Loyembo ya ntango ya komata.
120 Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova,+
Mpe ayanolaki ngai.+
2 Ee Yehova, bikisá ngai na mbɛbu ya lokuta,
Mpe na lolemo ya bokosi.
3 Eloko nini Nzambe akosala yo, mpe ndenge nini akopesa yo etumbu,
Yo lolemo ya bokosi?+
4 Ná makula oyo epelisami+ ya mobundi-etumba,
Ná makala ya banzete ya retama oyo ezali kopela.+
5 Mawa na ngai, mpo nafandi mopaya na Mesheke!+
Nazali kofanda na katikati ya bahema ya Kedare.+
6 Nafandi ntango molai mingi
Ná bato oyo bayinaka kimya.+
7 Nalingi kimya, kasi soki nalobi,
Bango balingi etumba.