Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 22
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Yerusaleme, engumba oyo ezali na ngambo ya makila (1-16)

      • Yisraele ezali lokola biloko ya bosɔtɔ oyo ezangi ntina (17-22)

      • Bakambi mpe bato ya Yisraele bazwi etumbu (23-31)

Ezekiele 22:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “okosambisa, okosambisa.”

Mitindami

  • +2Ba 21:16; Yir 2:34; Mt 23:37
  • +Ezk 16:51

Ezekiele 22:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Mitindami

  • +Ezk 24:6
  • +Ezk 12:25
  • +2Ba 21:11

Ezekiele 22:4

Mitindami

  • +Eb 9:6
  • +Le 26:30; Ezk 23:37
  • +Mib 28:37; 1Ba 9:7; Nz 80:6; Ezk 23:32; Da 9:16

Ezekiele 22:5

Mitindami

  • +Nz 79:4

Ezekiele 22:6

Mitindami

  • +Yis 1:23; Mik 3:1-3; Sef 3:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2012, lok. 27

Ezekiele 22:7

Mitindami

  • +Mib 27:16
  • +Kob 22:21, 22; Nz 82:3; Yis 1:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2012, lok. 27

Ezekiele 22:8

Mitindami

  • +Le 19:30

Ezekiele 22:9

Mitindami

  • +Kob 23:1; Le 19:16
  • +Yir 13:27

Ezekiele 22:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bamoni bolumbu ya tata.”

Mitindami

  • +Le 18:7; 20:11
  • +Le 18:19; 20:18

Ezekiele 22:11

Mitindami

  • +Le 18:20; 20:10; Yir 5:8
  • +Le 18:15
  • +Le 20:17

Ezekiele 22:12

Mitindami

  • +Kob 23:8; Mib 27:25; Yis 1:23
  • +Mib 23:19
  • +Kob 22:25; Le 6:4, 5

Ezekiele 22:14

Mitindami

  • +Ezk 21:7

Ezekiele 22:15

Mitindami

  • +Mib 4:27; 28:25
  • +Yis 1:25; Ezk 23:27

Ezekiele 22:16

Mitindami

  • +Ezk 6:13

Ezekiele 22:18

Mitindami

  • +Mas 17:3; Yir 6:28-30

Ezekiele 22:19

Mitindami

  • +Nz 119:119; Mas 25:4

Ezekiele 22:20

Mitindami

  • +Ezk 21:31

Ezekiele 22:21

Mitindami

  • +Mib 4:24; Nz 21:9; Yir 21:12
  • +Nz 68:2

Ezekiele 22:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo.”

Mitindami

  • +Yir 5:31; 6:13, 14
  • +Mik 3:5

Ezekiele 22:26

Mitindami

  • +Yir 2:8; Bil 4:13; Mik 3:11
  • +Le 20:3; 22:2
  • +Le 10:10
  • +Le 11:46, 47

Ezekiele 22:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo.”

Mitindami

  • +Mik 3:1-3; Sef 3:3

Ezekiele 22:28

Mitindami

  • +Yis 30:10; Yir 23:25; Bil 2:14; Ezk 13:9, 10

Ezekiele 22:29

Mitindami

  • +Yis 1:23; 3:14; Yir 21:12; Mik 2:2

Ezekiele 22:30

Mitindami

  • +Kob 32:11; Nz 106:23

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 22:22Ba 21:16; Yir 2:34; Mt 23:37
Ezk. 22:2Ezk 16:51
Ezk. 22:3Ezk 24:6
Ezk. 22:3Ezk 12:25
Ezk. 22:32Ba 21:11
Ezk. 22:4Eb 9:6
Ezk. 22:4Le 26:30; Ezk 23:37
Ezk. 22:4Mib 28:37; 1Ba 9:7; Nz 80:6; Ezk 23:32; Da 9:16
Ezk. 22:5Nz 79:4
Ezk. 22:6Yis 1:23; Mik 3:1-3; Sef 3:3
Ezk. 22:7Mib 27:16
Ezk. 22:7Kob 22:21, 22; Nz 82:3; Yis 1:17
Ezk. 22:8Le 19:30
Ezk. 22:9Kob 23:1; Le 19:16
Ezk. 22:9Yir 13:27
Ezk. 22:10Le 18:7; 20:11
Ezk. 22:10Le 18:19; 20:18
Ezk. 22:11Le 18:20; 20:10; Yir 5:8
Ezk. 22:11Le 18:15
Ezk. 22:11Le 20:17
Ezk. 22:12Kob 23:8; Mib 27:25; Yis 1:23
Ezk. 22:12Mib 23:19
Ezk. 22:12Kob 22:25; Le 6:4, 5
Ezk. 22:14Ezk 21:7
Ezk. 22:15Mib 4:27; 28:25
Ezk. 22:15Yis 1:25; Ezk 23:27
Ezk. 22:16Ezk 6:13
Ezk. 22:18Mas 17:3; Yir 6:28-30
Ezk. 22:19Nz 119:119; Mas 25:4
Ezk. 22:20Ezk 21:31
Ezk. 22:21Mib 4:24; Nz 21:9; Yir 21:12
Ezk. 22:21Nz 68:2
Ezk. 22:25Yir 5:31; 6:13, 14
Ezk. 22:25Mik 3:5
Ezk. 22:26Yir 2:8; Bil 4:13; Mik 3:11
Ezk. 22:26Le 20:3; 22:2
Ezk. 22:26Le 10:10
Ezk. 22:26Le 11:46, 47
Ezk. 22:27Mik 3:1-3; Sef 3:3
Ezk. 22:28Yis 30:10; Yir 23:25; Bil 2:14; Ezk 13:9, 10
Ezk. 22:29Yis 1:23; 3:14; Yir 21:12; Mik 2:2
Ezk. 22:30Kob 32:11; Nz 106:23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 22:1-31

Ezekiele

22 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Nde yo, mwana ya moto, omibongisi mpo na kopesa etumbu na* engumba oyo ezali na ngambo ya makila+ mpe komonisa ye makambo nyonso oyo eyinamá oyo asali?+ 3 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee engumba oyo ezali kosopa makila+ na kati na yango, yo oyo ntango na yo ekoki,+ yo oyo osalaka bikeko ya bosɔtɔ* mpo na komikómisa mbindo,+ 4 omemi ngambo mpo na makila oyo osopi,+ mpe bikeko na yo ya bosɔtɔ ekómisi yo mbindo.+ Okómisi mikolo na yo mokuse, mpe nsuka ya bambula na yo ekoki. Yango wana nakokómisa yo eloko ya kosambwisa na bikólo mpe eloko ya kosɛka na mikili nyonso.+ 5 Mikili oyo ezali pene mpe oyo ezali mosika na yo ekosɛka yo,+ yo oyo nkombo na yo ezali mbindo, mpe otondi na mobulungano. 6 Talá! Nkumu mokomoko ya Yisraele na kati na yo asaleli bokonzi na ye mpo na kosopa makila.+ 7 Epai na yo, bato bazali kotyola tata ná mama.+ Bazali kobuba moto oyo afandi mopaya, mpe konyokola mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá.”’”+

8 “‘Otyoli bisika mosantu na ngai, mpe okómisi basabata na ngai eloko mpamba.+ 9 Epai na yo, bato oyo bakoselaka bato makambo bakani mpenza kosopa makila.+ Epai na yo, bazali kolya bambeka likoló ya bangomba mpe bazali kosala makambo ya nsɔni na kati na yo.+ 10 Na kati na yo, basambwisi mbeto ya tata,*+ mpe basangisi nzoto na makasi na mwasi oyo azali na mbindo na ntango na ye ya komona sanza.+ 11 Epai na yo, mobali asaleli mwasi ya moninga na ye makambo na ndenge oyo eyinamá,+ mosusu akómisi mwasi ya mwana na ye mbindo na etamboli ya nsɔni,+ mpe mosusu asangisi na makasi nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye moko.+ 12 Epai na yo, bandimi kozwa kanyaka mpo na kosopa makila.+ Ozali kodefisa mpo na kozwa benefisi+ to koluka benefisi ya lokoso, mpe kobɔtɔla baninga mbongo.+ Ya solo bobosani ngai mpenza,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

13 “‘Talá! Nabɛti mabɔkɔ na ngai mpamba te nayoki mabe mpenza mpo na litomba oyo ozwi na kozanga bosembo, mpe mpo na misala ya kosopa makila oyo ezali na kati na yo. 14 Okozala kaka na mpiko mpe makasi na mokolo oyo nakopesa yo etumbu?+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nakosala yango. 15 Nakopalanganisa yo na kati ya bikólo, nakopanza yo na kati ya mikili+ mpe nakosilisa mbindo na yo.+ 16 Okosambwa liboso ya bikólo, mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+

17 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 18 “Mwana ya moto, mpo na ngai, bato ya Yisraele bakómi lokola bosɔtɔ. Bango nyonso bazali kwivre, etini, ebende mpe mondɔlu na kati ya esika ya mɔtɔ makasi. Bakómi bosɔtɔ ya palata.+

19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bino nyonso bokómi lokola bosɔtɔ,+ nazali koyanganisa bino na kati ya Yerusaleme. 20 Kaka ndenge basangisaka palata, kwivre, ebende, mondɔlu mpe etini na kati ya esika ya mɔtɔ makasi, mpo na kofula mɔtɔ likoló na yango mpo enyangwa, ndenge yango nde nakoyanganisa bino na nkanda na ngai mpe na nkanda makasi na ngai, nakofula likoló na bino mpe nakonyangwisa bino.+ 21 Nakoyanganisa bino, mpe nakofula likoló na bino na mɔtɔ ya nkanda makasi na ngai,+ mpe bokonyangwisama na engumba na bino.+ 22 Kaka ndenge palata enyangwaka na kati ya esika ya mɔtɔ makasi, bino mpe bokonyangwa bongo na kati na yango; mpe bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nasopeli bino nkanda makasi na ngai.’”

23 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 24 “Mwana ya moto, lobá na Yerusaleme boye: ‘Ozali mokili oyo ekopɛtolama te, mokili oyo mbula ekonɔkela te na mokolo ya nkanda makasi. 25 Basakoli na yo basali likita mabe epai na yo,+ lokola nkɔsi oyo ezali koganga, oyo ezali kopasola nyama.+ Bazali kolya bato.* Bazali kokanga biloko ya motuya mpe biloko ya ntina mingi. Na kati na yo, bakómisi basi oyo mibali bakufá ebele. 26 Banganga-nzambe na yo batosi te mobeko na ngai,+ mpe bazali kaka kokómisa bisika mosantu na ngai eloko mpamba.+ Bakesenisi te eloko mosantu ná eloko ya mpamba,+ balakisi te bokeseni kati na eloko ya mbindo ná eloko ya pɛto,+ baboyi kotosa basabata na ngai, mpe bakómisi ngai eloko mpamba kati na bango. 27 Na kati na yo, bankumu na yo bazali lokola bambwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama; bazali kosopa makila, mpe koboma bato* mpo na kozwa litomba na ndenge oyo ezangi bosembo.+ 28 Basakoli na yo babombi misala na bango ya mabe ndenge bapakolaka mpɛmbɛ na efelo, bazali komona bimonaneli ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ekoya ya bokosi,+ bazali koloba boye: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,” nzokande Yehova ye moko alobi te. 29 Bato ya mokili bazali kobuba mpe koyiba,+ banyokoli moto oyo azangá ná mobola, mpe babubi moto oyo afandi mopaya, bapimeli ye bosembo.’

30 “‘Nazalaki koluka na kati na bango moto oyo akobongisa efelo ya mabanga to oyo akotɛlɛma na lidusu liboso na ngai mpo na bolamu ya mokili, mpo ebebisama te,+ kasi namonaki moto moko te. 31 Bongo nakosopela bango nkanda makasi na ngai mpe nakosilisa bango nyonso na mɔtɔ ya nkanda na ngai. Nakosala ete bányokwama mpo na mbuma mabe ya etamboli na bango,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto