Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 9
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Abimeleke akómi mokonzi na Shekeme (1-6)

      • Lisese ya Yotame (7-21)

      • Mobulu na boyangeli ya Abimeleke (22-33)

      • Abimeleke abundisi Shekeme (34-49)

      • Mwasi moko azokisi Abimeleke; Abimeleke akufi (50-57)

Basambisi 9:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ya bato ya ndako ya tata ya mama na ye.”

Mitindami

  • +Bas 8:30, 31

Basambisi 9:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “bankolo-mabele.”

  • *

    To, “nazali mukuwa mpe mosuni moko ná bino.”

Mitindami

  • +Bas 8:30

Basambisi 9:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mitema ya bankumu yango ebalukaki mpo na kolanda Abimeleke.”

Basambisi 9:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ndako.”

Mitindami

  • +Bas 8:33; 9:46

Basambisi 9:5

Mitindami

  • +Bas 6:11; 8:27
  • +2Ba 11:1; 2Nt 21:4

Basambisi 9:6

Mitindami

  • +Mib 17:14; 1Sa 8:7

Basambisi 9:7

Mitindami

  • +Mib 11:29; Yos 8:33; Yn 4:20

Basambisi 9:8

Mitindami

  • +Bas 8:22

Basambisi 9:14

Mitindami

  • +Bas 9:6

Basambisi 9:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2008, lok. 9

Basambisi 9:16

Mitindami

  • +Bas 9:6

Basambisi 9:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

Mitindami

  • +Bas 7:9
  • +Bas 8:28

Basambisi 9:18

Mitindami

  • +Bas 9:5
  • +Bas 8:30, 31

Basambisi 9:20

Mitindami

  • +Bas 9:6, 49
  • +Bas 9:39, 53

Basambisi 9:21

Mitindami

  • +Bas 9:5

Basambisi 9:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ayangelaki na lofundo.”

Basambisi 9:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Nzambe atindaki elimo moko ya mabe epai ya Abimeleke ná bankumu ya Shekeme.”

Basambisi 9:24

Mitindami

  • +Eb 9:6; Bas 9:5

Basambisi 9:26

Mitindami

  • +Yos 21:20, 21; 24:1

Basambisi 9:27

Mitindami

  • +Bas 8:33

Basambisi 9:28

Mitindami

  • +Bas 6:32

Basambisi 9:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “salá ye oyo lobɔkɔ na yo ekoki kosala.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/1991, lok. 20

Basambisi 9:38

Mitindami

  • +Bas 9:28, 29

Basambisi 9:41

Mitindami

  • +Bas 9:30

Basambisi 9:45

Mitindami

  • +1Ba 12:25

Basambisi 9:46

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “esika makasi ya libateli.”

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +Bas 8:33; 9:4, 27

Basambisi 9:48

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “sóka.”

Basambisi 9:53

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, libanga ya likoló.

Mitindami

  • +2Sa 11:21

Basambisi 9:56

Mitindami

  • +Eb 9:6; Bas 9:5, 24

Basambisi 9:57

Mitindami

  • +Bas 9:7, 20
  • +Bas 6:32

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 9:1Bas 8:30, 31
Bas. 9:2Bas 8:30
Bas. 9:4Bas 8:33; 9:46
Bas. 9:5Bas 6:11; 8:27
Bas. 9:52Ba 11:1; 2Nt 21:4
Bas. 9:6Mib 17:14; 1Sa 8:7
Bas. 9:7Mib 11:29; Yos 8:33; Yn 4:20
Bas. 9:8Bas 8:22
Bas. 9:14Bas 9:6
Bas. 9:16Bas 9:6
Bas. 9:17Bas 7:9
Bas. 9:17Bas 8:28
Bas. 9:18Bas 9:5
Bas. 9:18Bas 8:30, 31
Bas. 9:20Bas 9:6, 49
Bas. 9:20Bas 9:39, 53
Bas. 9:21Bas 9:5
Bas. 9:24Eb 9:6; Bas 9:5
Bas. 9:26Yos 21:20, 21; 24:1
Bas. 9:27Bas 8:33
Bas. 9:28Bas 6:32
Bas. 9:38Bas 9:28, 29
Bas. 9:41Bas 9:30
Bas. 9:451Ba 12:25
Bas. 9:46Bas 8:33; 9:4, 27
Bas. 9:532Sa 11:21
Bas. 9:56Eb 9:6; Bas 9:5, 24
Bas. 9:57Bas 9:7, 20
Bas. 9:57Bas 6:32
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
  • 47
  • 48
  • 49
  • 50
  • 51
  • 52
  • 53
  • 54
  • 55
  • 56
  • 57
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 9:1-57

Basambisi

9 Na nsima, Abimeleke+ mwana ya Yerubaala akendaki na Shekeme epai ya bandeko ya mama na ye mpe alobaki na bango mpe na libota mobimba ya nkɔkɔ na ye* boye: 2 “Nabondeli bino, bótuna bankumu* nyonso ya Shekeme ete: ‘Nini eleki malamu mpo na bino: bana nyonso 70 ya Yerubaala+ báyangela bino to mobali moko nde ayangela bino? Bóbosana te ete ngai ná bino tozali makila moko.’”*

3 Bongo bandeko ya mama na ye balobaki makambo yango na nkombo na ye epai ya bankumu nyonso ya Shekeme. Na yango, bankumu yango bandimaki kolanda Abimeleke,* mpo balobaki: “Azali ndeko na biso mpenza.” 4 Na nsima, bapesaki ye shekele ya palata 70 oyo eutaki na tempelo* ya Baala-berite;+ mpe Abimeleke afutaki na yango bato oyo bazangá mosala ya kosala mpe bato ya lofundo, mpo bálanda ye. 5 Nsima na yango, akendaki na ndako ya tata na ye, na Ofra,+ mpe abomaki bandeko na ye,+ bana ya Yerubaala, mibali 70, likoló ya libanga se moko. Kaka Yotame mwana mobali ya nsuka ya Yerubaala nde abikaki, mpo amibombaki.

6 Na nsima, bankumu nyonso ya Shekeme mpe Bete-milo mobimba bayanganaki mpe bakómisaki Abimeleke mokonzi,+ pene na nzete monene, pene na likonzí oyo ezalaki na Shekeme.

7 Ntango bayebisaki Yotame likambo yango, na mbala moko akendaki mpe atɛlɛmaki na nsɔngɛ ya Ngomba Gerizime,+ mpe alobaki na bango na mongongo makasi ete: “Bóyoka ngai, bino bankumu ya Shekeme, mpe Nzambe akoyoka bino:

8 “Mokolo moko, banzete ekendaki kotya nzete moko mafuta mpo ezala mokonzi na bango. Bongo balobaki na nzete ya olive boye: ‘Yangelá biso.’+ 9 Kasi nzete ya olive elobaki na bango boye: ‘Natika mpenza mafuta na ngai oyo bakumisaka na yango Nzambe mpe bato, mpo nakende kopɛpapɛpa likoló ya banzete mosusu?’ 10 Na nsima, banzete yango elobaki na nzete ya figi boye: ‘Yaká, mpe yangelá biso.’ 11 Kasi nzete ya figi elobaki na bango boye: ‘Natika mpenza elɛngi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo nakende kopɛpapɛpa likoló ya banzete mosusu?’ 12 Na nsima, banzete yango elobaki na nzete ya vinyo boye: ‘Yaká, mpe yangelá biso.’ 13 Nzete ya vinyo elobaki na bango boye: ‘Natika mpenza vinyo na ngai ya sika oyo esepelisaka Nzambe mpe bato, mpo nakende kopɛpapɛpa likoló ya banzete mosusu?’ 14 Nsukansuka, banzete mosusu nyonso elobaki na mwa nzete ya nzubɛnzubɛ boye: ‘Yaká, mpe yangelá biso.’+ 15 Na yango, mwa nzete ya nzubɛnzubɛ elobaki na banzete yango boye: ‘Soki ya solo mpenza bolingi kotya ngai mafuta mpo nazala mokonzi na bino, bóya kobombana na nse ya elili na ngai. Kasi soki bongo te, tiká mɔtɔ ebima epai na ngai mpe ezikisa banzete ya sɛdrɛ ya Liban.’

16 “Sikoyo, bosali mpenza makambo na bosembo mpe na lokumu na ndenge bokómisi Abimeleke mokonzi?+ Bosaleli Yerubaala mpe bato ya ndako na ye bolamu mpe bopesi ye lokumu oyo abongi na yango? 17 Ntango tata na ngai abundelaki bino,+ atyaki bomoi* na ye na likama mpo na kobikisa bino na lobɔkɔ ya Bamidiane.+ 18 Kasi lelo oyo, botɛlɛmi mpe bobundisi bato ya ndako ya tata na ngai, mpe bobomi bana na ye ya mibali 70 likoló ya libanga se moko.+ Mpe bokómisi Abimeleke, mwana ya moombo na ye ya mwasi,+ mokonzi ya bankumu ya Shekeme kaka mpo azali ndeko na bino. 19 Ya solo, soki lelo oyo bozali kosalela Yerubaala mpe bato ya ndako na ye makambo na bosembo mpe na lokumu, bósepela na Abimeleke, ye mpe asepela na bino. 20 Kasi soki ezali bongo te, mɔtɔ ebima na Abimeleke mpe ezikisa bankumu ya Shekeme mpe ya Bete-milo,+ mpe mɔtɔ ebima na bankumu ya Shekeme mpe ya Bete-milo, mpe ezikisa Abimeleke.”+

21 Na nsima, Yotame+ akimaki mpe akendaki na Beere; akómaki kofanda kuna mpo azalaki kobanga ndeko na ye Abimeleke.

22 Abimeleke akonzaki* Yisraele mbula misato. 23 Bongo, Nzambe atikaki koyinana ekola kati na Abimeleke ná bankumu ya Shekeme,* mpe basalelaki Abimeleke makambo na bokosi. 24 Esalemaki bongo mpo na kozongisa mabe oyo basalaki bana mibali 70 ya Yerubaala, mpo na kotya makila na bango na motó ya ndeko na bango Abimeleke mpo abomaki bango,+ mpe na motó ya bankumu ya Shekeme mpo basalisaki Abimeleke aboma bandeko na ye. 25 Na yango, bankumu ya Shekeme batyaki bato bábombana na bansɔngɛ ya bangomba mpo na kosala Abimeleke mabe. Bato yango bazalaki kobɔtɔla biloko ya moto nyonso oyo azalaki koleka esika bazalaki. Na nsima, nsango ya likambo yango ekómaki na matoi ya Abimeleke.

26 Bongo Gaale mwana ya Ebede ná bandeko na ye bakatisaki mpe bakɔtaki na Shekeme,+ mpe bankumu ya Shekeme bakómaki kotyela ye motema. 27 Bakendaki na bilanga na bango ya vinyo, babukaki mbuma ya vinyo mpe banyatanyataki yango mpo na kosala masanga, mpe basalaki fɛti. Na nsima bakɔtaki na ndako ya nzambe na bango,+ balyaki, bamɛlaki mpe balakelaki Abimeleke mabe. 28 Na nsima, Gaale mwana ya Ebede alobaki boye: “Abimeleke azali nani, mpe Shekeme azali nani mpo tósalela ye? Azali nde mwana ya Yerubaala+ te? Mpe Zebule azali nde kapita na ye te? Bósalela mibali ya Hamore, tata ya Shekeme! Kasi mpo na nini tósalela Abimeleke? 29 Soki bato oyo bazalaki na nse ya litambwisi na ngai, mbɛlɛ nalongoli Abimeleke.” Na nsima, alobaki mpo na Abimeleke boye: “Kómisá limpinga na yo monene mpe yaká kobunda na ngai.”

30 Ntango Zebule, nkumu ya engumba yango, ayokaki maloba ya Gaale mwana ya Ebede, nkanda na ye engalaki. 31 Na yango, atindaki bamemi-nsango na mayele epai ya Abimeleke, báyebisa ye ete: “Talá! Gaale mwana ya Ebede mpe bandeko na ye bazali sikoyo na Shekeme, mpe bazali kotinda engumba etombokela yo. 32 Sikoyo, yaká na butu, yo ná bato na yo, mpe bóbombana libándá ya engumba mpo na kobundisa bango na pwasa. 33 Osengeli kolamuka ntɔngɔntɔngɔ ntango kaka moi ekobima mpe kobundisa engumba yango. Mpe ntango ye ná bato na ye bakobima mpo na kobunda na yo, salá nyonso oyo okokoka mpo na kolonga ye.”*

34 Na yango Abimeleke mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye batɛlɛmaki na butu, basalaki bituluku minei mpe babombanaki mpo na kobundisa Shekeme na pwasa. 35 Ntango Gaale mwana ya Ebede abimaki mpe atɛlɛmaki na esika ya kokɔta na porte ya engumba, Abimeleke mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batɛlɛmaki mpe babimaki na bisika oyo babombanaki. 36 Ntango Gaale amonaki bato yango, alobaki na Zebule: “Talá! Bato bazali kokita, bauti na bansɔngɛ ya ngomba.” Kasi Zebule alobaki na ye boye: “Oyo ozali komona lokola bato, ezali nde bilili ya bangomba.”

37 Na nsima, Gaale alobaki boye: “Talá! Bato bazali kokita, bauti na katikati ya mokili, mpe etuluku mosusu ezali koya na nzela ya nzete monene ya Meonenime.” 38 Zebule ayanolaki ye: “Sikoyo, ozali komikumisa lisusu te, yo moto olobaki: ‘Abimeleke nde nani mpo tósalela ye?’+ Oyo ezali nde bato oyo otyolaki te? Sikoyo, bimá mpe bundá na bango.”

39 Na yango Gaale abimaki liboso ya bankumu ya Shekeme mpe abundaki na Abimeleke. 40 Abimeleke alandaki ye, mpe Gaale akimaki liboso na ye, mpe bato mingi babomamaki nzelanzela tii liboso ya porte ya engumba.

41 Abimeleke akobaki kofanda na Aruma, mpe Zebule+ abenganaki Gaale ná bandeko na ye na Shekeme. 42 Na mokolo oyo elandaki, bato babimaki libándá ya engumba, mpe bayebisaki Abimeleke likambo yango. 43 Bongo azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na bituluku misato mpe babombanaki libándá ya engumba mpo na kobundisa bango na pwasa. Ntango amonaki bato bazali kobima na engumba, abundisaki bango mpe abomaki bango. 44 Abimeleke mpe bituluku oyo ezalaki elongo na ye bakendaki nokinoki mpe batɛlɛmaki na esika ya kokɔta na porte ya engumba. Na ntango wana, bituluku mibale ebundisaki baoyo nyonso bazalaki libándá ya engumba mpe ebomaki bango. 45 Abimeleke abundisaki engumba yango mokolo mobimba, mpe azwaki yango. Abomaki bato oyo bazalaki kuna, mpe na nsima abukaki engumba yango+ mpe asopaki mungwa kuna.

46 Ntango bankumu nyonso ya linɔ́ngi ya Shekeme bayokaki likambo yango, na mbala moko bakendaki na ndako ya nse ya mabele oyo nsamba na yango egumbamá,* na tempelo* ya Ele-berite.+ 47 Ntango kaka bayebisaki Abimeleke ete bankumu nyonso ya linɔ́ngi ya Shekeme bayangani esika moko, 48 Abimeleke ná mibali nyonso oyo bazalaki elongo na ye bamataki na Ngomba Zalamone. Abimeleke azwaki epasola,* akataki etape moko ya nzete, atyaki yango na lipeka na ye, mpe alobaki na bato oyo bazalaki elongo na ye boye: “Oyo bomoni nasali, bino mpe bósala kaka bongo, nokinoki!” 49 Bongo bato nyonso mpe bakataki bitape mpe balandaki Abimeleke. Na nsima, batyaki bitape yango zingazinga ya ndako ya nse ya mabele oyo nsamba na yango egumbamá, mpe batumbaki ndako yango. Na yango, bato nyonso ya linɔ́ngi ya Shekeme mpe bakufaki: mibali ná basi soki 1 000.

50 Na nsima, Abimeleke akendaki na Tebeze; atyaki kaa mpo na kobundisa Tebeze mpe azwaki yango. 51 Linɔ́ngi moko ya makasi ezalaki na katikati ya engumba yango, mibali nyonso ná basi, mpe bankumu nyonso ya engumba bakimaki kuna. Bamikangaki na kati ya linɔ́ngi yango mpe bamataki na nsamba na yango. 52 Abimeleke akómaki na linɔ́ngi yango mpe abundisaki yango. Apusanaki pene na ekɔtelo ya linɔ́ngi yango mpe atumbaki yango. 53 Bongo mwasi moko akweisaki na motó ya Abimeleke libanga* oyo banikaka na yango mbuma mpe epanzaki mokuwa ya motó na ye.+ 54 Abengaki nokinoki mosaleli na ye oyo azalaki komemela ye bibundeli, mpe alobaki na ye boye: “Bendá mopanga na yo mpe bomá ngai, noki báloba mpo na ngai ete: ‘Mwasi nde moto abomaki ye.’” Na yango, mosaleli na ye atɔbɔlaki ye, mpe akufaki.

55 Ntango mibali ya Yisraele bamonaki ete Abimeleke akufi, bango nyonso bazongaki ndako. 56 Na ndenge yango, Nzambe azongiselaki Abimeleke mabe oyo asalelaki tata na ye, na ndenge abomaki bandeko na ye 70 ya mibali.+ 57 Mpe Nzambe asalaki ete mabe nyonso ya mibali ya Shekeme ezonga na mitó na bango moko. Na ndenge wana, elakeli mabe ya Yotame+ mwana ya Yerubaala+ ezwaki bango.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto