, ná bato ya Edene oyo bazalaki na Tele-asare? 13 Wapi mokonzi ya Hamate, mokonzi ya Arpade mpe mokonzi ya bingumba ya Sefarvaime, Hena ná Iva?’”+

14 Ezekiasi azwaki mikanda na mabɔkɔ ya bamemi-nsango yango mpe atángaki yango. Na nsima akendaki na ndako ya Yehova mpe atandaki yango liboso ya Yehova.+ 15 Mpe Ezekiasi abandaki kobondela+ liboso ya Yehova mpe koloba: “Ee Yehova Nzambe ya Yisraele, yo oyo ofandi na kiti na yo ya bokonzi likoló* ya bakeruba,+ kaka yo moko nde ozali Nzambe ya solo ya makonzi nyonso ya mabele.+ Yo nde osalaki likoló ná mabele. 16 Tyá litoi na yo, Ee Yehova, mpe yoká!+ Fungolá miso na yo,+ Ee Yehova, mpe talá! Yoká maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kotumola yo, Nzambe ya bomoi. 17 Ee Yehova, ezali solo ete bakonzi ya Asiri babebisi bikólo mosusu mpe bamboka na yango.+ 18 Bazikisaki banzambe ya bikólo yango na mɔtɔ, mpo bazali banzambe ya solo te,+ kasi bazali biloko oyo moto asali+ na nzete mpe na libanga. Yango wana babebisaki yango. 19 Kasi sikoyo, Ee Yehova Nzambe na biso, tobondeli yo, bikisá biso na lobɔkɔ na ye, mpo makonzi nyonso ya mabele eyeba ete kaka yo moko nde ozali Nzambe, Ee Yehova.”+

20 Na nsima, Yisaya mwana ya Amoze atindelaki Ezekiasi nsango oyo: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Nayoki libondeli+ oyo obondeli ngai mpo na Senakeribe mokonzi ya Asiri.+ 21 Yoká liloba oyo Yehova alobi mpo na ye:

“Ngɔndɔ, mwana mwasi ya Siona, atyoli yo mpe asɛki yo.

Mwana mwasi ya Yerusaleme aningisi motó mpo na kotyola yo.

22 Nani oyo otumoli mpe ofingi?+

Nani oyo otomboleli mongongo na yo+

Mpe nani oyo otomboleli miso na yo na lolendo?

Otumoli Mosantu ya Yisraele!+

23 Na nzela ya bamemi-nsango na yo,+ otumoli Yehova+ mpe olobi:

‘Nakoya na ebele ya makalo na ngai ya bitumba,

Mpe nakomata tii na nsɔngɛ ya bangomba,

Na bamboka ya Liban oyo eleki mosika.

Nakokata basɛdrɛ na yango ya milai, mpe banzete na yango ya jenevriye ya kitoko mingi.

Nakokɔta na bisika na yango oyo eleki mosika, na kati ya bazamba na yango oyo etondi na banzete.

24 Nakotimola mabulu ya mai mpe nakomɛla mai ya mokili ya bapaya;

Na nse ya makolo na ngai, nakokaukisa mikɛli* nyonso ya Ezipito.’

25 Oyoká yango te? Nasilá kozwa ekateli oyo banda kalakala.+

Nabongisá mokano yango banda mikolo eleká.+

Sikoyo nakokokisa yango.+

Okokómisa mpamba bingumba oyo ebatelami makasi; ekotikala esika oyo ebebá.+

26 Bafandi na yango bakolɛmba nzoto;

Bakozala na nsɔmɔ mpe bakoyoka nsɔni.

Bakokóma lokola matiti ya esobe mpe lokola matiti ya mobesu,+

Lokola matiti oyo ebimaka na nsamba, oyo ekaukaka mpo na mopɛpɛ ya ɛsti.

27 Kasi nayebi malamu ntango ofandaka, ntango obimaka, ntango ozongaka,+

Mpe ntango osilikelaka ngai makasi,+

28 Mpo kosilika makasi oyo osilikeli ngai,+ mpe koganga na yo ekómi tii na matoi na ngai.+

Yango wana, nakotya ndɔbɔ na ngai na zolo na yo mpe ebende na ngai ya mbanga+ kati na mbɛbu na yo,

Mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyaki.”+

29 “‘Oyo ekozala elembo mpo na yo:* Mbula oyo bokolya mbuma oyo ekokola yango moko.* Na mbula ya mibale mpe bokolya mbuma oyo ekobima yango moko.+ Kasi na mbula ya misato, bokolona milona mpe bokobuka mbuma, bokolona bilanga ya vinyo mpe bokolya mbuma na yango.+ 30 Bato ya Yuda oyo bakobika, baoyo bakotikala,+ bakobimisa misisa na nse mpe bakobota mbuma lokola nzete. 31 Mpo bato oyo batikali bakobima na Yerusaleme, mpe baoyo babiki bakouta na Ngomba Siona. Molende ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+

32 “‘Yango wana, yoká oyo Yehova alobi mpo na mokonzi ya Asiri:+

“Akokɔta na engumba oyo te+

Akobwakela yango mpe likula te

Akobundisa yango na nguba te

Akotya mpe te mwa ngomba ya mabele mpo na kozinga yango.+

33 Akozonga kaka na nzela oyo ayaki;

Kasi akokɔta na engumba oyo te,” Yehova alobi bongo.

34 “Nakobatela engumba+ oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya nkombo na ngai+

Mpe mpo na mosaleli na ngai Davidi.”’”+

35 Na butu wana, anzelu ya Yehova akendaki na kaa ya Baasiri mpe abomaki basoda 185 000.+ Ntango bato balamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, bamonaki bibembe na bango nyonso elali wana.+ 36 Bongo Senakeribe mokonzi ya Asiri alongwaki wana, azongaki na Ninive+ mpe akómaki kofanda kuna.+ 37 Mokolo moko, ntango azalaki kogumbama na tempelo* ya nzambe na ye Nisroke, bana na ye ya mibali, Adrameleke ná Sharezere, babomaki ye na mopanga.+ Na nsima bakimaki na mokili ya Ararate.+ Mpe mwana na ye Esare-hadone+ akómaki mokonzi na esika na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto