Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 35
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Yosiya abongisi fɛti monene ya Elekeli (1-19)

      • Farao Neko abomi Yosiya (20-27)

2 Ntango 35:1

Mitindami

  • +Kob 12:3-11; 2Ba 23:21
  • +Kob 12:21
  • +Le 23:5; Mib 16:1

2 Ntango 35:2

Mitindami

  • +2Nt 23:18; 31:2

2 Ntango 35:3

Mitindami

  • +Mib 33:10; 2Nt 17:8, 9; Ne 8:7, 8
  • +1Ba 6:38; 2Nt 5:7
  • +Mit 4:15; 1Nt 23:25, 26

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 18

    1/12/2005, lok. 20

2 Ntango 35:4

Mitindami

  • +1Nt 23:6
  • +2Nt 8:14

2 Ntango 35:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana ya bato.”

2 Ntango 35:6

Mitindami

  • +Kob 12:21; 2Nt 30:1, 15

2 Ntango 35:7

Mitindami

  • +2Nt 30:24

2 Ntango 35:8

Mitindami

  • +2Ba 23:4; 2Nt 34:14

2 Ntango 35:10

Mitindami

  • +1Nt 23:6

2 Ntango 35:11

Mitindami

  • +Kob 12:3, 6
  • +2Nt 30:16
  • +2Nt 29:34

2 Ntango 35:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “Batumbaki.”

Mitindami

  • +Kob 12:8; Mib 16:6, 7

2 Ntango 35:15

Mitindami

  • +1Nt 16:37
  • +1Nt 23:5
  • +1Nt 25:1, 2
  • +1Nt 16:41, 42; 25:3
  • +1Nt 26:12, 13

2 Ntango 35:16

Mitindami

  • +Le 23:5
  • +2Ba 23:21

2 Ntango 35:17

Mitindami

  • +Kob 12:15; Le 23:6; Mib 16:3; 2Nt 30:1, 21

2 Ntango 35:18

Mitindami

  • +2Ba 23:22, 23; 2Nt 30:5, 26

2 Ntango 35:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +Yir 46:2
  • +2Ba 23:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    3/2017, lok. 27

2 Ntango 35:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

2 Ntango 35:22

Mitindami

  • +1Ba 22:30
  • +Bas 1:27; 5:19; Zek 12:11; Em 16:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    3/2017, lok. 27

2 Ntango 35:24

Mitindami

  • +2Ba 23:30; 2Nt 34:28

2 Ntango 35:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nzembo ya matánga.”

Mitindami

  • +Yir 1:1
  • +Yir 9:17, 20

2 Ntango 35:27

Mitindami

  • +2Ba 23:28

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 35:1Kob 12:3-11; 2Ba 23:21
2 Nt. 35:1Kob 12:21
2 Nt. 35:1Le 23:5; Mib 16:1
2 Nt. 35:22Nt 23:18; 31:2
2 Nt. 35:3Mib 33:10; 2Nt 17:8, 9; Ne 8:7, 8
2 Nt. 35:31Ba 6:38; 2Nt 5:7
2 Nt. 35:3Mit 4:15; 1Nt 23:25, 26
2 Nt. 35:41Nt 23:6
2 Nt. 35:42Nt 8:14
2 Nt. 35:6Kob 12:21; 2Nt 30:1, 15
2 Nt. 35:72Nt 30:24
2 Nt. 35:82Ba 23:4; 2Nt 34:14
2 Nt. 35:101Nt 23:6
2 Nt. 35:11Kob 12:3, 6
2 Nt. 35:112Nt 30:16
2 Nt. 35:112Nt 29:34
2 Nt. 35:13Kob 12:8; Mib 16:6, 7
2 Nt. 35:151Nt 16:37
2 Nt. 35:151Nt 23:5
2 Nt. 35:151Nt 25:1, 2
2 Nt. 35:151Nt 16:41, 42; 25:3
2 Nt. 35:151Nt 26:12, 13
2 Nt. 35:16Le 23:5
2 Nt. 35:162Ba 23:21
2 Nt. 35:17Kob 12:15; Le 23:6; Mib 16:3; 2Nt 30:1, 21
2 Nt. 35:182Ba 23:22, 23; 2Nt 30:5, 26
2 Nt. 35:20Yir 46:2
2 Nt. 35:202Ba 23:29
2 Nt. 35:221Ba 22:30
2 Nt. 35:22Bas 1:27; 5:19; Zek 12:11; Em 16:16
2 Nt. 35:242Ba 23:30; 2Nt 34:28
2 Nt. 35:25Yir 1:1
2 Nt. 35:25Yir 9:17, 20
2 Nt. 35:272Ba 23:28
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 35:1-27

Mokanda ya mibale ya Ntango

35 Yosiya asalaki Elekeli+ mpo na Yehova na Yerusaleme. Babomaki banyama ya mbeka mpo na Elekeli+ na mokolo ya 14 ya sanza ya liboso.+ 2 Atyaki banganga-nzambe na mikumba na bango mpe alendisaki bango básala mosala na bango ya ndako ya Yehova.+ 3 Na nsima alobaki na Balevi, balakisi ya Yisraele mobimba,+ baoyo bazalaki basantu mpo na Yehova, ete: “Bótya Sanduku mosantu na kati ya ndako oyo Salomo mwana ya Davidi mokonzi ya Yisraele atongaki;+ ekosɛnga lisusu te bómema yango na mapeka na bino.+ Sikoyo, bósalela Yehova Nzambe na bino mpe Yisraele bato na ye. 4 Mpe bómibongisa na kolanda mabota ya batata na bino, ndenge bituluku na bino ezali, na kolanda makambo oyo Davidi+ mokonzi ya Yisraele akomaki mpe oyo mwana na ye Salomo akomaki.+ 5 Bótɛlɛma na esika mosantu, bótyama na bituluku na kolanda mabota ya batata ya bandeko na bino, bato ya ekólo oyo batikali,* mpo mokomoko na yango ezala na etuluku moko ya libota ya batata ya Balevi. 6 Bóboma banyama ya mbeka mpo na Elekeli,+ bómisantisa, bóbongisa makambo mpo na bandeko na bino, mpo na kotosa liloba oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize.”

7 Yosiya apesaki likabo ya bitonga na ye mpo na bato: bampate-mibali ná bana-ntaba ya mibali 30 000 mpe bangɔmbɛ 3 000, mpo ezala bambeka mpo na Elekeli, mpo na bato nyonso oyo bazalaki wana. Nyonso wana eutaki na biloko ya mokonzi ye moko.+ 8 Bankumu ya ekólo mpe bapesaki makabo na bolingo na bango moko mpo na bato ya ekólo, banganga-nzambe mpe Balevi. Hilikiya,+ Zekaria ná Yehiele, oyo bazalaki bakambi ya ndako ya Nzambe ya solo, bapesaki banganga-nzambe bampate ná bantaba 2 600 mpe bangɔmbɛ 300, mpo ezala bambeka mpo na Elekeli. 9 Konania ná bandeko na ye Shemaya mpe Netanele, elongo na Hashabia, Yeyele ná Yozabade, oyo bazalaki bakonzi ya Balevi, bapesaki mpo na Balevi bampate ná bantaba 5 000 mpe bangɔmbɛ 500 mpo ezala bambeka mpo na Elekeli.

10 Ntango basilisaki kobongisa makambo nyonso, banganga-nzambe batɛlɛmaki na bisika na bango, mpe Balevi batɛlɛmaki na kolanda bituluku+ na bango, ndenge mokonzi apesaki mitindo. 11 Babomaki banyama ya mbeka mpo na Elekeli,+ mpe banganga-nzambe bazalaki kozwa makila oyo Balevi bazalaki kopesa bango+ mpe komwangisa yango likoló ya etumbelo, wana Balevi bazalaki kolongola banyama mposo.+ 12 Na nsima, babongisaki makabo ya kotumba mpo na kokabolela yango bato ya ekólo, oyo batyamaki na bituluku na kolanda mabota ya batata na bango, mpo na kolakisa yango epai ya Yehova, ndenge ekomami na buku ya Moize; mpe basalaki kaka bongo mpo na bangɔmbɛ. 13 Balambaki* likabo ya Elekeli na mɔtɔ lokola momeseno.+ Balambaki mpe makabo mosantu na banzungu ya mike, banzungu ya minene mpe na kikalungu; nsima na yango, bamemaki yango nokinoki epai ya bato mosusu nyonso ya ekólo. 14 Bongo babongisaki Elekeli mpo na bango moko mpe mpo na banganga-nzambe, mpamba te banganga-nzambe, bakitani ya Arona, bazalaki kopesa bambeka ya kotumba ná biteni ya mafutamafuta tii na butu. Na ndenge wana nde Balevi babongisaki Elekeli mpo na bango moko mpe mpo na banganga-nzambe, bakitani ya Arona.

15 Mpe bayembi, bakitani ya Asafe,+ bazalaki na bisika na bango ya mosala na kolanda mitindo ya Davidi,+ ya Asafe,+ ya Hemane mpe ya Yedutune,+ momoni-bimonaneli ya mokonzi; mpe bakɛngɛli ya baporte batɛlɛmaki na baporte ndenge na ndenge.+ Ezalaki na ntina te bátika misala na bango, mpo bandeko na bango Balevi bazalaki kobongisa Elekeli mpo na bango. 16 Na yango, mokolo wana babongisaki makambo nyonso ndenge Yehova asɛngaki mpo na kosala Elekeli+ mpe mpo na kopesa makabo ya kotumba likoló ya etumbelo ya Yehova, ndenge Mokonzi Yosiya apesaki mitindo.+

17 Bayisraele oyo bazalaki wana basalaki Elekeli na ntango yango mpe fɛti ya Mampa ezangá levire mikolo nsambo.+ 18 Elekeli ya ndenge wana esalemaki ata mokolo moko te na Yisraele banda na mikolo ya mosakoli Samwele. Mpe moko te kati na bakonzi mosusu ya Yisraele asalaki Elekeli lokola oyo Yosiya asalaki,+ ná banganga-nzambe, Balevi, mpe bato nyonso ya Yuda ná Yisraele oyo bazalaki wana mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme. 19 Elekeli yango esalemaki na mbula ya 18 ya boyangeli ya Yosiya.

20 Nsima ya makambo wana nyonso, ntango Yosiya asilisaki kobongisa tempelo,* Neko+ mokonzi ya Ezipito akendaki kobunda na Karakemishe pene na Efrate. Bongo Yosiya akendaki kokutana na ye kuna mpo na kobundisa ye.+ 21 Na yango, Neko atindaki bamemi-nsango báyebisa ye ete: “Mpo na nini ozali kokɔta na likambo oyo, Ee mokonzi ya Yuda? Nazali koya lelo mpo na kobundisa yo te, nakei kobundisa ekólo* mosusu mpe Nzambe alobi ete nasala nokinoki. Mpo na bolamu na yo moko, kotɛmɛla Nzambe te, mpo azali elongo na ngai; soki te akoya koboma yo.” 22 Nzokande, Yosiya alingaki kotika ye te. Kasi asalaki ete báyeba ye te+ mpe akendaki kobundisa ye; ayokaki te maloba ya Neko, oyo eutaki mpenza na monɔkɔ ya Nzambe. Bongo akendaki kobunda na mokili patatalu ya Megido.+

23 Mpe bato oyo babwakaka makula babɛtaki Mokonzi Yosiya makula, bongo alobaki na basaleli na ye: “Bólongola ngai awa, mpo nazoki makasi.” 24 Na yango, basaleli na ye bakitisaki ye na likalo mpe bamatisaki ye na likalo na ye ya mibale tii na Yerusaleme. Na ndenge wana nde Yosiya akufaki. Bakundaki ye na malita ya bankɔkɔ na ye;+ mpe bato nyonso ya Yuda mpe ya Yerusaleme balelaki ye. 25 Yirimia+ asalelaki Yosiya loyembo ya mawa; mpe bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi+ balobelaka Yosiya na nzembo na bango ya mawa tii na mokolo ya lelo.* Mpe bazwaki ekateli ete nzembo yango esengeli koyembama na Yisraele, mpe ekomami na mokanda ya nzembo ya mawa.

26 Makambo mosusu ya lisolo ya Yosiya ná misala na ye oyo emonisaki bolingo ya sembo, ndenge atosaki makambo oyo ekomami na Mobeko ya Yehova, 27 mpe makambo oyo asalaki, banda na ebandeli tii na nsuka, ekomami na Buku ya bakonzi ya Yisraele mpe ya Yuda.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto