Mokanda ya liboso epai ya Batesaloniki
1 Paulo, Silvano*+ mpe Timote+ epai ya lisangá ya Batesaloniki oyo ezali na bomoko elongo na Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu Kristo:
Boboto monene mpe kimya ezala na bino.
2 Topesaka ntango nyonso Nzambe matɔndi ntango totángaka bino nyonso na mabondeli na biso,+ 3 mpo liboso ya Nzambe mpe Tata na biso tobosanaka ata moke te mosala oyo bosalaki mpo na kondima na bino epai ya Nzambe mpe mpo na bolingo na bino, mpe ndenge boyikelaki mikakatano mpiko mpo na elikya+ na bino epai ya Nkolo Yesu Kristo. 4 Bandeko oyo Nzambe alingaka, toyebi ete ye aponi bino, 5 mpo nsango malamu oyo tozali kosakola eyaki epai na bino kaka na maloba te kasi mpe na nguya, na elimo santu mpe na kondima makasi, kaka ndenge boyebi lolenge ya bato biso tokómaki epai na bino mpo na bolamu na bino. 6 Mpe bokómaki bamekoli na biso+ mpe ya Nkolo,+ mpo bondimaki liloba ya Nzambe na esengo oyo eutaka na elimo santu atako bokutanaki na mikakatano*+ mingi, 7 na ndenge yango bokómi ndakisa mpo na bandimi nyonso na Masedonia mpe na Akaya.
8 Likambo ya solo ezali oyo ete, uta epai na bino lokito ya liloba ya Yehova* eyokani kaka na Masedonia ná Akaya te, kasi kondima na bino epai ya Nzambe epalangani na esika nyonso,+ ntina kutu tóloba ata likambo ezali te. 9 Mpo bato bango moko bazali kokoba koloba ndenge tokutanaki na bino mpo na mbala ya liboso. Bazali kolobela mpe ndenge oyo botikaki bikeko+ na bino mpe bobalukaki epai ya Nzambe mpo na kosala lokola baombo mpo na Nzambe ya bomoi mpe ya solo, 10 mpe kozela uta na likoló Mwana na ye,+ oyo asekwisaki,* elingi koloba, Yesu, oyo azali kobikisa biso na nkanda oyo ezali koya.+