Yosua
15 Teritware oyo bapesaki*+ libota ya Yuda mpo na mabota na bango ekendaki tii na ndelo ya Edome,+ esobe ya Zine, mpe tii na Negebe, na ndelo na yango ya sudi. 2 Ndelo na bango ya sudi ebandaki na nsuka ya Mbu ya Mungwa,*+ banda na esika oyo mai yango ekɔtá na mokili, esika oyo etalá na sudi. 3 Mpe ekendaki na sudi tii na nzela ya komata ya Akrabime,+ eleki na Zine mpe emati banda na sudi tii na Kadeshe-barnea,+ eleki na Hezerone mpe emati na Adare mpe ebaluki tii na Karaka. 4 Na nsima, elekaki na Azemone,+ mpe ekendaki tii na Lobwaku* ya Ezipito;+ mpe ndelo yango esukaki na Mbu.* Wana ezalaki ndelo na yango ya sudi.
5 Ndelo ya ɛsti ezalaki Mbu ya Mungwa,* matá tii na nsuka ya Yordani, mpe ndelo oyo ezalaki na nsuka na nɔrdi, ezalaki na esika oyo mbu ekɔtá na mokili, na nsuka ya Yordani.+ 6 Ndelo yango emataki tii na Bete-hogla+ mpe elekaki na nɔrdi ya Bete-araba,+ mpe emataki tii na libanga ya Bohane+ mwana ya Rubene. 7 Ndelo yango emataki tii na Debire, na Lobwaku* ya Akore+ mpe ebalukaki na nɔrdi kino na Gilgale,+ oyo etalani na nzela ya komata ya Adumime, oyo ezali na sudi ya lobwaku. Mpe ndelo yango ekatisaki na mai ya Ene-shemeshe+ mpe esukaki na Ene-rogele.+ 8 Ndelo yango emataki tii na Lobwaku ya mwana ya Hinome+ tii na mopanzi ya ngomba ya Moyebusi+ na sudi, elingi koloba, Yerusaleme.+ Mpe ndelo yango ekobaki tii na nsɔngɛ ya ngomba oyo etalani na Lobwaku ya Hinome na wɛsti, oyo ezali na nsuka ya Lobwaku* ya Barefaime na nɔrdi. 9 Lisusu, ndelo yango elekaki banda na nsɔngɛ ya ngomba tii na liziba ya mai ya Nefetoa,+ mpe ekendaki tii na bingumba ya Ngomba Efrone. Ndelo yango elekaki kino na Baala, elingi koloba, Kiriate-yearime.+ 10 Ndelo yango ebalukaki banda na Baala na wɛsti tii na Ngomba Seire mpe ekatisaki na mopanzi ya Ngomba Yearime na nɔrdi, elingi koloba, Kesalone, mpe ekitaki tii na Bete-shemeshe+ mpe ekatisaki tii na Timina.+ 11 Mpe ndelo yango ekendaki tii na mopanzi ya ngomba ya Ekrone+ na nɔrdi, mpe elekaki tii na Shikerone mpe ekatisaki na Ngomba Baala mpe ekendaki tii na Yabineele. Mpe ndelo yango esukaki na mbu.
12 Ndelo ya wɛsti ezalaki na Mbu Monene*+ mpe bokula na yango. Wana ezalaki ndelo ya bakitani ya Yuda na bangámbo nyonso, na kolanda mabota na bango.
13 Mpe Yosua apesaki Kalebe,+ mwana ya Yefune, libula na kati ya bakitani ya Yuda ndenge Yehova apesaki ye mitindo. Libula yango ezalaki Kiriate-arba (Arba azalaki tata ya Anake), elingi koloba, Hebrone.+ 14 Bongo kuna, Kalebe abenganaki bana mibali misato ya Anake:+ Sheshai, Ahimane ná Talamai,+ bakitani ya Anake. 15 Na nsima, alongwaki wana mpe amataki mpo na kobundisa bato oyo bafandi na Debire.+ (Nkombo ya Debire ezalaki liboso Kiriate-sefere.) 16 Na nsima, Kalebe alobaki boye: “Moto nyonso oyo akokweisa Kiriate-sefere mpe akozwa yango, nakopesa ye Akasa, mwana na ngai ya mwasi, mpo akóma mwasi na ye.” 17 Mpe Otiniele,+ mwana ya Kenaze,+ ndeko ya Kalebe, azwaki engumba yango. Bongo Kalebe apesaki ye Akasa,+ mwana na ye, mpe akómaki mwasi na ye. 18 Ntango Akasa azalaki kokende na ndako na ye, atyaki mobali na ye mbamba mpo asɛnga tata na ye Kalebe elanga. Na nsima, Akasa akitaki na mpunda na ye.* Mpe Kalebe atunaki ye: “Olingi nini?”+ 19 Alobaki: “Nabondeli yo, pesá ngai lipamboli, mpo opesi ngai kaka eteni ya mabele na sudi;* pesá ngai mpe Gulote-maime.”* Bongo apesaki ye Gulote ya Likoló mpe Gulote ya Nse.
20 Wana nde ezalaki libula ya libota ya Yuda, na kolanda mabota na bango.
21 Bingumba oyo ezalaki na nsuka mpenza ya teritware ya libota ya Yuda, na ngámbo ya ndelo ya Edome+ na sudi, ezalaki Kabizeele, Edere, Yagure, 22 Kina, Dimona, Adada, 23 Kedeshe, Hazore, Itinane, 24 Zife, Teleme, Bealote, 25 Hazore-hadata ná Keriote-hezerone, elingi koloba, Hazore; 26 Amame, Shema, Molada,+ 27 Hazare-gada, Heshimone, Bete-pelete,+ 28 Hazare-shuale, Beere-sheba,+ Biziotia, 29 Baala, Yime, Ezeme, 30 Eletolade, Kesile, Horoma,+ 31 Ziklage,+ Mademana, Sansana, 32 Lebaote, Shilihime, Aine, ná Rimone.+ Bingumba yango nyonso ezalaki 29, elongo na bamboka na yango.
33 Bingumba oyo ezalaki na Shefela,+ yango oyo: Eshetaole, Zora,+ Ashena, 34 Zanoa, Ene-ganime, Tapua, Ename, 35 Yaramute, Adulame,+ Soko, Azeka,+ 36 Shaaraime,+ Aditaime, Gedera ná Gederotaime:* bingumba 14 mpe bamboka na yango.
37 Zenane, Hadasha, Mi-gedale-gade, 38 Dileane, Mizipe, Yokoteele, 39 Lakishi,+ Bozekate, Eglone, 40 Kabone, Lahamame, Kitilishe, 41 Gederote, Bete-dagone, Naama, ná Makeda:+ bingumba 16 mpe bamboka na yango.
42 Libina,+ Etere, Ashane,+ 43 Ifita, Ashena, Nezibe, 44 Keila, Akazibe, ná Maresha: bingumba libwa mpe bamboka na yango.
45 Ekrone ná basité oyo esimbami na yango* mpe bamboka na yango; 46 banda na Ekrone na wɛsti, bateritware nyonso oyo ezali pembenipembeni ya Ashedode mpe bamboka na yango.
47 Ashedode,+ basité oyo esimbami na yango* mpe bamboka na yango; Gaza,+ basité oyo esimbami na yango mpe bamboka na yango, kitá tii na Lobwaku* ya Ezipito, Mbu Monene* mpe etúká oyo ekangani na yango.+
48 Mpe bingumba oyo ezalaki na etúká ya ngombangomba, yango oyo: Shamire, Yatire,+ Soko, 49 Dana, Kiriate-sana, elingi koloba, Debire; 50 Anabe, Eshetemo,+ Anime, 51 Goshene,+ Holone, ná Gilo:+ bingumba 11 mpe bamboka na yango.
52 Arabe, Duma, Eshane, 53 Yanime, Bete-tapua, Afeka, 54 Humuta, Kiriate-arba, elingi koloba, Hebrone,+ ná Ziore: bingumba libwa mpe bamboka na yango.
55 Maone,+ Karamele, Zife,+ Yuta, 56 Yizreele, Yokodeame, Zanoa, 57 Kaine, Gibea, ná Timina:+ bingumba zomi mpe bamboka na yango.
58 Halule, Bete-zure, Gedore, 59 Maarate, Bete-anote, ná Eletekone: bingumba motoba mpe bamboka na yango.
60 Kiriate-baala, elingi koloba, Kiriate-yearime,+ ná Raba: bingumba mibale mpe bamboka na yango.
61 Bingumba oyo ezalaki na esobe, yango oyo: Bete-araba,+ Midine, Sekaka, 62 Nibishane, Engumba ya Mungwa, ná Ene-gedi:+ bingumba motoba mpe bamboka na yango.
63 Na oyo etali Bayebusi+ oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme,+ mibali ya Yuda bakokaki kobengana bango te.+ Yango wana, Bayebusi bazali kofanda elongo na bato ya Yuda na Yerusaleme tii na mokolo ya lelo.