Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Loyembo ya Salomo 5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Loyembo ya Salomo

    • MOSHULAME NA YERUSALEME (3:6–8:4)

Loyembo ya Salomo 5:1

Mitindami

  • +Loy 4:16
  • +Loy 4:13, 14
  • +Loy 4:11
  • +Loy 1:2

Loyembo ya Salomo 5:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

Mitindami

  • +Loy 3:1
  • +Lk 2:8

Loyembo ya Salomo 5:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Molimo na ngai ebimaki.”

  • *

    To mbala mosusu, “Molimo na ngai ebimaki ntango alobaki.”

Mitindami

  • +Loy 3:1, 3

Loyembo ya Salomo 5:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “elamba na ngai ya komizipa.”

Loyembo ya Salomo 5:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mwa motane.”

Loyembo ya Salomo 5:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “bituka ya mbila ya date.”

  • *

    To, “korbo.”

Loyembo ya Salomo 5:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “na bandelo ya liziba ya mai.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 29

    15/11/2006, lok. 19

Loyembo ya Salomo 5:13

Mitindami

  • +Loy 6:2
  • +Loy 1:13

Loyembo ya Salomo 5:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2006, nk. 19-20

Loyembo ya Salomo 5:15

Mitindami

  • +Nz 92:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/11/2006, nk. 19-20

Loyembo ya Salomo 5:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Edáda.”

Mitindami

  • +Loy 2:3

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Loy. 5:1Loy 4:16
Loy. 5:1Loy 4:13, 14
Loy. 5:1Loy 4:11
Loy. 5:1Loy 1:2
Loy. 5:2Loy 3:1
Loy. 5:2Lk 2:8
Loy. 5:6Loy 3:1, 3
Loy. 5:13Loy 6:2
Loy. 5:13Loy 1:13
Loy. 5:15Nz 92:12
Loy. 5:16Loy 2:3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Loyembo ya Salomo 5:1-16

Loyembo ya Salomo

5 “Nakɔti na elanga na ngai,+

Ee ndeko na ngai ya mwasi, mwasi oyo nakobala.

Nazwi mire na ngai na banzete na yango, mpe biloko na ngai ya nsolo kitoko.+

Nalei mafuta na ngai ya nzoi ná ndako na yango;

Namɛli vinyo na ngai mpe miliki na ngai.”+

“Baninga, bólya!

Bómɛla mpe bómilangwisa na ndenge na bino ya komonisa lolango!”+

 2 “Nalali, kasi motema na ngai elali te.+

Nazali koyoka ndenge bolingo na ngai azali kobɛta kɔkɔkɔ!”

“Fungolelá ngai, Ee ndeko na ngai ya mwasi, bolingo na ngai,

Ebenga na ngai, moninga na ngai oyo azangi mbeba!

Mpo motó na ngai epɔli na mamwɛ,*

Nsuki na ngai oyo elíngamalíngamá etondi na matangá ya mai ya butu.”+

 3 “‘Nalongoli robɛ na ngai.

Nalata yango lisusu?

Nasukoli makolo na ngai.

Nakómisa yango lisusu mbindo?’

 4 Bolingo na ngai alongoli lobɔkɔ na ye na lidusu ya porte,

Mpe nayokaki mposa makasi ya komona ye.

 5 Natɛlɛmaki mpo na kofungolela bolingo na ngai porte;

Mabɔkɔ na ngai ezalaki kotangisa mire,

Mpe misapi na ngai ezalaki kotangisa mafuta ya mire,

Likoló ya esimbeli ya porte.

 6 Nafungolelaki bolingo na ngai porte,

Kasi bolingo na ngai abalukaki mpe akendaki na ye.

Nalɛmbaki nzoto* ntango akendaki.*

Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.+

Nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.

 7 Basinzili oyo bazalaki kotambola mpo na kokɛngɛla engumba bakutanaki na ngai.

Babɛtaki ngai mpe bazokisaki ngai.

Basinzili ya bifelo balongolaki ngai litambala.*

 8 Ee bana basi ya Yerusaleme, nalapisi bino ndai:

Soki bomoni bolingo na ngai,

Bóyebisa ye ete nabɛli maladi ya bolingo.”

 9 “Bolingo na yo aleki mibali mosusu na nini,

Yo mwasi oyo oleki basi nyonso na kitoko?

Bolingo na yo aleki mibali mosusu na nini,

Mpo olapisa biso ndai ya boye?”

10 “Bolingo na ngai azali kongɛnga mpe loposo na ye ezali kitoko;*

Na kati ya mibali nkóto zomi, ye nde aleki.

11 Motó na ye ezali lokola wolo, wolo oyo eleki kitoko.

Nsuki na ye oyo elíngamálíngamá ezali lokola mandalala ya nzete ya mbila* oyo ezali koningana,

Nsuki na ye moindo lokola yanganga.*

12 Miso na ye ezali lokola bibenga pene na mikɛli ya mai,

Oyo ezali kosukola na kati ya miliki,

Efandi pene ya liziba oyo etondi na mai.*

13 Matama na ye ezali lokola mokala oyo baloni matiti ya nsolo kitoko,+

Mabondo oyo etondi na matiti ya nsolo kitoko.

Mbɛbu na ye ezali bafololo lísi, oyo ezali kotangisa mafuta ya mire.+

14 Misapi ya mabɔkɔ na ye ezali basilɛndrɛ ya wolo, oyo balatisi krizolite.

Libumu na ye ezali mpɛmbɛ ya nzoku oyo bangɛngisi mpe bazipi na mabanga ya safire.

15 Makolo na ye ezali makonzí ya libanga ya marbre oyo etɛlɛmi likoló ya bitɛlɛmiselo ya wolo oyo eleki kitoko.

Azali komonana lokola Liban, kitoko lokola basɛdrɛ.+

16 Monɔkɔ* na ye ezali elɛngi mpenza,

Mpe makambo na ye nyonso ezali kosepelisa.+

Ye nde bolingo na ngai, ye nde moto nalingá, Ee bana basi ya Yerusaleme.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto