Yosua
6 Nzokande, baporte ya Yeriko ekangamaki malamumalamu mpo bazalaki kobanga Bayisraele; moto azalaki kobima te mpe moto azalaki kokɔta te.+
2 Bongo Yehova alobaki na Yosua boye: “Talá, napesi na lobɔkɔ na yo engumba Yeriko, mokonzi na yango ná bilombe na yango ya etumba.+ 3 Bino nyonso mibali ya etumba bosengeli kotambola zingazinga ya engumba. Bokobaluka zingazinga ya engumba mbala moko. Bokosala ndenge wana mikolo motoba. 4 Sɛngá banganga-nzambe nsambo bátambola liboso ya Sanduku, moto na moto amemi liseke ya mpate-mobali. Kasi na mokolo ya nsambo, bosengeli kotambola zingazinga ya engumba mbala nsambo mpe banganga-nzambe basengeli koyula maseke yango.+ 5 Ntango maseke ya mpate-mobali ekoyulama, mpe soki kaka boyoki lokito* na yango, bato nyonso basengeli koganga makasi ndenge bagangaka na etumba. Bongo efelo ya engumba yango ekokwea mobimba na nse,+ mpe bato basengeli kokɔta na engumba, moto na moto alima liboso na ye.”
6 Na yango, Yosua mwana ya Nunu abengaki banganga-nzambe mpe alobaki na bango: “Bózwa sanduku ya kondimana, mpe banganga-nzambe nsambo basengeli komema moto na moto liseke ya mpate-mobali liboso ya Sanduku ya Yehova.”+ 7 Na nsima, alobaki na bato boye: “Bóleka mpe bótambola zingazinga ya engumba, mpe bato oyo bazali na bibundeli+ basengeli kotambola liboso ya Sanduku ya Yehova.” 8 Ntango kaka Yosua asilisaki koloba na bato, banganga-nzambe nsambo oyo bazalaki komema maseke nsambo ya bampate-mibali liboso ya Yehova balekaki mpe bayulaki maseke yango, mpe sanduku ya kondimana ya Yehova ezalaki kolanda bango. 9 Mpe bato oyo bazalaki na bibundeli balekaki liboso ya banganga-nzambe oyo bazalaki koyula maseke, mpe bato oyo bazalaki kokɛngɛla na nsima bazalaki kolanda Sanduku, wana maseke ezalaki se koyulama.
10 Nzokande, Yosua apesaki bato mitindo ete: “Bóganga te mpe mingongo na bino eyokana te. Liloba moko te esengeli kobima na minɔkɔ na bino tii mokolo nakoloba na bino ete: ‘Bóganga!’ Na ntango wana nde bokoganga.” 11 Atambwisaki Sanduku ya Yehova zingazinga ya engumba, mbala moko; na nsima, bazongaki na kaa mpe balalaki kuna butu mobimba.
12 Na mokolo oyo elandaki, Yosua alamukaki ntɔngɔntɔngɔ, mpe banganga-nzambe bazwaki Sanduku+ ya Yehova, 13 mpe banganga-nzambe nsambo oyo bazalaki komema maseke nsambo ya bampate-mibali batambolaki liboso ya Sanduku ya Yehova, bazalaki koyula maseke ntango nyonso. Bato oyo bazalaki na bibundeli bazalaki kotambola liboso na bango mpe bato oyo bazalaki kokɛngɛla na nsima bazalaki kolanda Sanduku ya Yehova, wana maseke ezalaki se koyulama. 14 Batambolaki zingazinga ya engumba yango mokolo ya mibale mbala moko, na nsima bazongaki na kaa. Basalaki bongo mikolo motoba.+
15 Na mokolo ya nsambo, balamukaki ntɔngɔntɔngɔ, kaka ntango ntɔngɔ ebandaki kotana, mpe batambolaki zingazinga ya engumba ndenge basalaki liboso, mbala nsambo. Kaka na mokolo wana nde batambolaki mbala nsambo zingazinga ya engumba.+ 16 Mpe na mbala ya nsambo, banganga-nzambe bayulaki maseke, mpe Yosua alobaki na bato: “Bóganga,+ mpo Yehova apesi bino engumba oyo! 17 Engumba mpe eloko nyonso oyo ezali na kati na yango esengeli kobebisama;+ biloko yango nyonso ezali ya Yehova. Kaka Rahaba,+ mwasi ya ndumba, nde akoki kotikala na bomoi, ye ná bato nyonso oyo bazali elongo na ye na ndako na ye, mpo abombaki bamemi-nsango oyo totindaki.+ 18 Kasi, bósimba eloko moko te oyo esengeli kobebisama,+ noki bókóma na mposa ya eloko oyo esengeli kobebisama mpe bózwa yango,+ bongo kaa ya Yisraele ekóma eloko ya kobebisama mpe bómemela yango mpasi.*+ 19 Kasi palata nyonso, wolo, biloko ya kwivre mpe ya bibende ezali biloko ya bosantu mpo na Yehova.+ Esengeli kokende na esika ya kobomba biloko ya motuya ya Yehova.”+
20 Bongo ntango bayulaki maseke, bato bagangaki.+ Ntango kaka bato bayokaki lokito ya liseke mpe bagangaki makasi ndenge bagangaka na etumba, efelo yango ekweaki mobimba na nse.+ Nsima na yango, bato bakɔtaki na engumba, moto na moto alima liboso na ye, mpe bazwaki engumba yango. 21 Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki na kati ya engumba: mobali, mwasi, elenge, mobange, ngɔmbɛ, mpate mpe mpunda.+
22 Yosua alobaki na mibali mibale oyo bakendaki konɔnga mokili yango ete: “Bókende na ndako ya mwasi wana ya ndumba, mpe bóbimisa mwasi yango ná bato na ye nyonso, ndenge kaka bolapelaki ye ndai.”+ 23 Bongo bilenge mibali yango oyo bakendaki konɔnga mokili yango bakɔtaki mpe babimisaki Rahaba, elongo na tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ná bato na ye nyonso, ɛɛ, babimisaki libota na ye mobimba,+ mpe bamemaki bango kozanga likama na esika moko libándá ya kaa ya Yisraele.
24 Na nsima, batumbaki engumba na mɔtɔ, ná biloko nyonso oyo ezalaki na kati na yango. Kasi palata, wolo, biloko ya kwivre mpe ya bibende, bapesaki yango na esika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova.+ 25 Yosua atikaki kaka Rahaba, mwasi ya ndumba, ná bato ya ndako ya tata na ye mpe bato na ye nyonso.+ Mwasi yango afandi na Yisraele tii na mokolo ya lelo,+ mpo abombaki bamemi-nsango oyo Yosua atindaki mpo na konɔnga Yeriko.+
26 Na ntango wana, Yosua alapaki ndai* oyo: “Moto oyo akomeka kotonga lisusu engumba oyo, Yeriko, alakelama mabe liboso ya Yehova. Ntango akotya moboko na yango, mwana na ye ya liboso akokufa, mpe ntango akotɛlɛmisa baporte na yango, mwana na ye ya nsuka akokufa.”+
27 Na yango, Yehova azalaki elongo na Yosua,+ mpe lokumu na ye epalanganaki na mabele mobimba.+