Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Yisraele esɛngi mokonzi (1-9)

      • Samwele akebisi bato (10-18)

      • Yehova andimi kotyela bango mokonzi ndenge basɛngi (19-22)

1 Samwele 8:2

Mitindami

  • +1Nt 6:28

1 Samwele 8:3

Mitindami

  • +Kob 18:21
  • +Kob 23:8; Mib 16:19; Nz 15:5; Mas 29:4
  • +Mib 24:17

1 Samwele 8:5

Mitindami

  • +Mib 17:14, 15; 1Sa 12:13; Mis 13:21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 72-73

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2011, nk. 26-27

1 Samwele 8:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Kasi ezalaki mabe na miso ya Samwele.”

1 Samwele 8:7

Mitindami

  • +Bas 8:23; 1Sa 10:19; 12:12; Yis 33:22

1 Samwele 8:8

Mitindami

  • +Mib 9:24
  • +Bas 2:19

1 Samwele 8:11

Mitindami

  • +1Sa 10:25
  • +1Sa 14:52
  • +1Ba 9:22; 10:26
  • +1Ba 4:26

1 Samwele 8:12

Mitindami

  • +2Sa 18:1; 1Nt 27:1
  • +2Ba 1:14
  • +1Nt 27:26
  • +1Ba 4:7
  • +1Ba 4:26

1 Samwele 8:13

Mitindami

  • +1Ba 4:22

1 Samwele 8:14

Mitindami

  • +1Nt 27:28, 31

1 Samwele 8:16

Mitindami

  • +1Ba 5:15, 16

1 Samwele 8:17

Mitindami

  • +1Ba 4:22, 23

1 Samwele 8:18

Mitindami

  • +1Ba 12:3, 4

1 Samwele 8:22

Mitindami

  • +1Sa 8:7; Hos 13:11

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 8:21Nt 6:28
1 Sa. 8:3Kob 18:21
1 Sa. 8:3Kob 23:8; Mib 16:19; Nz 15:5; Mas 29:4
1 Sa. 8:3Mib 24:17
1 Sa. 8:5Mib 17:14, 15; 1Sa 12:13; Mis 13:21
1 Sa. 8:7Bas 8:23; 1Sa 10:19; 12:12; Yis 33:22
1 Sa. 8:8Mib 9:24
1 Sa. 8:8Bas 2:19
1 Sa. 8:111Sa 10:25
1 Sa. 8:111Sa 14:52
1 Sa. 8:111Ba 9:22; 10:26
1 Sa. 8:111Ba 4:26
1 Sa. 8:122Sa 18:1; 1Nt 27:1
1 Sa. 8:122Ba 1:14
1 Sa. 8:121Nt 27:26
1 Sa. 8:121Ba 4:7
1 Sa. 8:121Ba 4:26
1 Sa. 8:131Ba 4:22
1 Sa. 8:141Nt 27:28, 31
1 Sa. 8:161Ba 5:15, 16
1 Sa. 8:171Ba 4:22, 23
1 Sa. 8:181Ba 12:3, 4
1 Sa. 8:221Sa 8:7; Hos 13:11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 8:1-22

Mokanda ya liboso ya Samwele

8 Ntango Samwele akómaki mobange, atyaki bana na ye basambisi ya Yisraele. 2 Mwana na ye ya mobali ya liboso nkombo na ye Yoele, ya mibale nkombo na ye Abiya.+ Bazalaki kosambisa na Beere-sheba. 3 Kasi bana na ye balandaki ndakisa na ye te; bazalaki koluka kozwa mbongo na ndenge oyo elongobani te,+ bazalaki kondima kanyaka,+ mpe bazalaki kokata makambo na bosembo te.+

4 Na nsima, bankulutu nyonso ya Yisraele bayanganaki mpe bakendaki epai ya Samwele na Rama. 5 Balobaki na ye: “Talá! Okómi mobange, kasi bana na yo balandi ndakisa na yo te. Sikoyo, tyelá biso mokonzi mpo asambisaka biso lokola bikólo nyonso.”+ 6 Kasi Samwele asepelaki te* ndenge balobaki ete: “Pesá biso mokonzi mpo asambisaka biso.” Bongo, Samwele abondelaki Yehova, 7 mpe Yehova alobaki na Samwele boye: “Yoká makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo; mpo baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi na bango.+ 8 Bazali kosala kaka ndenge basalaki banda mokolo oyo nabimisaki bango na Ezipito tii na mokolo ya lelo; bazali se kotika ngai+ mpe kosalela banzambe mosusu;+ yango nde bazali kosala yo. 9 Sikoyo, yoká oyo balobi. Kasi osengeli kokebisa bango polele; mpe yebisá bango makambo oyo mokonzi oyo akoyangela bango akozala na lotomo ya kosɛnga bango.”

10 Bongo Samwele ayebisaki bato oyo bazalaki kosɛnga ye mokonzi maloba nyonso ya Yehova. 11 Alobaki boye: “Bóyoka makambo mokonzi oyo akoyangela bino akozala na lotomo ya kosɛnga bino:+ Akozwa bana na bino ya mibali,+ akokómisa bango batambwisi ya makalo na ye,+ mpe akokómisa bango basoda na ye oyo batambolaka na mpunda,+ mpe basusu bakokóma bato oyo bakimaka mbangu liboso ya makalo na ye. 12 Mpe akotya mpo na ye moko bakonzi ya basoda nkóto+ mpe bakonzi ya basoda ntuku mitano.+ Basusu bakosalela ye bilanga,+ bakobukela ye mbuma,+ bakosalela ye bibundeli mpe biloko ya makalo na ye.+ 13 Akozwa bana na bino ya basi mpo básalaka malasi, bálambaka, mpe bátumbaka mampa.+ 14 Akozwa bilanga na bino oyo eleki kitoko, bilanga na bino ya vinyo ná bilanga na bino ya olive,+ mpe akopesa yango basaleli na ye. 15 Akozwa moko ya bandambo zomi ya mbuma ya bilanga na bino mpe ya bilanga na bino ya vinyo, mpe akopesa yango bakapita oyo basalaka mpo na mokonzi mpe basaleli na ye. 16 Mpe akozwa basaleli na bino ya mibali mpe ya basi, bitonga na bino oyo eleki kitoko, ná bampunda na bino, mpo básalaka mosala na ye.+ 17 Akozwa moko ya bandambo zomi ya bitonga na bino ya bampate,+ mpe bokokóma basaleli na ye. 18 Ata ndɛlɛ, bokolela mpo na mokonzi oyo bino moko boponi,+ kasi na mokolo yango, Yehova akopesa bino eyano te.”

19 Atako bongo, bato baboyaki koyoka oyo Samwele azalaki koyebisa bango, mpe balobaki: “Likambo te, tolingi kaka kozala na mokonzi oyo akoyangela biso. 20 Boye, tokokóma lokola bikólo nyonso, mpe mokonzi na biso akosambisa biso, akokamba biso mpe akobunda bitumba mpo na biso.” 21 Ntango Samwele ayokaki maloba nyonso oyo bato balobaki, ayebisaki yango Yehova. 22 Yehova alobaki na Samwele boye: “Yoká oyo balobi, mpe tyelá bango mokonzi mpo ayangela bango.”+ Na yango, Samwele alobaki na mibali ya Yisraele ete: “Moto na moto azonga na engumba na ye.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto