Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Emoniseli 10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Emoniseli

      • Anzelu moko ya makasi ná rulo moko ya moke (1-7)

        • “Ntango ya kozela ekozala lisusu te” (6)

        • Sekele mosantu ekokokisama (7)

      • Yoane alei rulo ya moke (8-11)

Emoniseli 10:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azipami na.”

Mitindami

  • +Mt 17:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 155

Emoniseli 10:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 155-156

Emoniseli 10:3

Mitindami

  • +Em 5:5
  • +Kob 19:16; Em 4:5; 11:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 156-157

Emoniseli 10:4

Mitindami

  • +Em 10:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 157

Emoniseli 10:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 157

Emoniseli 10:6

Mitindami

  • +Nz 90:2; Em 4:9
  • +Kob 20:11; Ne 9:6; Nz 146:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, lok. 157

Emoniseli 10:7

Mitindami

  • +Em 8:6
  • +Em 11:15
  • +Mr 4:11
  • +Am 3:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 157-158, 171

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/1990, nk. 19-20

Emoniseli 10:8

Mitindami

  • +Em 10:4
  • +Em 10:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 158-160

Emoniseli 10:9

Mitindami

  • +Ezk 2:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 158-160

Emoniseli 10:10

Mitindami

  • +Yir 15:16
  • +Nz 119:103; Ezk 3:1-3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 158-160

Emoniseli 10:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Emoniseli, nk. 158-160

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Em. 10:1Mt 17:1, 2
Em. 10:3Em 5:5
Em. 10:3Kob 19:16; Em 4:5; 11:19
Em. 10:4Em 10:8
Em. 10:6Nz 90:2; Em 4:9
Em. 10:6Kob 20:11; Ne 9:6; Nz 146:6
Em. 10:7Em 8:6
Em. 10:7Em 11:15
Em. 10:7Mr 4:11
Em. 10:7Am 3:7
Em. 10:8Em 10:4
Em. 10:8Em 10:1, 2
Em. 10:9Ezk 2:8
Em. 10:10Yir 15:16
Em. 10:10Nz 119:103; Ezk 3:1-3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Emoniseli 10:1-11

Emoniseli epai ya Yoane

10 Mpe namonaki anzelu mosusu ya makasi azali kokita na likoló, alati* lipata, mpe monama ezalaki na motó na ye, mpe elongi na ye ezalaki lokola moi,+ makolo na ye ezalaki lokola makonzí ya mɔtɔ, 2 asimbaki na lobɔkɔ rulo moko ya moke oyo efungwamá. Mpe atyaki lokolo na ye ya mobali na mbu, kasi lokolo na ye ya mwasi na mabele, 3 mpe agangaki na mongongo makasi ndenge nkɔsi egangaka.+ Mpe ntango agangaki, nayokaki mongongo ya bankake nsambo.+

4 Bongo ntango bankake yango nsambo elobaki, nalingaki kokoma, kasi nayokaki mongongo moko euti na likoló+ elobi: “Bombá makambo oyo bankake nsambo elobi, mpe kokoma yango te.” 5 Anzelu oyo namonaki atɛlɛmi na mbu mpe na mabele atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali na likoló, 6 mpe alapaki ndai na nkombo ya Nzambe oyo azali na bomoi libela na libela,+ oyo azalisaki likoló ná biloko oyo ezali na kati na yango, mabele ná biloko oyo ezali na kati na yango, mpe mbu ná biloko oyo ezali na kati na yango,+ alobi: “Ntango ya kozela ekozala lisusu te. 7 Kasi na mikolo oyo anzelu ya nsambo+ akokóma pene ya kobɛta kelelo na ye,+ sekele mosantu+ oyo Nzambe asakolaki lokola nsango malamu epai ya baombo na ye basakoli+ ekokokisama mpenza.”

8 Mpe nayokaki mongongo moko euti na likoló+ esololi na ngai lisusu mpe elobi ete: “Kende, zwá rulo wana oyo efungwami oyo ezali na lobɔkɔ ya anzelu oyo atɛlɛmi na mbu mpe na mabele.”+ 9 Nakendaki epai ya anzelu yango mpe nayebisaki ye apesa ngai rulo yango ya moke. Mpe alobaki na ngai ete: “Zwá yango mpe lyá yango,+ ekokómisa libumu na yo bololo, kasi na monɔkɔ na yo ekozala elɛngi lokola mafuta ya nzoi.” 10 Nazwaki rulo wana ya moke na lobɔkɔ ya anzelu mpe nalyaki yango.+ Na monɔkɔ na ngai ezalaki elɛngi lokola mafuta ya nzoi,+ kasi ntango kaka nalyaki yango, libumu na ngai ekómaki bololo. 11 Mpe balobaki na ngai ete: “Osengeli kosakola lisusu mpo na bato ya mikili, bikólo, minɔkɔ mpe bakonzi mingi.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto