Loyembo ya Salomo
Nazwi mire na ngai na banzete na yango, mpe biloko na ngai ya nsolo kitoko.+
Nalei mafuta na ngai ya nzoi ná ndako na yango;
Namɛli vinyo na ngai mpe miliki na ngai.”+
“Baninga, bólya!
Bómɛla mpe bómilangwisa na ndenge na bino ya komonisa lolango!”+
2 “Nalali, kasi motema na ngai elali te.+
Nazali koyoka ndenge bolingo na ngai azali kobɛta kɔkɔkɔ!”
“Fungolelá ngai, Ee ndeko na ngai ya mwasi, bolingo na ngai,
Ebenga na ngai, moninga na ngai oyo azangi mbeba!
Mpo motó na ngai epɔli na mamwɛ,*
Nsuki na ngai oyo elíngamalíngamá etondi na matangá ya mai ya butu.”+
3 “‘Nalongoli robɛ na ngai.
Nalata yango lisusu?
Nasukoli makolo na ngai.
Nakómisa yango lisusu mbindo?’
4 Bolingo na ngai alongoli lobɔkɔ na ye na lidusu ya porte,
Mpe nayokaki mposa makasi ya komona ye.
5 Natɛlɛmaki mpo na kofungolela bolingo na ngai porte;
Mabɔkɔ na ngai ezalaki kotangisa mire,
Mpe misapi na ngai ezalaki kotangisa mafuta ya mire,
Likoló ya esimbeli ya porte.
6 Nafungolelaki bolingo na ngai porte,
Kasi bolingo na ngai abalukaki mpe akendaki na ye.
Nalɛmbaki nzoto* ntango akendaki.*
Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.+
Nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
7 Basinzili oyo bazalaki kotambola mpo na kokɛngɛla engumba bakutanaki na ngai.
Babɛtaki ngai mpe bazokisaki ngai.
Basinzili ya bifelo balongolaki ngai litambala.*
8 Ee bana basi ya Yerusaleme, nalapisi bino ndai:
Soki bomoni bolingo na ngai,
Bóyebisa ye ete nabɛli maladi ya bolingo.”
9 “Bolingo na yo aleki mibali mosusu na nini,
Yo mwasi oyo oleki basi nyonso na kitoko?
Bolingo na yo aleki mibali mosusu na nini,
Mpo olapisa biso ndai ya boye?”
10 “Bolingo na ngai azali kongɛnga mpe loposo na ye ezali kitoko;*
Na kati ya mibali nkóto zomi, ye nde aleki.
11 Motó na ye ezali lokola wolo, wolo oyo eleki kitoko.
Nsuki na ye oyo elíngamálíngamá ezali lokola mandalala ya nzete ya mbila* oyo ezali koningana,
Nsuki na ye moindo lokola yanganga.*
12 Miso na ye ezali lokola bibenga pene na mikɛli ya mai,
Oyo ezali kosukola na kati ya miliki,
Efandi pene ya liziba oyo etondi na mai.*
13 Matama na ye ezali lokola mokala oyo baloni matiti ya nsolo kitoko,+
Mabondo oyo etondi na matiti ya nsolo kitoko.
Mbɛbu na ye ezali bafololo lísi, oyo ezali kotangisa mafuta ya mire.+
14 Misapi ya mabɔkɔ na ye ezali basilɛndrɛ ya wolo, oyo balatisi krizolite.
Libumu na ye ezali mpɛmbɛ ya nzoku oyo bangɛngisi mpe bazipi na mabanga ya safire.
15 Makolo na ye ezali makonzí ya libanga ya marbre oyo etɛlɛmi likoló ya bitɛlɛmiselo ya wolo oyo eleki kitoko.
Azali komonana lokola Liban, kitoko lokola basɛdrɛ.+
Ye nde bolingo na ngai, ye nde moto nalingá, Ee bana basi ya Yerusaleme.”