Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Saulo aponi basoda na ye (1-4)

      • Saulo asali makambo na lofundo (5-9)

      • Samwele apameli Saulo (10-14)

      • Yisraele ezali na bibundeli te (15-23)

1 Samwele 13:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Motángo ya mbula ezali te na makomi ya Ebre.

Mitindami

  • +Mis 13:21

1 Samwele 13:2

Mitindami

  • +1Sa 18:1; 2Sa 1:4; 21:7
  • +Yos 18:28; 1Sa 10:26

1 Samwele 13:3

Mitindami

  • +Yos 13:2, 3; 1Sa 9:16
  • +Yos 21:8, 17
  • +Bas 3:26, 27; 6:34; 2Sa 2:28

1 Samwele 13:4

Mitindami

  • +Yos 5:9; 1Sa 11:14

1 Samwele 13:5

Mitindami

  • +Mib 20:1
  • +Yos 7:2; 18:11, 12; 1Sa 14:23

1 Samwele 13:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “biteni ya ndako ya nse oyo nsamba na yango egumbamá.”

Mitindami

  • +1Sa 14:11

1 Samwele 13:7

Mitindami

  • +Mit 32:1, 33; Yos 13:24, 25

1 Samwele 13:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +1Sa 15:22, 23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2017, lok. 17

1 Samwele 13:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kopambola ye.”

1 Samwele 13:11

Mitindami

  • +1Sa 13:6, 8
  • +1Sa 13:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2000, lok. 13

1 Samwele 13:12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2000, lok. 13

1 Samwele 13:13

Mitindami

  • +1Sa 15:11

1 Samwele 13:14

Mitindami

  • +1Sa 15:28
  • +1Sa 16:1; 2Sa 7:15; Nz 78:70; Mis 13:22
  • +Eb 49:10; 2Sa 5:2; 7:8; 1Nt 28:4
  • +Mas 11:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2011, nk. 26-29

    “Makomami nyonso,” lok. 63

1 Samwele 13:15

Mitindami

  • +1Sa 13:7; 14:2

1 Samwele 13:16

Mitindami

  • +1Sa 13:3
  • +1Sa 13:2

1 Samwele 13:18

Mitindami

  • +Yos 10:11

1 Samwele 13:20

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bapikasi.”

  • *

    To, “basóka.”

1 Samwele 13:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Kilo ya kala, ekokanaki na shekɛlɛ pene na 2/3.

  • *

    To, “bapikasi.”

  • *

    To, “basóka.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 29

1 Samwele 13:22

Mitindami

  • +1Sa 17:47, 50

1 Samwele 13:23

Mitindami

  • +1Sa 13:2; 14:4, 5

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 13:1Mis 13:21
1 Sa. 13:21Sa 18:1; 2Sa 1:4; 21:7
1 Sa. 13:2Yos 18:28; 1Sa 10:26
1 Sa. 13:3Yos 13:2, 3; 1Sa 9:16
1 Sa. 13:3Yos 21:8, 17
1 Sa. 13:3Bas 3:26, 27; 6:34; 2Sa 2:28
1 Sa. 13:4Yos 5:9; 1Sa 11:14
1 Sa. 13:5Mib 20:1
1 Sa. 13:5Yos 7:2; 18:11, 12; 1Sa 14:23
1 Sa. 13:61Sa 14:11
1 Sa. 13:7Mit 32:1, 33; Yos 13:24, 25
1 Sa. 13:91Sa 15:22, 23
1 Sa. 13:111Sa 13:6, 8
1 Sa. 13:111Sa 13:5
1 Sa. 13:131Sa 15:11
1 Sa. 13:141Sa 15:28
1 Sa. 13:141Sa 16:1; 2Sa 7:15; Nz 78:70; Mis 13:22
1 Sa. 13:14Eb 49:10; 2Sa 5:2; 7:8; 1Nt 28:4
1 Sa. 13:14Mas 11:2
1 Sa. 13:151Sa 13:7; 14:2
1 Sa. 13:161Sa 13:3
1 Sa. 13:161Sa 13:2
1 Sa. 13:18Yos 10:11
1 Sa. 13:221Sa 17:47, 50
1 Sa. 13:231Sa 13:2; 14:4, 5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 13:1-23

Mokanda ya liboso ya Samwele

13 Saulo azalaki na mbula . . .* ntango akómaki mokonzi.+ Nsima ya koyangela Yisraele mbula mibale, 2 Saulo aponaki mibali 3 000 na Yisraele: mibali 2 000 kati na bango bazalaki elongo na Saulo na Mikemashe mpe na etúká ya ngombangomba ya Betele, mpe mibali 1 000 bazalaki elongo na Yonatane+ na Gibea+ ya Benyamina. Atikaki bato mosusu bázonga, moto na moto na hema na ye. 3 Na nsima, Yonatane abomaki etuluku ya basoda ya Bafilistia+ oyo ezalaki na Geba,+ mpe Bafilistia bayokaki likambo yango. Bongo, Saulo atindaki báyula liseke+ na Yisraele mobimba, alobi: “Tiká Baebre báyoka!” 4 Yisraele mobimba eyokaki nsango oyo: “Saulo alongi etuluku moko ya basoda ya Bafilistia, mpe sikoyo Bafilistia bayini Yisraele.” Na yango bato bayanganisamaki mpo na kolanda Saulo na Gilgale.+

5 Bafilistia mpe bayanganaki mpo na kobunda na Yisraele. Bazalaki na makalo ya bitumba 30 000, basoda 6 000 oyo batambolaka na mpunda, mpe bato ya etumba ebele lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu.+ Bamataki mpe batyaki kaa na bango na Mikemashe, na ɛsti ya Bete-avene.+ 6 Mpe mibali ya Yisraele bamonaki ete bazali na likama mpo banguna bazalaki koya kobundisa bango; bongo bato bamibombaki na kati ya mibenga,+ na mabulu, na kati ya mabanga, na bandako ya nse ya mabele,* mpe na mabulu oyo babombaka mai. 7 Kutu, Baebre mosusu bakatisaki Yordani mpo na kokende na mokili ya Gade mpe ya Gileade.+ Kasi, Saulo azalaki kaka na Gilgale, mpe bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bazalaki kolɛnga. 8 Saulo azelaki mikolo nsambo, tii na ntango oyo Samwele atyaki, kasi Samwele akómaki na Gilgale te, mpe bato bakómaki kopanzana mpe kokima ye. 9 Nsukansuka, Saulo alobaki boye: “Bóyela ngai mbeka ya kotumba mpe bambeka ya kimya.”* Bongo, Saulo apesaki mbeka ya kotumba.+

10 Kasi, ntango kaka asilisaki kopesa mbeka yango ya kotumba, Samwele akómaki. Na yango, Saulo abimaki kokutana na ye mpe kopesa ye mbote.* 11 Bongo Samwele atunaki ye boye: “Osali nini?” Saulo ayanolaki: “Ntango namonaki ete bato bazali kokima ngai,+ mpe yo, oyaki te na ntango oyo etyamaki, mpe Bafilistia bazalaki koyanganisama na Mikemashe.+ 12 Bongo nakanisaki: ‘Sikoyo Bafilistia bakokitela ngai na Gilgale, mpe naino nakitisi Yehova motema te.’ Yango wana namonaki ete nasengeli kopesa mbeka ya kotumba.”

13 Na yango, Samwele alobaki na Saulo boye: “Osali likambo ya bozoba. Otosi te motindo oyo Yehova Nzambe na yo apesaki yo.+ Soki otosaka, Yehova alingaki kokómisa bokonzi na yo makasi na Yisraele mpo na libela. 14 Kasi sikoyo bokonzi na yo ekoumela te.+ Yehova akopona moto moko oyo akosepelisa motema na ye;+ mpe Yehova akotya ye mokambi ya bato na ye,+ mpo otosi te mitindo oyo Yehova apesaki yo.”+

15 Bongo Samwele alongwaki na Gilgale, asimbaki nzela mpe amataki na Gibea ya Benyamina. Mpe Saulo atángaki bato; baoyo batikalaki elongo na ye bazalaki mibali soki 600.+ 16 Saulo ná mwana na ye Yonatane, mpe bato ya etumba oyo batikalaki elongo na bango bazalaki kofanda na Geba+ ya Benyamina. Nzokande, Bafilistia batyaki kaa na bango na Mikemashe.+ 17 Mpe bituluku ya bapunzi ezalaki kobima na kaa ya Bafilistia, bakabwani na bituluku misato. Etuluku moko ezalaki kokende na balabala oyo ekei na Ofra, tii na mokili ya Shuale; 18 etuluku mosusu ezalaki kokende na balabala ya Bete-horone;+ mpe etuluku ya misato ezalaki kokende na balabala oyo ekei na ndelo oyo ezali na ngámbo ya lobwaku ya Zeboime, na ngámbo ya esobe.

19 Na ntango wana, ezalaki ata na moto moko te na Yisraele mobimba oyo azalaki kosala biloko ya bibende, mpo Bafilistia balobaki ete: “Tolingi te ete Baebre básala mopanga to likɔnga.” 20 Mpe Bayisraele nyonso basengelaki kokende epai ya Bafilistia mpo na kopelisa bisaleli na bango: bitimweli ya mabele, bankongo,* bipasola,* to makwangola. 21 Mpo na kopelisa bisaleli yango, bazalaki kofuta pimi* moko mpo na bitimweli ya mabele, mpo na bankongo,* mpo na nkanya ya mino misato, mpo na bipasola* mpe mpo na kobongisa nsɔngɛ ya lingenda ya kotambwisa ngɔmbɛ. 22 Mpe na mokolo ya etumba, na bato nyonso oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Yonatane, ata moko te azalaki na mopanga to likɔnga na lobɔkɔ na ye; kaka Saulo ná mwana na ye Yonatane+ nde bazalaki na bibundeli.

23 Na ntango wana, etuluku moko ya basoda ya Bafilistia ezalaki kobima na nzela ya lobwaku ya Mikemashe.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto