Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Mapamboli ya Yehova elobelami lisusu (1-9)

        • “Moto abikaka kaka na mampa te” (3)

      • Bókeba ete bóbosana Yehova te (10-20)

Kolimbola Mibeko 8:1

Mitindami

  • +Mas 3:1, 2
  • +Eb 15:18

Kolimbola Mibeko 8:2

Mitindami

  • +Mib 2:7
  • +Kob 16:4; 20:20
  • +Mib 13:3; Mas 17:3

Kolimbola Mibeko 8:3

Mitindami

  • +Kob 16:3
  • +Kob 16:31; Nz 78:24
  • +Mt 4:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2004, nk. 13-14

    15/8/1999, nk. 25-26

    1/5/1994, lok. 3

Kolimbola Mibeko 8:4

Mitindami

  • +Mib 29:5; Ne 9:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2004, lok. 26

Kolimbola Mibeko 8:5

Mitindami

  • +Mas 3:12; 1Ko 11:32; Ebr 12:5-7; Em 3:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1994, lok. 3

Kolimbola Mibeko 8:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bawadi ya mai.”

Mitindami

  • +Kob 3:8; Le 26:4; Mib 11:11, 12

Kolimbola Mibeko 8:8

Mitindami

  • +Mit 13:23
  • +Ezk 20:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2011, nk. 11-13

    15/6/2006, nk. 16-17

    15/5/2000, nk. 25, 27

Kolimbola Mibeko 8:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2013, nk. 12-13

Kolimbola Mibeko 8:10

Mitindami

  • +Mib 6:10-12

Kolimbola Mibeko 8:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2006, lok. 28

    Eteyelo ya mosala, lok. 20

Kolimbola Mibeko 8:12

Mitindami

  • +Hos 13:6

Kolimbola Mibeko 8:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “na ndako ya boombo.”

Mitindami

  • +Mib 9:4; 32:15
  • +Nz 106:21

Kolimbola Mibeko 8:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “baskorpiɔ.”

Mitindami

  • +Mib 1:19; Yir 2:6
  • +Mit 20:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/1992, lok. 24

Kolimbola Mibeko 8:16

Mitindami

  • +Kob 16:35
  • +Mib 8:2
  • +Ebr 12:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/1999, lok. 25

Kolimbola Mibeko 8:17

Mitindami

  • +Hos 12:8

Kolimbola Mibeko 8:18

Mitindami

  • +Nz 127:1; Hos 2:8
  • +Mib 7:12

Kolimbola Mibeko 8:19

Mitindami

  • +Mib 4:25, 26; 30:17, 18; Yos 23:12, 13

Kolimbola Mibeko 8:20

Mitindami

  • +Da 9:11, 12

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 8:1Mas 3:1, 2
Mib. 8:1Eb 15:18
Mib. 8:2Mib 2:7
Mib. 8:2Kob 16:4; 20:20
Mib. 8:2Mib 13:3; Mas 17:3
Mib. 8:3Kob 16:3
Mib. 8:3Kob 16:31; Nz 78:24
Mib. 8:3Mt 4:4
Mib. 8:4Mib 29:5; Ne 9:21
Mib. 8:5Mas 3:12; 1Ko 11:32; Ebr 12:5-7; Em 3:19
Mib. 8:7Kob 3:8; Le 26:4; Mib 11:11, 12
Mib. 8:8Mit 13:23
Mib. 8:8Ezk 20:6
Mib. 8:10Mib 6:10-12
Mib. 8:12Hos 13:6
Mib. 8:14Mib 9:4; 32:15
Mib. 8:14Nz 106:21
Mib. 8:15Mib 1:19; Yir 2:6
Mib. 8:15Mit 20:11
Mib. 8:16Kob 16:35
Mib. 8:16Mib 8:2
Mib. 8:16Ebr 12:11
Mib. 8:17Hos 12:8
Mib. 8:18Nz 127:1; Hos 2:8
Mib. 8:18Mib 7:12
Mib. 8:19Mib 4:25, 26; 30:17, 18; Yos 23:12, 13
Mib. 8:20Da 9:11, 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 8:1-20

Kolimbola Mibeko

8 “Okosala nyonso ete otosa mitindo nyonso nazali kopesa yo lelo, mpo okoba kozala na bomoi+ mpe okóma ekólo ya bato ebele, okɔta mpe ozwa mokili oyo Yehova alapaki ndai ete akopesa yango na bankɔkɔ na yo.+ 2 Okokanisa nzela molai oyo Yehova Nzambe na yo atambwisaki yo mbula 40 oyo na esobe,+ mpo na koteya yo okóma na komikitisa mpe kotya yo na komekama+ mpo na koyeba oyo ezalaki na motema na yo,+ soki okobatela mitindo na ye to te. 3 Bongo ateyaki yo komikitisa mpe atikaki yo oyoka nzala+ mpe aleisaki yo mana,+ oyo yo oyebaki te mpe oyo batata na yo bayebaki te, mpo oyeba ete moto abikaka kaka na mampa te, kasi abikaka na liloba nyonso oyo euti na monɔkɔ ya Yehova.+ 4 Elamba oyo ozalaki kolata ekufaki te, mpe lokolo na yo evimbaki te mbula 40 oyo.+ 5 Oyebi malamu na motema na yo ete kaka ndenge moto asembolaka mwana na ye, Yehova Nzambe na yo azalaki mpe kosembola yo.+

6 “Sikoyo osengeli kobatela mitindo ya Yehova Nzambe na yo na kotambola na banzela na ye mpe na kobanga ye. 7 Mpo Yehova Nzambe na yo azali kokɔtisa yo na mokili moko malamu,+ mokili moko ya mikɛli ya mai,* ya maziba mpe ya mai mozindo oyo ezali kobima na lobwaku ya patatalu mpe na etúká ya ngombangomba, 8 mokili moko ya blé mpe ya ɔrje, ya nzete ya vinyo, nzete ya figi mpe nzete ya grenade,+ mokili moko ya mafuta ya olive mpe ya mafuta ya nzoi,+ 9 mokili moko oyo okoluka bilei te mpe okozanga eloko te, mokili moko oyo mabanga na yango ezali na bibende mpe oyo okotimola kwivre na bangomba na yango.

10 “Ntango okolya mpe okotonda, osengeli kosanzola Yehova Nzambe na yo mpo na mokili malamu oyo apesi yo.+ 11 Kasi kebá ete obosana Yehova Nzambe na yo te. Koboya te kotosa mitindo na ye, bikateli na ye mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo. 12 Ntango okolya mpe okotonda, ntango okotonga bandako ya kitoko mpe okofanda na kati na yango,+ 13 ntango etonga na yo ya bangɔmbɛ mpe etonga na yo ya bampate ekokóma mingi, mpe okozala na palata ná wolo mingi, mpe eloko na yo nyonso ekokóma mingi, 14 kotika te ete motema na yo ekóma na lolendo+ mpe obosana Yehova Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, epai ozalaki moombo,*+ 15 oyo atambwisaki yo na esobe wana ya monene mpe ya nsɔmɔ,+ na mabele ekauká oyo ezali na mai te, oyo ezali na banyoka ya ngɛngɛ ná bankotó.* Abimisaki mai na libanga ya silekisi+ 16 mpe na esobe, aleisaki yo mana+ oyo batata na yo bayebaki te, mpo na koteya yo komikitisa+ mpe mpo na kotya yo na komekama mpo ozwela yango matomba na mikolo oyo ezali koya.+ 17 Soki olobi na motema na yo ete: ‘Nguya na ngai moko mpe makasi ya lobɔkɔ na ngai moko nde esali ete nazwa bomɛngo oyo,’+ 18 kobosana te ete ezali Yehova Nzambe na yo, nde apesi yo nguya ya kozwa bomɛngo,+ mpo na kokokisa kondimana na ye oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai, lokola na mokolo ya lelo.+

19 “Soki bobosani Yehova Nzambe na bino ata moke mpe bolandi banzambe mosusu mpe bosaleli bango mpe bogumbameli bango, nazali kokebisa bino lelo oyo ete bokokufa.+ 20 Bokokufa lokola bikólo oyo Yehova azali kobebisa liboso na bino, mpo bokoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na bino.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto