Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 4
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Ntango

      • Bakitani mosusu ya Yuda (1-23)

        • Yabeze mpe libondeli na ye (9, 10)

      • Bakitani ya Simeone (24-43)

1 Ntango 4:1

Mitindami

  • +Eb 38:29; Mit 26:20; Rt 4:18; Mt 1:3
  • +Eb 46:12; 1Nt 2:5
  • +Kob 17:12; 24:14; 1Nt 2:19
  • +1Nt 2:50

1 Ntango 4:2

Mitindami

  • +1Nt 2:53

1 Ntango 4:3

Mitindami

  • +2Nt 11:5, 6

1 Ntango 4:4

Mitindami

  • +1Nt 2:19
  • +Mik 5:2

1 Ntango 4:5

Mitindami

  • +1Nt 2:24
  • +2Nt 11:5, 6

1 Ntango 4:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Ekoki kozala ete nkombo Yabeze euti na liloba moko ya Ebre oyo elimboli “mpasi.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2010, lok. 23

1 Ntango 4:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/10/2010, lok. 23

    1/10/2005, lok. 9

1 Ntango 4:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana mibali.”

Mitindami

  • +Yos 15:16, 17; Bas 3:9, 11

1 Ntango 4:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “lobwaku ya bato ya misala ya mabɔkɔ.”

1 Ntango 4:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bana mibali.”

Mitindami

  • +Mit 32:11, 12; Yos 15:13

1 Ntango 4:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “abotaki.” Mbala mosusu ezali Bitia oyo balobeli na vɛrsɛ 18.

1 Ntango 4:21

Mitindami

  • +Eb 38:2, 5; Mit 26:20

1 Ntango 4:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Makambo oyo euti na lisolo ya ntango ya kala.”

1 Ntango 4:24

Mitindami

  • +Eb 46:10
  • +Mit 26:12, 13

1 Ntango 4:27

Mitindami

  • +Mit 26:22

1 Ntango 4:28

Mitindami

  • +Yos 19:1, 2
  • +Yos 15:21, 26
  • +Yos 15:21, 28; 19:1, 3; Ne 11:25-27

1 Ntango 4:29

Mitindami

  • +Yos 15:21, 29

1 Ntango 4:30

Mitindami

  • +Yos 19:1, 4
  • +Bas 1:17
  • +Yos 15:20, 31; 19:1, 5; 1Sa 27:5, 6

1 Ntango 4:31

Mitindami

  • +Yos 19:1, 5

1 Ntango 4:32

Mitindami

  • +Yos 19:1, 7

1 Ntango 4:40

Mitindami

  • +Eb 10:6, 20

1 Ntango 4:41

Mitindami

  • +2Nt 29:1

1 Ntango 4:42

Mitindami

  • +Eb 36:8

1 Ntango 4:43

Mitindami

  • +Kob 17:14, 16; 1Sa 15:7

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Nt. 4:1Eb 38:29; Mit 26:20; Rt 4:18; Mt 1:3
1 Nt. 4:1Eb 46:12; 1Nt 2:5
1 Nt. 4:1Kob 17:12; 24:14; 1Nt 2:19
1 Nt. 4:11Nt 2:50
1 Nt. 4:21Nt 2:53
1 Nt. 4:32Nt 11:5, 6
1 Nt. 4:41Nt 2:19
1 Nt. 4:4Mik 5:2
1 Nt. 4:51Nt 2:24
1 Nt. 4:52Nt 11:5, 6
1 Nt. 4:13Yos 15:16, 17; Bas 3:9, 11
1 Nt. 4:15Mit 32:11, 12; Yos 15:13
1 Nt. 4:21Eb 38:2, 5; Mit 26:20
1 Nt. 4:24Eb 46:10
1 Nt. 4:24Mit 26:12, 13
1 Nt. 4:27Mit 26:22
1 Nt. 4:28Yos 19:1, 2
1 Nt. 4:28Yos 15:21, 26
1 Nt. 4:28Yos 15:21, 28; 19:1, 3; Ne 11:25-27
1 Nt. 4:29Yos 15:21, 29
1 Nt. 4:30Yos 19:1, 4
1 Nt. 4:30Bas 1:17
1 Nt. 4:30Yos 15:20, 31; 19:1, 5; 1Sa 27:5, 6
1 Nt. 4:31Yos 19:1, 5
1 Nt. 4:32Yos 19:1, 7
1 Nt. 4:40Eb 10:6, 20
1 Nt. 4:412Nt 29:1
1 Nt. 4:42Eb 36:8
1 Nt. 4:43Kob 17:14, 16; 1Sa 15:7
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Ntango 4:1-43

