Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Na Babilone, Ezekiele amoni bimonaneli ya Nzambe (1-3)

      • Emonaneli ya likalo ya Yehova na likoló (4-28)

        • Mopɛpɛ makasi, lipata mpe mɔtɔ (4)

        • Bikelamu minei ya bomoi (5-14)

        • Bapine ya ebende (15-21)

        • Etando ya ngɛlingɛli lokola glasɛ (22-24)

        • Kiti ya Bokonzi ya Yehova (25-28)

Ezekiele 1:1

Mitindami

  • +2Ba 24:12, 14
  • +Ezk 3:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1998, lok. 15

    “Makomami nyonso,” nk. 133-134

Ezekiele 1:2

Mitindami

  • +2Nt 36:9, 10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1998, lok. 15

    “Makomami nyonso,” lok. 133

Ezekiele 1:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “Nzambe azali kopesa makasi.”

  • *

    Lil., “Lobɔkɔ ya Yehova eyaki likoló na ngai.”

Mitindami

  • +Yir 22:25
  • +Ezk 3:14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 133

Ezekiele 1:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mikalikali.”

Mitindami

  • +1Ba 19:11
  • +Kob 19:18; Nz 97:2, 3
  • +Ezk 8:2

Ezekiele 1:5

Mitindami

  • +Ezk 10:9, 15; Em 4:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2007, lok. 12

    1/3/1991, lok. 31

Ezekiele 1:6

Mitindami

  • +Yis 6:2; Ezk 10:20, 21; Em 4:8

Ezekiele 1:7

Mitindami

  • +Da 10:5, 6

Ezekiele 1:9

Mitindami

  • +Ezk 10:11, 15

Ezekiele 1:10

Mitindami

  • +2Sa 17:10; Mas 28:1
  • +Mas 14:4
  • +Ezk 10:14, 15; Em 4:7
  • +Yb 39:27, 29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 8

Ezekiele 1:11

Mitindami

  • +Yis 6:2

Ezekiele 1:12

Mitindami

  • +Nz 103:20; Ebr 1:7, 14

Ezekiele 1:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bisungi.”

Mitindami

  • +Da 7:9, 10

Ezekiele 1:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “yiká.”

Mitindami

  • +Ezk 10:9-13; Em 4:7

Ezekiele 1:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Bayiká yango.”

  • *

    Mbala mosusu, yiká mokomoko esalemaki na yiká mibale oyo ekabolamaki semba.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 8

Ezekiele 1:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 8

Ezekiele 1:18

Mitindami

  • +Mas 15:3; Zek 4:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 8

Ezekiele 1:19

Mitindami

  • +Ezk 10:15-17

Ezekiele 1:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “elimo ya ekelamu ya bomoi.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 8

Ezekiele 1:22

Mitindami

  • +Ezk 10:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/1991, lok. 8

Ezekiele 1:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “efungwamaki semba.”

Ezekiele 1:24

Mitindami

  • +Nz 29:3; Ezk 43:2; Em 14:2

Ezekiele 1:26

Mitindami

  • +Kob 24:10; Nz 96:6; Ezk 10:1
  • +1Ba 22:19; Nz 99:1; Yis 6:1; Em 4:2
  • +Da 7:9

Ezekiele 1:27

Mitindami

  • +Ezk 8:2
  • +Mib 4:24; Nz 104:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 6 2016 lok. 4

Ezekiele 1:28

Mitindami

  • +Em 4:3
  • +Kob 24:16, 17; Ezk 8:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 6 2016 lok. 4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 1:12Ba 24:12, 14
Ezk. 1:1Ezk 3:15
Ezk. 1:22Nt 36:9, 10
Ezk. 1:3Yir 22:25
Ezk. 1:3Ezk 3:14
Ezk. 1:41Ba 19:11
Ezk. 1:4Kob 19:18; Nz 97:2, 3
Ezk. 1:4Ezk 8:2
Ezk. 1:5Ezk 10:9, 15; Em 4:6
Ezk. 1:6Yis 6:2; Ezk 10:20, 21; Em 4:8
Ezk. 1:7Da 10:5, 6
Ezk. 1:9Ezk 10:11, 15
Ezk. 1:102Sa 17:10; Mas 28:1
Ezk. 1:10Mas 14:4
Ezk. 1:10Ezk 10:14, 15; Em 4:7
Ezk. 1:10Yb 39:27, 29
Ezk. 1:11Yis 6:2
Ezk. 1:12Nz 103:20; Ebr 1:7, 14
Ezk. 1:13Da 7:9, 10
Ezk. 1:15Ezk 10:9-13; Em 4:7
Ezk. 1:18Mas 15:3; Zek 4:10
Ezk. 1:19Ezk 10:15-17
Ezk. 1:22Ezk 10:1
Ezk. 1:24Nz 29:3; Ezk 43:2; Em 14:2
Ezk. 1:26Kob 24:10; Nz 96:6; Ezk 10:1
Ezk. 1:261Ba 22:19; Nz 99:1; Yis 6:1; Em 4:2
Ezk. 1:26Da 7:9
Ezk. 1:27Ezk 8:2
Ezk. 1:27Mib 4:24; Nz 104:1, 2
Ezk. 1:28Em 4:3
Ezk. 1:28Kob 24:16, 17; Ezk 8:4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 1:1-28

Ezekiele

1 Na mbula ya 30, na mokolo ya mitano, na sanza ya minei, wana nazalaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya,+ pene na ebale Kebare,+ likoló efungwamaki mpe nabandaki komona bimonaneli ya Nzambe. 2 Na mokolo ya mitano ya sanza yango (elingi koloba, na mbula ya mitano ya komemama ya Mokonzi Yehoyakine na mboka mopaya),+ 3 Yehova alobaki na ngai, Ezekiele* mwana ya nganga-nzambe Buzi, na mokili ya Bakaladea pene ya ebale Kebare.+ Kuna nde nguya ya Yehova ebandaki kosala na kati na ngai.*+

4 Ntango nazalaki kotala, namonaki mopɛpɛ moko makasi+ ezalaki kouta na nɔrdi, lipata moko monene mpe mɔtɔ ezalaki kobimabima,*+ mpe kongɛnga moko makasi ezingaki yango, mpe eloko moko lokola wolo oyo esangani na palata ezalaki kouta na katikati ya mɔtɔ.+ 5 Na kati ya mɔtɔ yango ezalaki na eloko moko oyo ezalaki komonana lokola bikelamu minei ya bomoi,+ mpe mokomoko azalaki komonana lokola moto. 6 Ekelamu mokomoko na kati na bango azalaki na bilongi minei, mpe mapapu minei.+ 7 Makolo na bango ezalaki semba, mpe ezalaki lokola makolo ya mwana-ngɔmbɛ, ezalaki kongɛnga lokola kongɛnga ya kwivre oyo bapaloli sɛlisɛli.+ 8 Mabɔkɔ ya moto ezalaki na nse ya mapapu na bango, na mipanzi na bango nyonso minei, mpe bango nyonso minei bazalaki na bilongi mpe mapapu. 9 Mapapu na bango ezalaki kokangana moko na mosusu. Bazalaki kobaluka te ntango bazali kokende; mokomoko azalaki kokende kaka liboso.+

10 Talá ndenge bilongi na bango ezalaki komonana: bango nyonso minei bazalaki mokomoko na elongi ya moto, ná elongi ya nkɔsi+ na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali, mpe elongi ya ngɔmbɛ-mobali+ na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi; mpe bango nyonso minei bazalaki na elongi+ ya mpongo.+ 11 Bilongi na bango ezalaki ndenge wana. Mapapu na bango esembolamaki likoló. Mokomoko azalaki na mapapu mibale ekangani moko na mosusu, mpe mapapu mibale ezalaki kozipa nzoto na bango.+

12 Mokomoko azalaki kokende kaka liboso. Esika nyonso oyo elimo ezalaki kotinda bango bákende, bazalaki kokende.+ Bazalaki kobaluka te ntango bazali kokende. 13 Mpe bikelamu yango ya bomoi, bazalaki komonana lokola makala oyo ezali kopela. Biloko moko oyo ezalaki komonana lokola banzete* ya mɔtɔ ezalaki kokende mpe kozonga kati na bikelamu yango ya bomoi, mɔtɔ ezalaki kongɛnga, mpe mikalikali ezalaki kobima na mɔtɔ.+ 14 Mpe ntango bikelamu yango ya bomoi bazalaki kokende mpe kozonga, bazalaki komonana lokola mikalikali.

15 Wana nazalaki kotala bikelamu yango ya bomoi, namonaki pine ya ebende* moko ezalaki na mabele pembeni ya bikelamu yango ya bomoi, oyo bazalaki na bilongi minei.+ 16 Bapine yango ya ebende* ezalaki kongɛnga lokola libanga ya krizolite, mpe yango nyonso minei ezalaki lolenge moko. Ndenge oyo yango ezalaki komonana ná ndenge oyo yango esalemaki ezalaki lokola pine moko ya ebende ezali na katikati ya pine mosusu ya ebende.* 17 Ntango yango ezalaki kokende, ekokaki kokende na ngámbo na yango nyonso minei. Ezalaki kobuka te mpo na kobaluka na nzela mosusu. 18 Bajantɛ na yango, ezalaki minene mingi mpenza mpe ezalaki kopesa nsɔmɔ; mpe bajantɛ na yango nyonso minei etondaki na miso epai na epai.+ 19 Ntango nyonso oyo bikelamu yango ya bomoi bazalaki kokende, bapine yango ezalaki mpe kokende elongo na bango, mpe ntango bikelamu yango ya bomoi bazalaki kotombwana na mabele, bapine yango mpe ezalaki kotombwana.+ 20 Esika nyonso oyo elimo ezalaki kotinda bango bákende, bazalaki kokende, esika nyonso oyo elimo ezalaki kokende; bapine ezalaki kotombwana elongo na bango, mpo elimo oyo ezalaki kosala na kati ya bikelamu ya bomoi* ezalaki mpe na kati ya bapine yango. 21 Ntango bazalaki kokende, yango ezalaki kokende; ntango bazalaki kotɛlɛma, yango mpe ezalaki kotɛlɛma; ntango bazalaki kotombwana na mabele, bapine yango ezalaki kotombwana elongo na bango, mpo elimo oyo ezalaki kosala na kati ya bikelamu ya bomoi ezalaki mpe na kati ya bapine.

22 Likoló ya mitó ya bikelamu yango ya bomoi, ezalaki na eloko moko lokola etando oyo ezalaki ngɛlingɛli lokola glasɛ moko ya nsɔmɔ, etandami likoló ya mitó na bango.+ 23 Na nse ya etando yango, mapapu na bango etɛlɛmaki semba na likoló,* mosusu ekangani na mosusu. Mokomoko na bango azalaki na mapapu mibale mpo na kozipa nzoto na ye na mopanzi oyo mpe na mapapu mibale mpo na kozipa nzoto na ye na mopanzi oyo mosusu. 24 Ntango nayokaki lokito ya mapapu na bango, ezalaki lokola lokito ya mai oyo ezali kotíyola mbangu, lokola lokito ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ Ntango bazalaki kokende, ezalaki lokola lokito ya limpinga. Ntango bazalaki kotɛlɛma bazalaki kokitisa mapapu na bango.

25 Mongongo moko ebimaki likoló ya etando oyo ezalaki likoló ya mitó na bango. (Ntango bazalaki kotɛlɛma, bazalaki kokitisa mapapu na bango.) 26 Likoló ya etando yango oyo ezalaki likoló ya mitó na bango, eloko moko ezalaki komonana lokola libanga ya safire,+ oyo ezalaki lokola kiti ya bokonzi.+ Mpe likoló ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki komonana lokola moto.+ 27 Banda na esika oyo ezalaki komonana lokola loketo na ye tii na likoló, namonaki eloko moko oyo ezalaki kongɛnga lokola wolo oyo esangani na palata,+ oyo ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezalaki kongɛnga. Mpe banda na esika oyo ezalaki komonana lokola loketo na ye tii na nse, namonaki eloko moko lokola mɔtɔ.+ Kongɛnga ezalaki zingazinga na ye nyonso 28 lokola ya monama+ oyo ebimaka na mapata na mokolo ya mbula. Bongo nde kongɛnga yango ezalaki komonana zingazinga. Ezalaki komonana lokola nkembo ya Yehova.+ Ntango namonaki yango, nakweaki elongi na nse, mpe nabandaki koyoka mongongo ya moto moko azali koloba.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto