Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 28
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Saulo akei epai ya mwasi moko oyo asololaka na bilimo na Ene-dore (1-25)

1 Samwele 28:1

Mitindami

  • +1Sa 14:52
  • +1Sa 27:12; 29:3

1 Samwele 28:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lokola mokɛngɛli ya motó na ngai mikolo nyonso.”

Mitindami

  • +1Sa 29:2

1 Samwele 28:3

Mitindami

  • +1Sa 25:1
  • +Kob 22:18; Le 19:31; 20:6, 27; Mib 18:10, 11; Em 21:8

1 Samwele 28:4

Mitindami

  • +Yos 19:17, 18; 2Ba 4:8
  • +1Sa 31:1; 2Sa 1:21; 21:12

1 Samwele 28:5

Mitindami

  • +1Sa 28:20

1 Samwele 28:6

Mitindami

  • +1Sa 14:37
  • +Kob 28:30; Mit 27:21

1 Samwele 28:7

Mitindami

  • +Kob 22:18; Le 19:31; 20:6; 1Sa 15:23; 28:3
  • +Yos 17:11

1 Samwele 28:8

Mitindami

  • +Mib 18:10, 11; 1Nt 10:13

1 Samwele 28:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo na ngai.”

Mitindami

  • +1Sa 28:3
  • +Kob 22:18; Le 20:27

1 Samwele 28:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moto moko oyo azalaki lokola Samwele.”

Mitindami

  • +1Sa 28:3

1 Samwele 28:14

Mitindami

  • +1Sa 15:27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2010, lok. 20

    Ndenge ya kosolola, lok. 378

1 Samwele 28:15

Mitindami

  • +1Sa 28:6
  • +Le 19:31

1 Samwele 28:16

Mitindami

  • +1Sa 15:23; 16:14

1 Samwele 28:17

Mitindami

  • +1Sa 13:14; 15:28; 16:13; 24:20

1 Samwele 28:18

Mitindami

  • +1Sa 15:9; 1Nt 10:13

1 Samwele 28:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, bakokufa lokola Samwele.

Mitindami

  • +1Sa 28:1; 31:1
  • +1Sa 31:5
  • +1Sa 31:2; 2Sa 2:8
  • +1Sa 31:7

1 Samwele 28:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “natyaki molimo na ngai na lobɔkɔ na ngai.”

Mitindami

  • +Le 20:27

1 Samwele 28:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “apesaki yango mbeka.”

1 Samwele 28:25

Mitindami

  • +1Sa 28:8

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 28:11Sa 14:52
1 Sa. 28:11Sa 27:12; 29:3
1 Sa. 28:21Sa 29:2
1 Sa. 28:31Sa 25:1
1 Sa. 28:3Kob 22:18; Le 19:31; 20:6, 27; Mib 18:10, 11; Em 21:8
1 Sa. 28:4Yos 19:17, 18; 2Ba 4:8
1 Sa. 28:41Sa 31:1; 2Sa 1:21; 21:12
1 Sa. 28:51Sa 28:20
1 Sa. 28:61Sa 14:37
1 Sa. 28:6Kob 28:30; Mit 27:21
1 Sa. 28:7Kob 22:18; Le 19:31; 20:6; 1Sa 15:23; 28:3
1 Sa. 28:7Yos 17:11
1 Sa. 28:8Mib 18:10, 11; 1Nt 10:13
1 Sa. 28:91Sa 28:3
1 Sa. 28:9Kob 22:18; Le 20:27
1 Sa. 28:121Sa 28:3
1 Sa. 28:141Sa 15:27
1 Sa. 28:151Sa 28:6
1 Sa. 28:15Le 19:31
1 Sa. 28:161Sa 15:23; 16:14
1 Sa. 28:171Sa 13:14; 15:28; 16:13; 24:20
1 Sa. 28:181Sa 15:9; 1Nt 10:13
1 Sa. 28:191Sa 28:1; 31:1
1 Sa. 28:191Sa 31:5
1 Sa. 28:191Sa 31:2; 2Sa 2:8
1 Sa. 28:191Sa 31:7
1 Sa. 28:21Le 20:27
1 Sa. 28:251Sa 28:8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 28:1-25

Mokanda ya liboso ya Samwele

28 Na mikolo wana, Bafilistia bayanganisaki mampinga na bango mpo na kobundisa Yisraele.+ Bongo Akishe alobaki na Davidi boye: “Oyebi malamu ete yo ná bato na yo bokobima elongo na ngai mpo na etumba.”+ 2 Na yango, Davidi alobaki na Akishe ete: “Yo moko oyebi mpenza oyo mosaleli na yo akosala.” Akishe alobaki na Davidi: “Ezali mpo na yango nde nakotya yo mokɛngɛli na ngai mpo na libela.”*+

3 Sikoyo Samwele asilaki kokufa, mpe Yisraele mobimba elelaki ye mpe bakundaki ye na engumba na ye, na Rama.+ Nzokande, Saulo alongolaki na Yisraele mobimba bato oyo basololaka na bilimo mpe bato oyo basakolaka makambo ekoya.+

4 Bafilistia bayanganaki mpe batyaki kaa na bango na Shuneme.+ Bongo Saulo ayanganisaki Yisraele mobimba mpe batyaki kaa na bango na Gilboa.+ 5 Ntango Saulo amonaki kaa ya Bafilistia, abangaki mpe motema na ye elɛngaki makasi.+ 6 Atako Saulo azalaki kotuna Yehova,+ Yehova azalaki koyanola ye ata moke te, ezala na bandɔtɔ, to na Urime,+ to na nzela ya basakoli. 7 Nsukansuka Saulo alobaki na basaleli na ye: “Bólukela ngai mwasi moko oyo asololaka na bilimo,+ mpe nakokende epai na ye mpo na kotuna ye makambo.” Basaleli na ye bazongisaki: “Talá! Mwasi moko oyo asololaka na bilimo afandaka na Ene-dore.”+

8 Bongo, Saulo asalaki ete báyeba ye te mpe alataki bilamba mosusu mpe akendaki epai ya mwasi yango na butu, elongo na basaleli na ye mibale. Alobaki na mwasi yango: “Nabondeli yo, salelá nguya na yo ya kosolola na bilimo mpo na koyebisa ngai makambo oyo ekoya,+ mpe bengelá ngai moto oyo nakoyebisa yo.” 9 Kasi mwasi yango alobaki na ye: “Na ntembe te, oyebi makambo oyo Saulo asalá, ndenge alongolá na Yisraele mobimba bato oyo basololaka na bilimo mpe bato oyo basakolaka makambo ekoya.+ Sikoyo, mpo na nini olingi kotyela ngai* motambo mpo báboma ngai?”+ 10 Na yango Saulo alapelaki ye ndai na nkombo ya Yehova, alobi: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, okozala na ngambo te mpo na likambo oyo!” 11 Bongo mwasi yango alobaki: “Olingi nabengela yo nani?” Azongisaki: “Nalingi obengela ngai Samwele.” 12 Ntango mwasi yango amonaki “Samwele,”*+ agangaki na mongongo makasi mpenza mpe alobaki na Saulo: “Mpo na nini okosi ngai? Yo ozali Saulo!” 13 Mokonzi alobaki na ye: “Kobanga te, omoni nini?” Mwasi yango ayanolaki Saulo: “Namoni moto moko lokola nzambe azali kobima na mabele.” 14 Na mbala moko atunaki mwasi yango: “Azali ndenge nini?” Na yango mwasi yango alobaki: “Azali mobange, azali komata, mpe alati kazaka ezangá mabɔkɔ.”+ Na yango, Saulo ayebaki ete ezali “Samwele.” Bongo Saulo agumbamaki elongi na nse mpe afukamaki.

15 Na nsima, “Samwele” alobaki na Saulo: “Mpo na nini otungisi ngai na ndenge osɛngi bábimisa ngai?” Saulo ayanolaki: “Nasili mayele. Bafilistia bazali kobundisa ngai, mpe Nzambe asundoli ngai mpe azali lisusu koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to na bandɔtɔ.+ Yango wana nazali kobenga yo mpo oyebisa ngai nini nasengeli kosala.”+

16 Bongo “Samwele” alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yehova asundoli yo+ mpe akómi monguna na yo? 17 Yehova akokokisa makambo oyo alobaki na nzela na ngai: Yehova akolongola bokonzi na mabɔkɔ na yo mpe akopesa yango na moto mosusu, Davidi.+ 18 Lokola otosaki mongongo ya Yehova te mpe osilisaki te Baamaleke+ oyo bapesaki Nzambe nkanda, yango wana Yehova azali kosala yo boye na mokolo ya lelo. 19 Lisusu, Yehova akopesa yo ná Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia,+ mpe lobi, yo+ ná bana na yo+ bokozala elongo na ngai.* Yehova akopesa mpe limpinga ya Yisraele na mabɔkɔ ya Bafilistia.”+

20 Na mbala moko, Saulo akweaki na nse, amitandi mobimba na mabele mpe akómaki kobanga makasi mpo na maloba ya “Samwele.” Mpe azalaki lisusu na makasi te, mpo alyaki ata eloko te mokolo wana mobimba, ezala na moi to na butu. 21 Ntango mwasi yango ayaki epai ya Saulo mpe amonaki ete abulungani makasi, alobaki na ye: “Talá, mosaleli na yo atosaki mongongo na yo, mpe natyaki bomoi na ngai na likama*+ mpo na kotosa maloba oyo oyebisaki ngai. 22 Sikoyo, nabondeli yo, yoká mongongo ya mosaleli na yo. Tiká napesa yo eteni ya limpa mpo olya mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo.” 23 Kasi aboyaki mpe alobaki: “Nakolya te.” Nzokande, basaleli na ye ná mwasi yango bazalaki se kotya ye mbamba. Nsukansuka, ayokelaki bango, alongwaki na mabele, atɛlɛmaki mpe afandaki na mbeto. 24 Mwasi yango azalaki na mwana-ngɔmbɛ ya mafutamafuta na ndako na ye. Bongo, abomaki yango* nokinoki, azwaki farini, abɛtaki yango mpo ekóma pɔtɔpɔtɔ, mpe asalaki na yango bagato oyo ezangá levire. 25 Apesaki yango Saulo ná basaleli na ye, mpe balyaki. Na nsima, batɛlɛmaki mpe bakendaki na butu wana.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto