Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Bamboka oyo libota ya Yuda mpe ya Simeone elongi (1-20)

      • Bayebusi bakobi kofanda na Yerusaleme (21)

      • Bakitani ya Yozefe bazwi Betele (22-26)

      • Bayisraele babengani Bakanana nyonso te (27-36)

Basambisi 1:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana ya Yisraele.”

Mitindami

  • +Yos 24:29
  • +Mit 27:18, 21; Bas 20:18

Basambisi 1:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Nazali kopesa.”

Mitindami

  • +Eb 49:8; Mib 33:7; 1Nt 5:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, lok. 24

Basambisi 1:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “libula.”

Mitindami

  • +Yos 15:1; 19:1, 9

Basambisi 1:4

Mitindami

  • +Mib 9:3

Basambisi 1:5

Mitindami

  • +Eb 10:6; Mib 20:17
  • +Eb 15:18-21; Kob 3:8; Bas 3:5; 1Ba 9:20, 21

Basambisi 1:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, lok. 24

Basambisi 1:7

Mitindami

  • +Yos 15:8, 12

Basambisi 1:8

Mitindami

  • +Yos 15:63; Bas 1:21

Basambisi 1:9

Mitindami

  • +Yos 11:16; 15:20, 33

Basambisi 1:10

Mitindami

  • +Yos 11:21; 15:13, 14

Basambisi 1:11

Mitindami

  • +Yos 10:38
  • +Yos 15:15

Basambisi 1:12

Mitindami

  • +Mit 13:3, 6; 14:24; Mib 1:35, 36; Yos 14:13
  • +Yos 15:16-19

Basambisi 1:13

Mitindami

  • +Bas 3:9
  • +1Nt 4:13

Basambisi 1:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “abɛtaki mabɔkɔ ntango azalaki likoló ya mpunda.”

Basambisi 1:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Negebe.”

  • *

    Elimboli, “basaani ya mai.”

Basambisi 1:16

Mitindami

  • +Mit 24:21; Bas 4:11
  • +Kob 3:1; 4:18; 18:1; Mit 10:29
  • +Mib 34:3; Bas 3:13
  • +Mit 21:1
  • +Mit 10:29-32

Basambisi 1:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “eloko oyo esengeli kobebisama.”

Mitindami

  • +Le 27:29; Mib 20:16
  • +Yos 19:1, 4

Basambisi 1:18

Mitindami

  • +Eb 10:19; Yos 11:22
  • +Bas 14:19
  • +Yos 13:1-3; 15:20, 45

Basambisi 1:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “makalo ya bibende.”

Mitindami

  • +Mib 20:1; Yos 17:16

Basambisi 1:20

Mitindami

  • +Mit 14:24; Yos 14:9
  • +Mit 13:22

Basambisi 1:21

Mitindami

  • +Yos 15:63; 2Sa 5:6

Basambisi 1:22

Mitindami

  • +Yos 14:4
  • +Eb 49:22, 24; Yos 16:1; Nz 44:3

Basambisi 1:23

Mitindami

  • +Eb 35:6

Basambisi 1:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “tokomonisela yo bolingo ya sembo.”

Basambisi 1:25

Mitindami

  • +Yos 6:25; 1Sa 15:6

Basambisi 1:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezali zingazinga.”

Mitindami

  • +Yos 21:8, 25; Bas 5:19
  • +Yos 17:11, 12

Basambisi 1:28

Mitindami

  • +Eb 9:25; 1Ba 9:20, 21
  • +Mit 33:55; Mib 7:2; 20:16; Yos 17:13

Basambisi 1:29

Mitindami

  • +Yos 16:10; 1Ba 9:16

Basambisi 1:30

Mitindami

  • +Yos 19:15, 16
  • +Mib 20:17; Bas 2:2

Basambisi 1:31

Mitindami

  • +Yos 11:8; 19:28, 31
  • +Yos 19:29, 31
  • +Yos 19:30, 31
  • +Yos 21:8, 31

Basambisi 1:33

Mitindami

  • +Yos 19:38, 39
  • +Mib 7:2

Basambisi 1:34

Mitindami

  • +Yos 19:47; Bas 18:1

Basambisi 1:35

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ ya ndako ya Yozefe ekómaki kilo.”

Mitindami

  • +Yos 10:12
  • +Yos 19:42, 48

Basambisi 1:36

Mitindami

  • +Mit 34:2, 4; Yos 15:3, 12

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 1:1Yos 24:29
Bas. 1:1Mit 27:18, 21; Bas 20:18
Bas. 1:2Eb 49:8; Mib 33:7; 1Nt 5:2
Bas. 1:3Yos 15:1; 19:1, 9
Bas. 1:4Mib 9:3
Bas. 1:5Eb 10:6; Mib 20:17
Bas. 1:5Eb 15:18-21; Kob 3:8; Bas 3:5; 1Ba 9:20, 21
Bas. 1:7Yos 15:8, 12
Bas. 1:8Yos 15:63; Bas 1:21
Bas. 1:9Yos 11:16; 15:20, 33
Bas. 1:10Yos 11:21; 15:13, 14
Bas. 1:11Yos 10:38
Bas. 1:11Yos 15:15
Bas. 1:12Mit 13:3, 6; 14:24; Mib 1:35, 36; Yos 14:13
Bas. 1:12Yos 15:16-19
Bas. 1:13Bas 3:9
Bas. 1:131Nt 4:13
Bas. 1:16Mit 24:21; Bas 4:11
Bas. 1:16Kob 3:1; 4:18; 18:1; Mit 10:29
Bas. 1:16Mib 34:3; Bas 3:13
Bas. 1:16Mit 21:1
Bas. 1:16Mit 10:29-32
Bas. 1:17Le 27:29; Mib 20:16
Bas. 1:17Yos 19:1, 4
Bas. 1:18Eb 10:19; Yos 11:22
Bas. 1:18Bas 14:19
Bas. 1:18Yos 13:1-3; 15:20, 45
Bas. 1:19Mib 20:1; Yos 17:16
Bas. 1:20Mit 14:24; Yos 14:9
Bas. 1:20Mit 13:22
Bas. 1:21Yos 15:63; 2Sa 5:6
Bas. 1:22Yos 14:4
Bas. 1:22Eb 49:22, 24; Yos 16:1; Nz 44:3
Bas. 1:23Eb 35:6
Bas. 1:25Yos 6:25; 1Sa 15:6
Bas. 1:27Yos 21:8, 25; Bas 5:19
Bas. 1:27Yos 17:11, 12
Bas. 1:28Eb 9:25; 1Ba 9:20, 21
Bas. 1:28Mit 33:55; Mib 7:2; 20:16; Yos 17:13
Bas. 1:29Yos 16:10; 1Ba 9:16
Bas. 1:30Yos 19:15, 16
Bas. 1:30Mib 20:17; Bas 2:2
Bas. 1:31Yos 11:8; 19:28, 31
Bas. 1:31Yos 19:29, 31
Bas. 1:31Yos 19:30, 31
Bas. 1:31Yos 21:8, 31
Bas. 1:33Yos 19:38, 39
Bas. 1:33Mib 7:2
Bas. 1:34Yos 19:47; Bas 18:1
Bas. 1:35Yos 10:12
Bas. 1:35Yos 19:42, 48
Bas. 1:36Mit 34:2, 4; Yos 15:3, 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 1:1-36

Basambisi

1 Nsima ya liwa ya Yosua,+ Bayisraele* batunaki Yehova ete:+ “Nani kati na biso akomata liboso mpo na kobundisa Bakanana?” 2 Yehova ayanolaki: “Yuda nde ekomata liboso.+ Talá! Nakopesa* mokili yango na lobɔkɔ na ye.” 3 Bongo libota ya Yuda elobaki na libota ya Simeone, bandeko na bango ete: “Bóya tókende na teritware* oyo bapesaki biso+ mpo tóbundisa Bakanana. Na nsima, biso mpe tokokende na bino na teritware oyo bapesaki bino.” Na yango libota ya Simeone ekendaki elongo na bango.

4 Ntango libota ya Yuda ekendaki etumba, Yehova apesaki Bakanana ná Baperizi na mabɔkɔ na bango,+ mpe balongaki mibali 10 000 na Bezeke. 5 Bakutaki Adoni-bezeke na Bezeke mpe babundisaki ye kuna; balongaki Bakanana+ ná Baperizi.+ 6 Ntango Adoni-bezeke akimaki, balandaki ye, bakangaki ye mpe bakataki ye misapi minene ya mabɔkɔ mpe ya makolo. 7 Na nsima Adoni-bezeke alobaki: “Ezali na bakonzi 70 oyo nakataki misapi minene ya mabɔkɔ mpe ya makolo, mpe balɔkɔtaka bilei na nse ya mesa na ngai. Kaka ndenge nasalaki bango, Nzambe asali ngai mpe bongo.” Nsima na yango, bamemaki ye na Yerusaleme+ mpe akufaki kuna.

8 Lisusu, mibali ya Yuda babundisaki Yerusaleme+ mpe bazwaki yango; babomaki bato na mopanga mpe batumbaki engumba yango. 9 Nsima na yango, mibali ya Yuda bakitaki mpo na kobundisa Bakanana oyo bazalaki kofanda na etúká ya ngombangomba, na Negebe mpe na Shefela.+ 10 Bongo libota ya Yuda ekendaki kobunda na Bakanana oyo bazalaki kofanda na Hebrone (nkombo ya Hebrone ezalaki liboso Kiriate-arba), mpe balongaki Sheshai, Ahimane mpe Talamai.+

11 Balongwaki wana mpe bakendaki kobundisa bato oyo bafandi na Debire.+ (Nkombo ya Debire ezalaki liboso Kiriate-sefere.)+ 12 Bongo Kalebe+ alobaki boye: “Moto nyonso oyo akokweisa Kiriate-sefere mpe akozwa yango, nakopesa ye Akasa, mwana na ngai ya mwasi, mpo akóma mwasi na ye.”+ 13 Mpe Otiniele+ mwana ya Kenaze,+ leki ya Kalebe, azwaki engumba yango. Bongo Kalebe apesaki ye Akasa, mwana na ye, mpe akómaki mwasi na ye. 14 Ntango Akasa azalaki kokende na ndako na ye, atyaki mobali na ye mbamba mpo asɛnga tata na ye Kalebe elanga. Na nsima, Akasa akitaki na mpunda na ye.* Mpe Kalebe atunaki ye: “Olingi nini?” 15 Alobaki na ye: “Nabondeli yo, pesá ngai lipamboli, mpo opesi ngai kaka eteni ya mabele na sudi;* pesá ngai mpe Gulote-maime.”* Bongo Kalebe apesaki ye Gulote ya Likoló mpe Gulote ya Nse.

16 Mpe bakitani ya Mokeni,+ tata-bokilo ya Moize,+ bautaki na engumba ya banzete ya mbila+ mpe bamataki elongo na bato ya libota ya Yuda tii na esobe ya Yuda, na sudi ya Arade.+ Bakendaki kuna mpe bafandaki elongo na bango.+ 17 Kasi libota ya Yuda ekendaki elongo na libota ya Simeone, bandeko na bango; babundisaki Bakanana oyo bazalaki kofanda na Zefate mpe babebisaki yango.+ Mpe bapesaki engumba yango nkombo Horoma.*+ 18 Na nsima, Yuda azwaki Gaza+ ná teritware na yango, Ashekelone+ ná teritware na yango, mpe Ekrone+ ná teritware na yango. 19 Yehova azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bazwaki etúká ya ngombangomba, kasi bakokaki te kobengana bato oyo bafandi na mokili patatalu, mpo bazalaki na makalo ya bitumba oyo ezalaki na makwangola na bapine na yango ya ebende.*+ 20 Bapesaki Kalebe engumba Hebrone, kaka ndenge Moize alakaki yango,+ mpe abenganaki bana misato ya Anake oyo bazalaki kuna.+

21 Kasi Babenyamina babenganaki te Bayebusi oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme; yango wana Bayebusi bazali kokoba kofanda elongo na Babenyamina na Yerusaleme tii na mokolo ya lelo.+

22 Na ntango yango, bakitani ya Yozefe+ bamataki mpo na kobundisa Betele, mpe Yehova azalaki elongo na bango.+ 23 Bakitani ya Yozefe bazalaki konɔnga Betele (kutu, nkombo ya engumba yango ezalaki liboso Luze).+ 24 Banɔngi yango bamonaki mobali moko azali kobima na engumba. Bongo balobaki na ye: “Tobondeli yo, lakisá biso nzela ya kokɔta na engumba, mpe tokomonisela yo boboto.”* 25 Na yango, mobali yango alakisaki bango nzela ya kokɔta na engumba, mpe babɛtaki engumba yango na mopanga, kasi batikaki mobali yango ná libota na ye mobimba bákende.+ 26 Mobali yango akendaki na mokili ya Bahiti mpe atongaki engumba moko mpe apesaki yango nkombo Luze. Wana nde nkombo ya engumba yango tii na mokolo ya lelo.

27 Libota ya Manase ezwaki te Bete-sheane ná basité oyo esimbami na yango,* Taanake+ ná basité oyo esimbami na yango, Dore ná basité oyo esimbami na yango, Ibleame ná basité oyo esimbami na yango, mpe Megido ná basité oyo esimbami na yango.+ Bakanana bakobaki kaka kofanda na mokili yango. 28 Ntango Bayisraele bakómaki makasi mingi, bakómaki kosalisa Bakanana misala ya makasi,+ kasi babenganaki bango nyonso te.+

29 Libota ya Efraime mpe ebenganaki te Bakanana oyo bazalaki kofanda na Gezere. Bakanana bakobaki kofanda na kati na bango na Gezere.+

30 Libota ya Zebulone ebenganaki te bato oyo bafandi na Kitrone ná baoyo bafandi na Nahalole.+ Bakanana bakobaki kofanda na kati na bango mpe Bazebulone bakómaki kosalisa bango misala ya makasi.+

31 Libota ya Ashere ebenganaki te bato oyo bafandi na Ako, Sidone,+ Ahalabe, Akazibe,+ Helba, Afike+ ná Rehobe.+ 32 Na yango, libota ya Ashere ekobaki kofanda na kati ya Bakanana oyo bazalaki kofanda na mokili yango, mpo babenganaki bango te.

33 Libota ya Nafatali ebenganaki te bafandi ya Bete-shemeshe mpe bafandi ya Bete-anate,+ kasi bakobaki kofanda na kati ya Bakanana yango oyo bazalaki na mokili wana.+ Bafandi ya Bete-shemeshe mpe ya Bete-anate bakómaki kosalela bango misala ya makasi.

34 Baamore bapesaki bakitani ya Dani nzela te bákita tii na mokili patatalu; yango wana bakitani ya Dani bazalaki kofanda na etúká ya ngombangomba.+ 35 Bongo Baamore bakobaki kaka kofanda na Ngomba Herese, Aiyalone,+ mpe Shaalbime.+ Kasi ntango bakitani ya Yozefe bakómaki na nguya mingi,* bakómaki kosalisa Baamore misala ya makasi. 36 Teritware ya Baamore ezalaki banda na nzela ya komata ya Akrabime,+ banda na Sela tii likoló.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto