Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Loyembo ya Salomo 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Loyembo ya Salomo

    • MWANA MWASI MOSHULAME NA KAA YA MOKONZI SALOMO (1:1–3:5)

    • MOSHULAME NA YERUSALEME (3:6–8:4)

        • Bana basi ya Siona (6-11)

          • Etuluku ya bato ya Salomo

Loyembo ya Salomo 3:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ngai elingaka.”

Mitindami

  • +Loy 1:7
  • +Loy 5:6

Loyembo ya Salomo 3:3

Mitindami

  • +Loy 5:7

Loyembo ya Salomo 3:4

Mitindami

  • +Loy 8:2

Loyembo ya Salomo 3:5

Mitindami

  • +Loy 2:7; 8:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 30

    15/11/2006, nk. 18-19

Loyembo ya Salomo 3:6

Mitindami

  • +Kob 30:23, 24, 34

Loyembo ya Salomo 3:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Kiti oyo bamemaka na yango moto ya lokumu.

Mitindami

  • +1Ba 9:22

Loyembo ya Salomo 3:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Kiti oyo bamemaka na yango moto ya lokumu.

Mitindami

  • +1Ba 5:8, 9

Loyembo ya Salomo 3:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “motole ya fololo; ekɔti ya bokonzi ya fololo.”

Mitindami

  • +2Sa 12:24; Mas 4:3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Loy. 3:1Loy 1:7
Loy. 3:1Loy 5:6
Loy. 3:3Loy 5:7
Loy. 3:4Loy 8:2
Loy. 3:5Loy 2:7; 8:4
Loy. 3:6Kob 30:23, 24, 34
Loy. 3:71Ba 9:22
Loy. 3:91Ba 5:8, 9
Loy. 3:112Sa 12:24; Mas 4:3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Loyembo ya Salomo 3:1-11

Loyembo ya Salomo

3 “Na butu, na mbeto na ngai,

Nalukaki moto oyo nalingaka.*+

Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.+

 2 Nakotɛlɛma mpe nakotambolatambola na engumba;

Na babalabala mpe na bisika minene ya bato nyonso,

Nakoluka moto oyo nalingaka.

Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.

 3 Basinzili oyo bazalaki kotambola mpo na kokɛngɛla engumba bakutanaki na ngai+ mpe natunaki bango:

‘Bomoni moto oyo nalingaka?’

 4 Ntango kaka nalekaki bango

Namonaki moto oyo nalingaka.

Nakangamaki na ye, mpe nalingaki te kotika ye akende

Tii ntango namemaki ye na ndako ya mama na ngai,+

Na shambrɛ ya kati ya mwasi oyo abotaki ngai.

 5 Ee bana basi ya Yerusaleme,

Na nkombo ya bamboloko mpe ya banyama babengi bishe ya esobe, nalapisi bino ndai ete:

Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolamuka.”+

 6 “Nini wana euti na esobe mpe ezali komata lokola makonzí ya milinga,

Oyo batye malasi ya mire mpe ya olibana,

Mpe mitindo nyonso ya pudrɛ ya nsolo kitoko ya moto ya mombongo?”+

 7 “Talá! Ezali tipoyi* ya Salomo.

Mibali ya nguya ntuku motoba bazingi yango,

Oyo bazwami na kati ya mibali ya nguya ya Yisraele,+

 8 Bango nyonso bazali na mopanga,

Balakisá bango ndenge ya kobunda,

Moto na moto na mopanga na ye na loketo

Mpo na komibatela na makama ya butu.”

 9 “Ezali tipoyi* ya Mokonzi Salomo

Oyo amisalelá na banzete ya Liban.+

10 Asalá makonzí na yango na palata,

Biloko oyo esimbi yango ezali ya wolo.

Kiti na yango ezali ya lɛnɛ ya mwa motane-bulé;

Bana basi ya Yerusaleme babongisá kati ya tipoyi yango

Na bolingo mpenza.”

11 “Ee bana basi ya Siona, bóbima,

Bótala Mokonzi Salomo

Alati motole* ya libala oyo mama na ye+ atongelaki ye

Na mokolo ya libala na ye,

Na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto