Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 27
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Loyembo ya mawa mpo na kozinda ya masuwa ya Tire (1-36)

Ezekiele 27:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “loyembo ya kolela.”

Mitindami

  • +Ezk 26:17

Ezekiele 27:3

Mitindami

  • +Yis 23:9; Ezk 28:2, 12

Ezekiele 27:5

Mitindami

  • +Mib 3:8, 9; 1Nt 5:23

Ezekiele 27:6

Mitindami

  • +Eb 10:2, 4

Ezekiele 27:7

Mitindami

  • +Eb 10:2, 4

Ezekiele 27:8

Mitindami

  • +Eb 10:15, 18
  • +1Ba 9:27

Ezekiele 27:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mikóló.”

Mitindami

  • +Yos 13:2, 5
  • +Ezk 27:27

Ezekiele 27:10

Mitindami

  • +Eb 10:6; Yir 46:9

Ezekiele 27:12

Mitindami

  • +Eb 10:2, 4; Yon 1:3
  • +2Nt 9:21
  • +Yir 10:9

Ezekiele 27:13

Mitindami

  • +Yis 66:19
  • +Eb 10:2
  • +Yoe 3:6

Ezekiele 27:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Dɔngi ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.

Mitindami

  • +Eb 10:2, 3; Ezk 38:6

Ezekiele 27:15

Mitindami

  • +Eb 10:7
  • +1Ba 10:22

Ezekiele 27:17

Mitindami

  • +1Ba 5:9; Ezr 3:7; Mis 12:20
  • +Bas 11:12, 33
  • +Eb 43:11
  • +Yir 8:22

Ezekiele 27:18

Mitindami

  • +Yis 7:8

Ezekiele 27:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ezali molɔngɔ moko na nzete ya kinamono.

Ezekiele 27:20

Mitindami

  • +Eb 25:3

Ezekiele 27:21

Mitindami

  • +Eb 25:13
  • +2Nt 17:11; Yis 60:7

Ezekiele 27:22

Mitindami

  • +Eb 10:7
  • +1Ba 10:1, 2; Yis 60:6

Ezekiele 27:23

Mitindami

  • +Eb 11:31
  • +2Ba 19:12; Am 1:5
  • +Eb 25:3; Yb 6:19
  • +Eb 10:22

Ezekiele 27:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “okómaki na lokumu.”

Mitindami

  • +1Ba 10:22; Yis 23:14

Ezekiele 27:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lisangá mobimba.”

Mitindami

  • +Ezk 27:8, 9
  • +Ezk 27:10, 11
  • +Ezk 26:14

Ezekiele 27:30

Mitindami

  • +Yis 23:1; Ezk 26:17

Ezekiele 27:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    To, “na mawa ya molimo.”

Ezekiele 27:32

Mitindami

  • +Ezk 26:5

Ezekiele 27:33

Mitindami

  • +Ezk 27:14, 16
  • +Zek 9:3

Ezekiele 27:34

Mitindami

  • +Ezk 26:19
  • +Ezk 27:27

Ezekiele 27:35

Mitindami

  • +Ezk 26:15
  • +Ezk 28:17

Ezekiele 27:36

Mitindami

  • +Nz 37:10

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 27:2Ezk 26:17
Ezk. 27:3Yis 23:9; Ezk 28:2, 12
Ezk. 27:5Mib 3:8, 9; 1Nt 5:23
Ezk. 27:6Eb 10:2, 4
Ezk. 27:7Eb 10:2, 4
Ezk. 27:8Eb 10:15, 18
Ezk. 27:81Ba 9:27
Ezk. 27:9Yos 13:2, 5
Ezk. 27:9Ezk 27:27
Ezk. 27:10Eb 10:6; Yir 46:9
Ezk. 27:12Eb 10:2, 4; Yon 1:3
Ezk. 27:122Nt 9:21
Ezk. 27:12Yir 10:9
Ezk. 27:13Yis 66:19
Ezk. 27:13Eb 10:2
Ezk. 27:13Yoe 3:6
Ezk. 27:14Eb 10:2, 3; Ezk 38:6
Ezk. 27:15Eb 10:7
Ezk. 27:151Ba 10:22
Ezk. 27:171Ba 5:9; Ezr 3:7; Mis 12:20
Ezk. 27:17Bas 11:12, 33
Ezk. 27:17Eb 43:11
Ezk. 27:17Yir 8:22
Ezk. 27:18Yis 7:8
Ezk. 27:20Eb 25:3
Ezk. 27:21Eb 25:13
Ezk. 27:212Nt 17:11; Yis 60:7
Ezk. 27:22Eb 10:7
Ezk. 27:221Ba 10:1, 2; Yis 60:6
Ezk. 27:23Eb 11:31
Ezk. 27:232Ba 19:12; Am 1:5
Ezk. 27:23Eb 25:3; Yb 6:19
Ezk. 27:23Eb 10:22
Ezk. 27:251Ba 10:22; Yis 23:14
Ezk. 27:27Ezk 27:8, 9
Ezk. 27:27Ezk 27:10, 11
Ezk. 27:27Ezk 26:14
Ezk. 27:30Yis 23:1; Ezk 26:17
Ezk. 27:32Ezk 26:5
Ezk. 27:33Ezk 27:14, 16
Ezk. 27:33Zek 9:3
Ezk. 27:34Ezk 26:19
Ezk. 27:34Ezk 27:27
Ezk. 27:35Ezk 26:15
Ezk. 27:35Ezk 28:17
Ezk. 27:36Nz 37:10
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 27:1-36

Ezekiele

27 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Nde yo, mwana ya moto, yembelá Tire loyembo ya mawa,*+ 3 mpe lobá na Tire boye:

‘Yo oyo ofandi na baporte ya mbu,

Mwasi ya mombongo mpo na bato ya bikólo ya bisanga mingi,

Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

“Ee Tire, yo moko olobi: ‘Nazali na kitoko ya kokoka.’+

 4 Bateritware na yo ezali na katikati ya mbu.

Bato oyo batongaki yo bakómisaki kitoko na yo ya kokoka.

 5 Basalaki mabaya nyonso ya mipanzi na yo na banzete ya jenevriye oyo euti na Senire.+

Mpe bazwaki nzete ya sɛdrɛ ya Liban mpo na kosala likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa mpo na yo.

 6 Basalaki nkai na yo na banzete minene ya Bashane.

Elongi na yo esalemaki na mpɛmbɛ ya nzoku oyo bakɔtisá na mabaya ya siprɛ, oyo euti na bisanga ya Kitime.+

 7 Elamba ya lini ya langilangi oyo euti na Ezipito esalelamaki mpo na kotambwisa masuwa na yo.

Elamba oyo ezalaki kozipa yo esalemaki na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, oyo euti na bisanga ya Elisha.+

 8 Bafandi ya Sidone mpe ya Arvade+ bazalaki balúki-nkai na yo.

Ee Tire, bato na yo ya mayele bazalaki bamatelo na yo.+

 9 Bato ya Gebale+ oyo baumeli na mosala* mpe bato ya mayele bazalaki kobamba bampota ya masuwa.+

Bamasuwa nyonso ya mbu ná bato oyo basalaka na kati bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko ya mombongo.

10 Bato ya Perse, ya Ludi ná ya Puti+ bazalaki na limpinga ya basoda na yo, bato na yo ya etumba.

Bazalaki kokakisa banguba mpe bikɔti na bango epai na yo mpe bazalaki kosala ete ozala na nkembo.

11 Bato ya Arvade na limpinga ya basoda na yo bazalaki zingazinga ya bifelo na yo nyonso,

Mpe mibali ya mpiko bazalaki kobatela manɔ́ngi na yo.

Bazalaki kokakisa banguba na bango ya sɛrklɛ zingazinga ya bifelo na yo nyonso.

Mpe bakómisaki kitoko na yo ya kokoka.

12 “‘“Tarasisi+ asalaki mombongo ná yo mpo ozalaki mpenza mozwi.+ Mpo na kozwa biloko na yo, bazalaki kopesa palata, ebende, etini mpe mondɔlu.+ 13 Yavane, Tubale+ ná Mesheke+ bazalaki kosala mombongo ná yo. Mpo na kozwa biloko na yo ya mombongo bazalaki kopesa baombo+ mpe biloko ya kwivre. 14 Mpo na kozwa biloko na yo ya mombongo, bana ya Togarama+ bazalaki kopesa bafarasa, bampunda ya etumba mpe badɔngi.* 15 Bato ya Dedane+ bazalaki kosala mombongo ná yo; ozalaki kozwa na mosala bato ya mombongo na bisanga mingi; mpo na kopesa mpako, bazalaki kopesa yo mpɛmbɛ ya nzoku+ ná mabaya ya ebɛnɛ. 16 Edome azalaki kosala mombongo ná yo mpo na ebele ya biloko na yo. Mpo na kozwa biloko na yo bazalaki kopesa tirikwaze, lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, bilamba ya langilangi oyo ezali na mayemi, elamba ya kitoko, mabanga kitoko ya korai mpe mabanga ya rubi.

17 “‘“Yuda ná mokili ya Yisraele basalaki mombongo ná yo. Mpo na kozwa biloko na yo,+ bazalaki kopesa blé ya Minite,+ biloko kitoko ya kolya, mafuta ya nzoi,+ mafuta mpe balsame.+

18 “‘“Damasi+ azalaki kosala mombongo ná yo mpo na ebele ya biloko na yo, mpe ozalaki mpenza mozwi, azalaki komemela yo vinyo ya Helebone mpe lɛnɛ ya mwa mpɛmbɛ-motane. 19 Mpo na kozwa biloko na yo, Vedane ná Yavane ya Uzale, bapesaki ebende oyo etulami, nzete ya kasia* mpe nkokó. 20 Dedane+ asalaki mombongo ná yo ya bilamba ya nsinga oyo balitá mpo na kofandela mpunda. 21 Ozwaki na mosala Baarabe ná bankumu nyonso ya Kedare.+ Baoyo bazalaki kosala mombongo ya bana-mpate, bampate ná bantaba.+ 22 Bato ya mombongo ya Sheba mpe ya Rama+ basalaki mombongo ná yo; mpo na kozwa biloko na yo, bapesaki bamalasi ya ndenge nyonso oyo eleki kitoko, mabanga ya ntalo ya ndenge nyonso mpe wolo.+ 23 Harane,+ Kane ná Edene,+ bato ya mombongo ya Sheba,+ Ashure+ mpe Kilimada basalaki mombongo ná yo. 24 Na esika na yo ya mombongo batɛkaki bilamba ya kitoko, bilamba ya komizipa oyo esalemi na nsinga ya bulé mpe na mayemi ya langilangi mpe batapi ya langi ndenge na ndenge, nyonso ekangisami makasi na bansinga.

25 Bamasuwa ya Tarasisi+ ezalaki komema biloko na yo ya mombongo,

Bongo otondaki mpe omemaki mikumba ebele* na katikati mpenza ya mbu.

26 Balúki-nkai na yo bamemaki yo na mbu oyo ezali kotomboka.

Mopɛpɛ ya ɛsti epanzi yo na katikati mpenza ya mbu.

27 Bozwi na yo, biloko na yo, biloko na yo ya mombongo, bato na yo ya masuwa mpe bamatelo na yo,

Bato oyo babambaka bampota ya masuwa na yo, bato oyo basombaka biloko na yo ya mombongo+ mpe bato na yo nyonso ya bitumba,+

Ebele ya bato nyonso* oyo bazali epai na yo,

Bango nyonso bakokwea na katikati mpenza ya mbu, na mokolo ya kokwea na yo.+

28 Ntango bamatelo bakoganga, mikili oyo ezali pembeni ya mbu ekoningana.

29 Bato nyonso oyo balúkaka nkai, bato ya masuwa mpe bamatelo,

Bakokita na bamasuwa na bango mpe bakotɛlɛma na mokili.

30 Bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na mawa nyonso mpo na yo.+

Bakobwaka putulu na mitó na bango mpe bakomibalola na putulu ya mɔtɔ.

31 Bakokokola mitó na bango mpe bakolata ngɔtɔ,*

Bakolela yo na mawa makasi* ná koganga ya kolela.

32 Na kolela na bango, bakoyembela yo loyembo ya mawa mpe bakolela boye:

‘Nani azali lokola Tire, sikoyo akangisami monɔkɔ na katikati ya mbu?+

33 Ntango biloko na yo ya mombongo ezalaki kouta na katikati ya mbu, okokisaki bamposa ya bato ebele ya bikólo.+

Ebele ya bozwi na yo mpe biloko na yo ya mombongo, ekómisaki bakonzi ya mabele bazwi.+

34 Sikoyo, opanzani na mbu, na mai mozindo.+

Mpe biloko na yo nyonso ya mombongo mpe bato na yo bakwei elongo na yo.+

35 Bato nyonso oyo bafandi na bisanga bakotala yo na kokamwa,+

Mpe bakonzi na bango bakolɛnga na nsɔmɔ.+ Kobanga ekomonana na bilongi na bango.

36 Bato ya mombongo na kati ya bikólo, bakobɛta piololo mpo na oyo ekómeli yo.

Nsuka na yo ekozala nsɔmɔ mpe na pwasa,

Mpe okozala lisusu te mpo na libela.’”’”+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto