Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 34
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yosiya, mokonzi ya Yuda (1, 2)

      • Yosiya abongisi makambo (3-13)

      • Bamoni buku ya Mobeko (14-21)

      • Huluda asakoli ete mpasi ekoya (22-28)

      • Yosiya atángeli bato buku ya Mobeko (29-33)

2 Ntango 34:1

Mitindami

  • +1Ba 13:2; Sef 1:1; Mt 1:10
  • +2Ba 22:1, 2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 21

2 Ntango 34:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Atambolaki na nzela nyonso.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 21

2 Ntango 34:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “ya ebende oyo enyangwisami.”

Mitindami

  • +2Nt 15:2
  • +2Ba 23:4, 14
  • +2Nt 33:17
  • +2Nt 33:21, 22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/3/1996, nk. 8-9

2 Ntango 34:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “ya ebende oyo enyangwisami.”

Mitindami

  • +2Ba 23:6

2 Ntango 34:5

Mitindami

  • +1Ba 13:2; 2Ba 23:16

2 Ntango 34:6

Mitindami

  • +2Ba 23:19; 2Nt 30:1

2 Ntango 34:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “ekeko oyo eyemami.”

Mitindami

  • +2Ba 17:41
  • +2Nt 31:1

2 Ntango 34:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Ba 22:12
  • +2Ba 22:3-6

2 Ntango 34:9

Mitindami

  • +2Nt 30:11, 18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

2 Ntango 34:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

2 Ntango 34:11

Mitindami

  • +2Ba 12:11, 12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Sepelá na bomoi libela na libela!, liteya 55

2 Ntango 34:12

Mitindami

  • +2Ba 12:15
  • +1Nt 23:6
  • +2Nt 20:19
  • +1Nt 25:1

2 Ntango 34:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bato oyo bamemaka mikumba ya kilo.”

Mitindami

  • +2Nt 8:14

2 Ntango 34:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na lobɔkɔ ya.”

Mitindami

  • +2Ba 22:4
  • +Mib 17:18; 31:24-26; Yos 1:8; 2Ba 22:8
  • +Le 26:46

2 Ntango 34:18

Mitindami

  • +2Ba 22:8
  • +Mib 17:18, 19

2 Ntango 34:19

Mitindami

  • +2Ba 22:11-13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/2001, lok. 27

2 Ntango 34:20

Mitindami

  • +2Ba 25:22; Yir 40:14

2 Ntango 34:21

Mitindami

  • +Mib 30:17, 18; 31:16, 24-26; Yos 1:8

2 Ntango 34:22

Mitindami

  • +Kob 15:20; Bas 4:4; Lk 2:36; Mis 21:8, 9
  • +2Ba 22:14-20

2 Ntango 34:24

Mitindami

  • +Yir 35:17
  • +Le 26:16; Mib 28:15; 30:17, 18; Da 9:11

2 Ntango 34:25

Mitindami

  • +Mib 28:20
  • +2Ba 21:1, 3, 6; 2Nt 28:1, 3
  • +Mib 29:22, 23; Yir 7:20

2 Ntango 34:26

Mitindami

  • +2Nt 34:19

2 Ntango 34:27

Mitindami

  • +2Nt 32:26; 33:11, 13

2 Ntango 34:28

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ezali maloba ya ntoki mpo na kolobela liwa.

Mitindami

  • +1Ba 21:29; Yis 39:8

2 Ntango 34:29

Mitindami

  • +2Ba 23:1

2 Ntango 34:30

Mitindami

  • +2Ba 23:2; 2Nt 17:3, 9; Ne 8:3

2 Ntango 34:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azongelaki kondimana.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Ezr 10:3
  • +Mib 6:5
  • +Mib 31:24-26; 2Ba 22:8

2 Ntango 34:32

Mitindami

  • +2Nt 30:1, 12; 33:1, 16

2 Ntango 34:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bikeko.”

  • *

    Lil., “Na mikolo na ye nyonso.”

Mitindami

  • +2Ba 23:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2005, lok. 21

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 34:11Ba 13:2; Sef 1:1; Mt 1:10
2 Nt. 34:12Ba 22:1, 2
2 Nt. 34:32Nt 15:2
2 Nt. 34:32Ba 23:4, 14
2 Nt. 34:32Nt 33:17
2 Nt. 34:32Nt 33:21, 22
2 Nt. 34:42Ba 23:6
2 Nt. 34:51Ba 13:2; 2Ba 23:16
2 Nt. 34:62Ba 23:19; 2Nt 30:1
2 Nt. 34:72Ba 17:41
2 Nt. 34:72Nt 31:1
2 Nt. 34:82Ba 22:12
2 Nt. 34:82Ba 22:3-6
2 Nt. 34:92Nt 30:11, 18
2 Nt. 34:112Ba 12:11, 12
2 Nt. 34:122Ba 12:15
2 Nt. 34:121Nt 23:6
2 Nt. 34:122Nt 20:19
2 Nt. 34:121Nt 25:1
2 Nt. 34:132Nt 8:14
2 Nt. 34:142Ba 22:4
2 Nt. 34:14Mib 17:18; 31:24-26; Yos 1:8; 2Ba 22:8
2 Nt. 34:14Le 26:46
2 Nt. 34:182Ba 22:8
2 Nt. 34:18Mib 17:18, 19
2 Nt. 34:192Ba 22:11-13
2 Nt. 34:202Ba 25:22; Yir 40:14
2 Nt. 34:21Mib 30:17, 18; 31:16, 24-26; Yos 1:8
2 Nt. 34:22Kob 15:20; Bas 4:4; Lk 2:36; Mis 21:8, 9
2 Nt. 34:222Ba 22:14-20
2 Nt. 34:24Yir 35:17
2 Nt. 34:24Le 26:16; Mib 28:15; 30:17, 18; Da 9:11
2 Nt. 34:25Mib 28:20
2 Nt. 34:252Ba 21:1, 3, 6; 2Nt 28:1, 3
2 Nt. 34:25Mib 29:22, 23; Yir 7:20
2 Nt. 34:262Nt 34:19
2 Nt. 34:272Nt 32:26; 33:11, 13
2 Nt. 34:281Ba 21:29; Yis 39:8
2 Nt. 34:292Ba 23:1
2 Nt. 34:302Ba 23:2; 2Nt 17:3, 9; Ne 8:3
2 Nt. 34:31Ezr 10:3
2 Nt. 34:31Mib 6:5
2 Nt. 34:31Mib 31:24-26; 2Ba 22:8
2 Nt. 34:322Nt 30:1, 12; 33:1, 16
2 Nt. 34:332Ba 23:5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 34:1-33

Mokanda ya mibale ya Ntango

34 Yosiya+ azalaki na mbula mwambe ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 31 na Yerusaleme.+ 2 Asalaki makambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Alandaki ndakisa* ya nkɔkɔ na ye Davidi na makambo nyonso, mpe apɛngwaki te mpo na kokende na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.

3 Na mbula ya mwambe ya boyangeli na ye, wana azalaki naino elenge, Yosiya abandaki koluka Nzambe ya nkɔkɔ na ye Davidi.+ Mpe na mbula ya 12, abandaki kolongola, na Yuda mpe na Yerusaleme,+ bisika oyo etombwaná,+ banzete ya losambo,* bikeko oyo eyemami+ mpe bikeko ya ebende.* 4 Lisusu, babukaki bitumbelo ya Babaala na miso na ye, mpe abebisaki bitumbelo ya mpaka ya malasi oyo ezalaki likoló na yango. Abukaki mpe mikemike banzete ya losambo,* bikeko oyo eyemami mpe bikeko ya ebende;* akómisaki yango putulu, na nsima, abwakakibwakaki yango likoló ya malita ya baoyo bazalaki kopesa yango mbeka.+ 5 Mpe atumbaki mikuwa ya banganga-nzambe likoló ya bitumbelo na bango.+ Na ndenge yango apɛtolaki Yuda mpe Yerusaleme.

6 Mpe na bingumba ya Manase, ya Efraime,+ ya Simeone mpe tii na Nafatali, na bisika na bango ya zingazinga oyo ebebisami, 7 abukaki bitumbelo, abebisaki banzete ya losambo,* ná bikeko*+ mpe akómisaki yango putulu. Abebisaki bitumbelo nyonso ya mpaka ya malasi na ekólo mobimba ya Yisraele;+ nsima na yango azongaki na Yerusaleme.

8 Na mbula ya 18 ya boyangeli na ye, ntango asilisaki kopɛtola ekólo mpe tempelo,* Yosiya atindaki Shafane+ mwana ya Azaliya, Maaseya mokambi ya engumba, mpe Yoa mokomi-makambo mwana ya Yoahaze, bábongisa ndako ya Yehova Nzambe na ye.+ 9 Bakendaki epai ya nganga-nzambe monene Hilikiya mpe bapesaki ye mbongo oyo bato bamemaki na ndako ya Nzambe, oyo Balevi oyo bazalaki bakɛngɛli ya baporte bazwaki na teritware ya Manase, ya Efraime mpe na bateritware mosusu nyonso ya Yisraele,+ ata mpe ya Yuda, ya Benyamina mpe epai ya bato ya Yerusaleme. 10 Na nsima, bapesaki mbongo yango na bato oyo batyamaki mpo na kotambwisa misala na ndako ya Yehova. Mpe basali-misala na ndako ya Yehova basalelaki mbongo yango mpo na kobamba mpe kobongisa bisika oyo ebebi na ndako yango. 11 Bapesaki yango bato ya misala ya mabɔkɔ mpe batongi mpo básomba mabanga oyo bakatá ná mabaya ya kokangisa mpe mabaya minene mpo na kobongisa bandako oyo bakonzi ya Yuda batikaki ebeba.+

12 Mpe mibali yango basalaki mosala na bosembo.+ Balevi oyo batyamaki mpo bázala bakɛngɛli na bango ezalaki Yahate ná Obadia, ya libota ya Bamerari,+ mpe Zekaria ná Meshulame, ya libota ya Bakohate.+ Mpe Balevi, baoyo nyonso bayebaki malamu kobɛta miziki,+ 13 bazalaki kokamba basali;* bazalaki kokɛngɛla bato nyonso oyo bazalaki kosala misala ndenge na ndenge. Mpe Balevi mosusu bazalaki basɛkrɛtɛrɛ, bakambi mpe bakɛngɛli ya baporte.+

14 Nzokande, ntango bayaki kozwa mbongo oyo bato bazalaki kopesa mpo na ndako ya Yehova,+ nganga-nzambe Hilikiya amonaki buku ya Mobeko ya Yehova+ oyo epesamaki na nzela ya* Moize.+ 15 Bongo Hilikiya alobaki na Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ete: “Namoni buku ya Mobeko na ndako ya Yehova.” Na yango, Hilikiya apesaki Shafane buku yango. 16 Na nsima Shafane amemaki buku yango epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye ete: “Basaleli na yo bazali kosala misala nyonso oyo bapesaki bango. 17 Babimisi mbongo oyo ezalaki na ndako ya Yehova mpe bapesi yango bato oyo batyamaki mpo na kotambwisa misala ná bato oyo bazali kosala misala.” 18 Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ayebisaki lisusu mokonzi: “Nganga-nzambe Hilikiya apesi ngai buku moko.”+ Bongo Shafane abandaki kotánga yango liboso ya mokonzi.+

19 Ntango kaka mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye.+ 20 Na nsima mokonzi apesaki Hilikiya, Ahikame+ mwana ya Shafane, Abadone mwana ya Mika, Shafane oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ, mpe Asaya mosaleli ya mokonzi mitindo oyo: 21 “Bókende, bótuna Yehova mpo na ngai mpe mpo na bato oyo batikali na Yisraele mpe na Yuda na ntina etali maloba ya buku oyo euti komonana; mpo nkanda makasi ya Yehova oyo ekokitela biso ezali monene mpamba te bankɔkɔ na biso batosaki te liloba ya Yehova, basalelaki te makambo nyonso oyo ekomami na buku oyo.”+

22 Na yango Hilikiya ná bato oyo mokonzi atindaki bakendaki epai ya mosakoli-mwasi Huluda.+ Azalaki mwasi ya Shalume, mokɛngɛli ya esika ya kobomba bilamba, mwana ya Tikiva mwana ya Harase. Azalaki kofanda na Kartye ya mibale ya Yerusaleme; mpe kuna nde basololaki na ye.+ 23 Alobaki na bango: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Bóyebisa mobali oyo atindi bino epai na ngai boye: 24 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nakoyeisa mpasi na esika oyo mpe na bafandi na yango,+ ɛɛ bilakeli mabe nyonso oyo ekomami na buku+ oyo batángaki liboso ya mokonzi ya Yuda. 25 Lokola basundoli ngai+ mpe bazali kobimisela banzambe mosusu milinga ya mbeka mpo na kosilikisa ngai+ na misala na bango nyonso, nkanda na ngai ekosopana na esika oyo mpe ekosila te.’”+ 26 Kasi bóloba boye epai ya mokonzi ya Yuda, oyo atindi bino mpo na kotuna Yehova: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Mpo na maloba oyo oyoki,+ 27 lokola motema na yo ezalaki makasi te mpe lokola omikitisi liboso ya Nzambe ntango oyoki maloba oyo nalobi mpo na esika oyo mpe bafandi na yango, lokola omikitisi liboso na ngai mpe opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na ngai, ngai mpe nayoki yo,+ yango nde liloba ya Yehova. 28 Yango wana nakoyanganisa yo na bankɔkɔ na yo,* mpe okotyama na lilita na yo na kimya, mpe miso na yo ekomona te mpasi nyonso oyo nakoyeisela esika oyo mpe bafandi na yango.’”’”+

Bongo bamemelaki mokonzi eyano yango. 29 Na yango mokonzi atindaki bábenga bankulutu nyonso ya Yuda mpe ya Yerusaleme.+ 30 Na nsima mokonzi akendaki na ndako ya Yehova elongo na mibali nyonso ya Yuda, bato oyo bafandi na Yerusaleme, banganga-nzambe, Balevi, bato nyonso, mikóló mpe bana mike. Atángelaki bango maloba nyonso ya buku ya kondimana oyo bamonaki na ndako ya Yehova.+ 31 Mokonzi atɛlɛmaki kaka na esika na ye mpe asalaki kondimana*+ liboso ya Yehova, ete akolanda Yehova mpe akotosa mitindo na ye, makundoli na ye ná malako na ye na motema na ye mobimba mpe na molimo* na ye mobimba+ mpe akotosa maloba ya kondimana oyo ekomami na buku yango.+ 32 Lisusu, asɛngaki bato nyonso oyo bazalaki na Yerusaleme mpe na Benyamina bándima kotosa kondimana yango. Mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme basalaki ndenge esɛngami na kondimana ya Nzambe, Nzambe ya bankɔkɔ na bango.+ 33 Bongo Yosiya alongolaki biloko nyonso oyo eyinamá* na mikili nyonso ya Bayisraele,+ mpe alendisaki bato nyonso na Yisraele básalela Yehova Nzambe na bango. Na bomoi ya Yosiya mobimba,* batikaki te kolanda Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto