Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 27
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Yakobo azwi lipamboli epai ya Yisaka (1-29)

      • Esau aluki lipamboli, kasi abongoli motema te (30-40)

      • Esau abombeli Yakobo nkanda na motema (41-46)

Ebandeli 27:1

Mitindami

  • +Eb 25:28

Ebandeli 27:3

Mitindami

  • +Eb 25:27

Ebandeli 27:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ngai epambola.”

Ebandeli 27:5

Mitindami

  • +Eb 27:30

Ebandeli 27:6

Mitindami

  • +Eb 25:28

Ebandeli 27:7

Mitindami

  • +Eb 27:30, 31

Ebandeli 27:8

Mitindami

  • +Eb 27:13, 43

Ebandeli 27:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2004, lok. 11

Ebandeli 27:11

Mitindami

  • +Eb 25:25; 27:23

Ebandeli 27:12

Mitindami

  • +Eb 27:21

Ebandeli 27:13

Mitindami

  • +Eb 27:8, 43

Ebandeli 27:15

Mitindami

  • +Eb 25:23, 26

Ebandeli 27:16

Mitindami

  • +Eb 25:25; 27:11

Ebandeli 27:17

Mitindami

  • +Eb 27:9

Ebandeli 27:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo epambola.”

Mitindami

  • +Eb 25:31-33; Ro 9:10-12
  • +Eb 27:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/12/2007, lok. 30

    1/10/2007, lok. 31

Ebandeli 27:21

Mitindami

  • +Eb 27:11, 12

Ebandeli 27:22

Mitindami

  • +Eb 27:16

Ebandeli 27:23

Mitindami

  • +Ebr 11:20

Ebandeli 27:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ngai ekopambola.”

Ebandeli 27:26

Mitindami

  • +Eb 48:10

Ebandeli 27:27

Mitindami

  • +Eb 25:27; 27:15

Ebandeli 27:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Blé to ɔrje.

Mitindami

  • +Mib 11:11
  • +Mit 13:26, 27
  • +Eb 27:37; Mib 7:13

Ebandeli 27:29

Mitindami

  • +Eb 25:23
  • +Eb 12:1, 3; 28:1, 3; 31:42; Ezk 25:12, 13

Ebandeli 27:30

Mitindami

  • +Eb 27:3

Ebandeli 27:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na yo epambola.”

Ebandeli 27:32

Mitindami

  • +Eb 25:25, 31; Ebr 12:16

Ebandeli 27:34

Mitindami

  • +Ebr 12:16, 17

Ebandeli 27:36

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “moto oyo asimbi litindi; moto oyo azwi esika ya moto mosusu.”

Mitindami

  • +Eb 25:26; 32:28; Hos 12:3
  • +Eb 25:32-34
  • +Eb 27:28

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 16

Ebandeli 27:37

Mitindami

  • +Eb 25:23; 27:29; Ro 9:10, 12
  • +Mib 33:28

Ebandeli 27:38

Mitindami

  • +Ebr 12:16, 17

Ebandeli 27:39

Mitindami

  • +Yos 24:4; Ebr 11:20

Ebandeli 27:40

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Eb 32:6; Mit 20:18
  • +Eb 25:23; 2Sa 8:14; Mal 1:2, 3
  • +2Ba 8:20; 2Nt 28:17

Ebandeli 27:41

Mitindami

  • +Am 1:11
  • +Eb 35:28, 29

Ebandeli 27:42

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “komibɔndisa na makanisi ya koluka koboma yo.”

Ebandeli 27:43

Mitindami

  • +Eb 28:5

Ebandeli 27:46

Mitindami

  • +Eb 26:34, 35; 28:8
  • +Eb 24:2, 3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2006, nk. 21-22

    15/7/1995, lok. 13

    1/8/1993, lok. 4

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 27:1Eb 25:28
Eba. 27:3Eb 25:27
Eba. 27:5Eb 27:30
Eba. 27:6Eb 25:28
Eba. 27:7Eb 27:30, 31
Eba. 27:8Eb 27:13, 43
Eba. 27:11Eb 25:25; 27:23
Eba. 27:12Eb 27:21
Eba. 27:13Eb 27:8, 43
Eba. 27:15Eb 25:23, 26
Eba. 27:16Eb 25:25; 27:11
Eba. 27:17Eb 27:9
Eba. 27:19Eb 25:31-33; Ro 9:10-12
Eba. 27:19Eb 27:4
Eba. 27:21Eb 27:11, 12
Eba. 27:22Eb 27:16
Eba. 27:23Ebr 11:20
Eba. 27:26Eb 48:10
Eba. 27:27Eb 25:27; 27:15
Eba. 27:28Mib 11:11
Eba. 27:28Mit 13:26, 27
Eba. 27:28Eb 27:37; Mib 7:13
Eba. 27:29Eb 25:23
Eba. 27:29Eb 12:1, 3; 28:1, 3; 31:42; Ezk 25:12, 13
Eba. 27:30Eb 27:3
Eba. 27:32Eb 25:25, 31; Ebr 12:16
Eba. 27:34Ebr 12:16, 17
Eba. 27:36Eb 25:26; 32:28; Hos 12:3
Eba. 27:36Eb 25:32-34
Eba. 27:36Eb 27:28
Eba. 27:37Eb 25:23; 27:29; Ro 9:10, 12
Eba. 27:37Mib 33:28
Eba. 27:38Ebr 12:16, 17
Eba. 27:39Yos 24:4; Ebr 11:20
Eba. 27:40Eb 32:6; Mit 20:18
Eba. 27:40Eb 25:23; 2Sa 8:14; Mal 1:2, 3
Eba. 27:402Ba 8:20; 2Nt 28:17
Eba. 27:41Am 1:11
Eba. 27:41Eb 35:28, 29
Eba. 27:43Eb 28:5
Eba. 27:46Eb 26:34, 35; 28:8
Eba. 27:46Eb 24:2, 3
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
  • 45
  • 46
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 27:1-46

Ebandeli

27 Ntango Yisaka akómaki mobange, mpe azalaki komona lisusu te, abengaki Esau+ mwana na ye ya liboso mpe alobaki ete: “Mwana na ngai!” Ayanolaki ete: “Ngai oyo!” 2 Yisaka alobaki lisusu ete: “Nakómi sikoyo mobange. Nayebi mokolo ya liwa na ngai te. 3 Mpe sikoyo, nabondeli yo, zwá bisaleli na yo ya bokila, libenga na yo ya mbanzi ná mbanzi na yo, mpe kende na zamba kolukela ngai mwa nyama.+ 4 Na nsima, salelá ngai elubu moko ya elɛngi ndenge nalingaka mpe memelá ngai yango. Bongo nakolya yango mpo napambola* yo liboso nakufa.”

5 Kasi, Rebeka azalaki koyoka ntango Yisaka azalaki koloba na Esau mwana na ye. Bongo Esau akendaki na zamba mpo na koluka nyama mpe koya na yango.+ 6 Kasi Rebeka alobaki na Yakobo mwana na ye ete:+ “Nauti koyoka ndenge tata na yo alobi na ndeko na yo Esau ete: 7 ‘Memelá ngai mwa nyama mpe salelá ngai elubu moko ya elɛngi. Mpe tiká nalya mpo napambola yo na miso ya Yehova liboso ya liwa na ngai.’+ 8 Mpe sikoyo, mwana na ngai, yoká ngai malamu mpenza mpe salá likambo oyo nazali koyebisa yo.+ 9 Nabondeli yo, kende na etonga mpe zwá bana-ntaba mibale oyo eleki malamu mpo nasalela tata na yo elubu moko ya elɛngi kaka ndenge alingaka. 10 Mpe okomemela tata na yo yango mpo alya, bongo akopambola yo liboso ya liwa na ye.”

11 Yakobo alobaki na Rebeka mama na ye ete: “Esau ndeko na ngai azali nzoto nsukinsuki,+ kasi ngai nazali bongo te. 12 Sikoyo soki tata asimbi loposo na ngai?+ Boye ekozala nde lokola nazali kotyola ye, mpe nakomiyeisela elakeli mabe kasi lipamboli te.” 13 Kasi mama na ye alobaki na ye ete: “Elakeli mabe oyo esengeli koyela yo eyela nde ngai, mwana na ngai. Yo salá nde oyo nalobi mpe kende, zwelá ngai yango.”+ 14 Bongo akendaki kozwa yango mpe amemelaki yango mama na ye, mpe mama na ye asalaki elubu moko ya elɛngi kaka ndenge tata na ye azalaki kolinga. 15 Nsima na yango, Rebeka azwaki bilamba oyo elekaki kitoko ya mwana na ye ya mokóló Esau, bilamba oyo ezalaki na ndako, mpe alatisaki yango Yakobo+ mwana na ye, leki ya Esau. 16 Alatisaki ye mpe mposo ya bana-ntaba na mabɔkɔ na ye mpe na nkingo na ye na esika oyo ezangi nsuki.+ 17 Na nsima, apesaki Yakobo mwana na ye elubu yango ya elɛngi mpe mampa oyo asalaki.+

18 Bongo akɔtaki epai ya tata na ye mpe alobaki ete: “Tata!” mpe ye ayanolaki ete: “Ngai oyo! Yo nani, mwana na ngai?” 19 Yakobo alobaki na tata na ye ete: “Ngai Esau mwana na yo ya liboso.+ Nasali kaka ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, bongamá mpe lyá mwa nyama nazwi, mpo opambola* ngai.”+ 20 Na yango, Yisaka alobaki na mwana na ye ete: “Ndenge nini ozwi yango nokinoki boye, mwana na ngai?” Azongisaki ete: “Mpo Yehova Nzambe na yo asali ete eya epai na ngai.” 21 Bongo Yisaka alobaki na Yakobo ete: “Nabondeli yo, pusaná pene, mpo nasimba loposo na yo, mwana na ngai, nayeba soki ozali mpenza mwana na ngai Esau to te.”+ 22 Na yango, Yakobo apusanaki pene na Yisaka tata na ye, mpe Yisaka abandaki kosimbasimba loposo na ye, nsima na yango alobaki ete: “Mongongo ezali mongongo ya Yakobo, kasi mabɔkɔ ezali mabɔkɔ ya Esau.”+ 23 Ayebaki ye te mpo mabɔkɔ na ye ezalaki nsukinsuki lokola mabɔkɔ ya Esau ndeko na ye. Na yango, apambolaki ye.+

24 Na nsima, atunaki ete: “Ozali mpenza mwana na ngai Esau?” mpe ayanolaki ete: “Ezali ngai.” 25 Na nsima, alobaki ete: “Mwana na ngai, memelá ngai mwa nyama ya zamba mpo nalya, na nsima nakopambola* yo.” Bongo ayaki na yango epai na ye mpe alyaki, mpe amemelaki ye vinyo mpe amɛlaki. 26 Na nsima, Yisaka tata na ye alobaki na ye ete: “Nabondeli yo, mwana na ngai,+ yaká pene mpe pesá ngai lipwɛpwɛ.” 27 Bongo ayaki pene mpe apesaki ye lipwɛpwɛ, mpe Yisaka ayokaki nsolo ya bilamba na ye.+ Mpe apambolaki ye, alobaki ete:

“Talá, nsolo ya mwana na ngai ezali lokola nsolo ya zamba oyo Yehova apamboli. 28 Nzambe ya solo apesa yo mamwɛ ya likoló+ mpe mabele oyo ebotaka malamu na mokili+ mpe bilei* mingi mpe vinyo ya sika.+ 29 Bato ya bikólo básalela yo mpe bikólo efukamela yo. Zalá nkolo ya bandeko na yo, mpe bana ya mama na yo báfukamela yo.+ Moto nyonso oyo akolakela yo mabe alakelama mabe, mpe moto nyonso oyo akopambola yo, apambolama.”+

30 Ntango kaka Yisaka asilisaki kopambola Yakobo, mpe Yakobo alongwaki liboso ya Yisaka tata na ye, na ntango wana nde Esau ndeko na ye autaki na bokila.+ 31 Ye mpe asalaki elubu moko ya elɛngi mpe amemaki yango epai ya tata na ye, alobaki na tata na ye ete: “Tiká tata na ngai alamuka mpe alya mwa nyama oyo mwana na ye azwi na bokila, mpo opambola* ngai.” 32 Bongo Yisaka tata na ye alobaki na ye ete: “Yo nani?” na yango ye ayanolaki ete: “Ngai mwana na yo, mwana na yo ya liboso Esau.”+ 33 Mpe Yisaka abandaki kolɛnga makasi mpenza, bongo alobaki ete: “Bongo nani akendaki koluka nyama mpe amemelaki ngai? Nalyaki yango liboso yo okɔta, mpe napambolaki ye mpe moto yango akopambolama mpenza!”

34 Ntango Esau ayokaki maloba ya tata na ye, abandaki kolela na mongongo ya makasi mpe ya mawa, mpe alobaki na tata na ye ete: “Tata na ngai, pambolá ngai, ngai mpe!”+ 35 Kasi Yisaka alobaki ete: “Ndeko na yo ayaki na bokosi mpo azwa lipamboli oyo ezalaki ya yo.” 36 Bongo Esau alobaki ete: “Yango wana nkombo na ye ezali Yakobo.* Azwi esika na ngai mbala mibale:+ azwaki lotomo na ngai ya mwana ya liboso,+ mpe sikoyo azwi lipamboli na ngai!”+ Na nsima, abakisaki ete: “Obombeli ngai lipamboli ata moko te?” 37 Kasi Yisaka ayanolaki Esau ete: “Talá, natye ye nkolo na yo,+ mpe napesi ye bandeko na ye nyonso bázala basaleli na ye, mpe napesi ye bilei ná vinyo ya sika mpo ezala biloko ya kosunga ye.+ Mwana na ngai, eloko nini mosusu nakoki kosala mpo na yo?”

38 Esau alobaki na tata na ye ete: “Tata, ozali kaka na lipamboli moko? Tata na ngai, pambolá ngai, ngai mpe!” Na yango, Esau abandaki kolela na mongongo makasi.+ 39 Bongo Yisaka tata na ye ayanolaki ye ete:

“Talá, okofanda mosika na mabele oyo ebotaka malamu na mokili, mpe mosika na mamwɛ oyo eutaka na likoló.+ 40 Mpe okobika na mopanga na yo,+ mpe okosalela ndeko na yo.+ Kasi ntango okokóma kotomboka, okobuka ekanganeli* na ye na nkingo na yo.”+

41 Nzokande, Esau abombelaki Yakobo nkanda na motema mpo na lipamboli oyo tata na ye apambolaki ye,+ mpe Esau azalaki kaka koloba na motema na ye ete: “Mikolo ya kolela tata na ngai ekómi pene.+ Nsima na yango, nakoboma ndeko na ngai Yakobo.” 42 Ntango bayebisaki Rebeka maloba ya Esau mwana na ye ya mokóló, na mbala moko abengaki mwana na ye Yakobo, leki ya Esau mpe alobaki na ye ete: “Talá! Esau ndeko na yo azali kokana koboma yo,* mpo na kozongisela yo mabe. 43 Sikoyo mwana na ngai, salá oyo nazali koyebisa yo. Tɛlɛmá mpe kimá epai ya ndeko na ngai Labana na Harane.+ 44 Fandá elongo na ye mpo na mwa ntango tii nkanda makasi ya ndeko na yo ekokita, 45 tii nkanda oyo ndeko na yo azali koyokela yo ekosila mpe akobosana oyo osali ye. Na nsima, nakotinda bábenga yo kuna. Mpo na nini nazanga bino mibale kaka na mokolo moko?”

46 Nsima na yango, Rebeka azalaki se koyebisa Yisaka ete: “Nakómi koyoka bomoi na ngai mabe mpenza mpo na bana basi ya Hete.+ Soki kaka Yakobo azwi mwasi kati na bana basi ya Hete, lokola bana basi ya mokili oyo, bomoi na ngai ezali na ntina nini?”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto