Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.
21 Ee Yehova, mokonzi asepelaka na makasi na yo;+
Asepelaka mpenza na misala na yo ya kobikisa!+
2 Okokisi mposa ya motema na ye,+
Mpe oboyi te kokokisa kosɛnga ya mbɛbu na ye. (Sela)
3 Mpo opamboli ye mingi mpenza;
Otye na motó na ye motole ya wolo ya kitoko.+
4 Asɛngaki yo azala na bomoi, mpe opesaki ye yango,+
Opesaki ye bomoi molai, libela na libela.
5 Misala na yo ya kobikisa ememeli ye nkembo monene.+
Opesi ye lokumu ná nkembo.
6 Okómisi ye moto oyo apambolami mpo na seko;+
Osepelisi ye na esengo liboso na yo.+
7 Mpo mokonzi atyeli Yehova motema;+
Mpo na bolingo ya sembo ya Oyo-Aleki-Likoló, akokwea ata moke te.+
8 Lobɔkɔ na yo ekozwa banguna na yo nyonso;
Lobɔkɔ na yo ya mobali ekozwa baoyo bayinaka yo.
9 Na ntango oyo etyamá, oyo okotyela bango likebi, okokómisa bango lokola esika moko ya mɔtɔ makasi.
Na nkanda na ye, Yehova akopesa bango etumbu, mpe mɔtɔ ekozikisa bango.+
10 Okolongola libota na bango na mabele,
Mpe bana na bango na kati ya bana ya bato.
11 Mpo bakani kosalela yo likambo ya mabe;+
Baluki kosalela mayele mabe oyo ekolonga te.+
12 Mpo okosala ete bázonga nsima+
Na ndenge okotalisa litimbo na yo epai na bango.
13 Tɛlɛmá, Ee Yehova, mpe monisá makasi na yo.
Tokoyemba mpo na kosanzola nguya na yo.