Mokanda ya liboso ya Ntango

4 Bana ya Yuda ezalaki Pereze,+ Hezerone,+ Karami, Hure,+ ná Shobale.+ 2 Reaya mwana ya Shobale azalaki tata ya Yahate; Yahate azalaki tata ya Ahumai ná Lahade. Wana ezalaki mabota ya Bazora.+ 3 Bana ya tata ya Etami+ ezalaki Yizireele, Yishama, ná Yidibashe, (mpe nkombo ya ndeko na bango ya mwasi ezalaki Hazeleleponi), 4 mpe Penuele azalaki tata ya Gedore, mpe Ezere azalaki tata ya Husha. Bango nde bazalaki bana ya Hure,+ mwana ya liboso ya Efrata mpe tata ya Beteleme.+ 5 Ashekure+ tata ya Tekoa+ azalaki na basi mibale: Hela ná Naara. 6 Naara abotelaki ye Ahuzame, Hefere, Temeni, ná Haakashatari. Bango nde bana ya Naara. 7 Mpe bana ya Hela ezalaki: Zerete, Yizare, ná Etinane. 8 Koze abotaki Anube, Zobeba, ná mabota ya Akarakele mwana ya Harume.

9 Yabeze azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye; mama na ye apesaki ye nkombo Yabeze,* mpo alobaki: “Naboti ye na mpasi.” 10 Yabeze abondelaki Nzambe ya Yisraele na maloba oyo: “Nabondeli yo, pambolá ngai mpe kómisá teritware na ngai monene. Tiká ete lobɔkɔ na yo ezala elongo na ngai, mpe batelá ngai na likama mpo likambo moko ya mabe ekómela ngai te.” Bongo Nzambe asalelaki ye makambo oyo asɛngaki.

11 Kelube ndeko ya Shuha azalaki tata ya Mehire, oyo azalaki tata ya Eshitone. 12 Eshitone azalaki tata ya Bete-rafa, Pasea, ná Tehina, tata ya Ire-nahashe. Bango nde bazalaki bato ya Reka. 13 Mpe bana ya Kenaze ezalaki: Otiniele+ ná Seraya, mpe mwana* ya Otiniele ezalaki Hatate. 14 Meonotai azalaki tata ya Ofra. Seraya azalaki tata ya Yoabe, tata ya bato oyo bazalaki kofanda na Ge-harashime;* ebengamaki bongo mpo bato yango bayebaki misala ya mabɔkɔ.

15 Bana ya Kalebe+ mwana ya Yefune ezalaki Iru, Ela, ná Naame. Mpe mwana* ya Ela ezalaki: Kenaze. 16 Bana ya Yehalelele ezalaki Zife, Zifa, Tiria, ná Asarele. 17 Bana ya Ezera ezalaki Yetere, Merede, Efere ná Yalone. Mwasi moko ya Merede* azwaki zemi mpe abotaki Miriame, Shamai, ná Yishiba tata ya Eshetemoa. 18 (Mpe mwasi na ye ya Moyuda abotaki Yerede tata ya Gedore, Hebere tata ya Soko, ná Yekutiele tata ya Zanoa.) Bango nde bana ya Bitia mwana-mwasi ya Farao, oyo Merede abalaki.

19 Bana ya mwasi ya Hodia, ndeko mwasi ya Nahame, ezalaki batata ya Keila Mogarami mpe ya Eshetemoa Momaakate. 20 Mpe bana ya Shimone ezalaki Aminone, Rina, Bene-hanane, ná Tilone. Mpe bana ya Yishi ezalaki Zohete ná Bene-zohete.

21 Bana ya Shela+ mwana ya Yuda ezalaki Ere tata ya Leka, Laada tata ya Maresha, mpe mabota ya basali ya bilamba ya kitoko ya ndako ya Ashebea, 22 ná Yokime, mibali ya Kozeba, Yoashe, ná Sarafe, oyo bakómaki mibali ya basi Bamoabe, mpe Yashubi-leheme. Bankombo oyo euti na mikanda ya kala.* 23 Bazalaki bayemi-mbɛki oyo bazalaki kofanda na Netaime mpe na Gedera. Bazalaki kofanda kuna mpe kosalela mokonzi mosala.

24 Bana ya Simeone+ ezalaki Nemuele, Yamine, Yaribe, Zera, mpe Shaule.+ 25 Shaule azalaki tata ya Shalume, oyo azalaki tata ya Mibisame, tata ya Mishima. 26 Bana ya Mishima ezalaki mwana na ye Hamuele, mwana na ye Zakure, mpe mwana na ye Shimei. 27 Shimei azalaki na bana mibali 16 mpe bana basi 6; kasi bandeko na ye ya mibali bazalaki na bana mingi te, mpe ata libota na bango moko te ezalaki na bana mingi lokola bato ya Yuda.+ 28 Bazalaki kofanda na Beere-sheba,+ Molada,+ Hazare-shuale,+ 29 Bila, Ezeme,+ Tolade, 30 Betuele,+ Horoma,+ Ziklage,+ 31 Bete-marakabote, Hazare-susime,+ Bete-biri, ná Shaaraime. Wana ezalaki bingumba na bango tii na boyangeli ya Davidi.

32 Bamboka na bango yango oyo: Etami, Aine, Rimone, Tokene, ná Ashane:+ bingumba mitano, 33 mpe bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya bingumba yango tii na Baala. Wana ezalaki molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango mpe bisika oyo bazalaki kofanda. 34 Mpe Meshobabe, Yamileke, ná Yosha mwana ya Amazia, 35 Yoele, Yehu mwana ya Yoshibia mwana ya Seraya mwana ya Asiele, 36 Eliyonai, Yaakoba, Yeshohaya, Asaya, Adiele, Yesimiele, Benaya, 37 mpe Ziza mwana ya Shifi mwana ya Alone mwana ya Yedaya mwana ya Shimiri mwana ya Shemaya; 38 baoyo bankombo etángami bazalaki bankumu na kati ya mabota na bango, mpe mabota ya bankɔkɔ na bango ekómaki na bato mingi. 39 Mpe bakendaki na ekɔtelo ya Gedore, na ngámbo ya ɛsti ya lobwaku, koluka esika ya matiti mpo na koleisa bibwɛlɛ na bango. 40 Nsukansuka bakutaki matiti ya malamu mingi mpe ya kitoko mpo na koleisa bibwɛlɛ, mpe mokili yango ezalaki monene, kimya mpe likambo ya kotungisa bango ezalaki te. Bato oyo bazalaki kofanda kuna liboso bazalaki bato ya Kame.+ 41 Baoyo nkombo na bango ekomamaki bayaki na mikolo ya Ezekiasi+ mokonzi ya Yuda mpe bapanzaki bahema ya bato ya Kame mpe babomaki Bameunime oyo bazalaki kofanda kuna. Babomaki bango nyonso mpe ata eloko moko te etikalá kuna tii na mokolo ya lelo. Bakómaki kofanda na esika na bango, mpo esika ya koleisa bibwɛlɛ na bango matiti ezalaki kuna.

42 Basimeone mosusu, mibali 500, bakendaki na Ngomba Seire+ elongo na Pelatia, Nearia, Refaya mpe Uziele, bana ya Yishi oyo bazalaki kotambwisa bango. 43 Mpe babomaki Baamaleke+ oyo batikalaki, baoyo bakimaki. Bafandaka kuna tii na mokolo ya lelo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto