Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Saulo atosi te, atiki Agage na bomoi (1-9)

      • Samwele apameli Saulo (10-23)

        • “Kotosa eleki kopesa mbeka” (22)

      • Saulo akozala lisusu mokonzi te (24-29)

      • Samwele abomi Agage (30-35)

1 Samwele 15:1

Mitindami

  • +1Sa 9:16; 10:1
  • +1Sa 12:14

1 Samwele 15:2

Mitindami

  • +Kob 17:8; Mit 24:20; Mib 25:17, 18

1 Samwele 15:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “koyoka mawa mpo na.”

Mitindami

  • +Kob 17:14; Mib 25:19; 1Nt 4:43
  • +Le 27:29; 1Sa 15:18
  • +Mib 9:1, 3
  • +Mib 13:17; Yos 6:18

1 Samwele 15:4

Mitindami

  • +1Sa 11:8; 13:15

1 Samwele 15:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

1 Samwele 15:6

Mitindami

  • +Mit 10:29, 32; 24:21; Bas 1:16
  • +Eb 18:25; 19:12, 13; Yos 6:17
  • +Kob 18:9, 12

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/3/2005, lok. 23

1 Samwele 15:7

Mitindami

  • +Mib 25:19; 1Sa 14:47, 48
  • +Eb 25:17, 18
  • +1Sa 27:8

1 Samwele 15:8

Mitindami

  • +1Sa 15:33
  • +Le 27:29; 1Sa 15:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/7/1992, lok. 5

1 Samwele 15:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bayokaki mawa mpo na.”

Mitindami

  • +Yos 7:12

1 Samwele 15:11

Mitindami

  • +1Sa 13:13; 15:3
  • +1Sa 16:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1998, nk. 6-7

1 Samwele 15:12

Mitindami

  • +Yos 15:20, 55
  • +2Sa 18:18

1 Samwele 15:14

Mitindami

  • +1Sa 15:3

1 Samwele 15:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bayokaki mawa mpo na.”

1 Samwele 15:16

Mitindami

  • +1Sa 15:10, 11

1 Samwele 15:17

Mitindami

  • +1Sa 9:21; 10:22
  • +1Sa 9:16; 10:1

1 Samwele 15:18

Mitindami

  • +1Sa 15:3
  • +Mib 25:19

1 Samwele 15:19

Mitindami

  • +Mib 13:17; 1Sa 15:9

1 Samwele 15:20

Mitindami

  • +Le 27:29; Mib 7:16; 1Sa 15:3, 9

1 Samwele 15:21

Mitindami

  • +1Sa 15:15

1 Samwele 15:22

Mitindami

  • +Yis 1:11
  • +Mas 21:3; Hos 6:6; Mr 12:33
  • +Le 3:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2007, nk. 26-28

1 Samwele 15:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baterafime,” elingi koloba, banzambe ya libota.

Mitindami

  • +1Sa 12:15
  • +Le 20:6; Mib 18:10, 12; 1Nt 10:13
  • +1Sa 15:3
  • +1Sa 13:14; 16:1; Mis 13:22

1 Samwele 15:25

Mitindami

  • +1Sa 15:30

1 Samwele 15:26

Mitindami

  • +1Sa 13:14; 16:1

1 Samwele 15:28

Mitindami

  • +1Sa 13:14; 16:12, 13; Mis 13:22

1 Samwele 15:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ayoka mawa.”

  • *

    To, “ayoka mawa.”

Mitindami

  • +1Nt 29:11
  • +Tit 1:2; Ebr 6:18
  • +Mit 23:19

1 Samwele 15:30

Mitindami

  • +1Sa 15:25

1 Samwele 15:32

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “kozanga kokakatana.”

  • *

    Lil., “bololo ya liwa eleki.”

1 Samwele 15:33

Mitindami

  • +Kob 17:14; Mib 25:19; 1Sa 15:3

1 Samwele 15:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Gibea ya Saulo.”

1 Samwele 15:35

Mitindami

  • +1Sa 16:1
  • +1Sa 15:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/4/1998, nk. 6-7

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 15:11Sa 9:16; 10:1
1 Sa. 15:11Sa 12:14
1 Sa. 15:2Kob 17:8; Mit 24:20; Mib 25:17, 18
1 Sa. 15:3Kob 17:14; Mib 25:19; 1Nt 4:43
1 Sa. 15:3Le 27:29; 1Sa 15:18
1 Sa. 15:3Mib 9:1, 3
1 Sa. 15:3Mib 13:17; Yos 6:18
1 Sa. 15:41Sa 11:8; 13:15
1 Sa. 15:6Mit 10:29, 32; 24:21; Bas 1:16
1 Sa. 15:6Eb 18:25; 19:12, 13; Yos 6:17
1 Sa. 15:6Kob 18:9, 12
1 Sa. 15:7Mib 25:19; 1Sa 14:47, 48
1 Sa. 15:7Eb 25:17, 18
1 Sa. 15:71Sa 27:8
1 Sa. 15:81Sa 15:33
1 Sa. 15:8Le 27:29; 1Sa 15:3
1 Sa. 15:9Yos 7:12
1 Sa. 15:111Sa 13:13; 15:3
1 Sa. 15:111Sa 16:1
1 Sa. 15:12Yos 15:20, 55
1 Sa. 15:122Sa 18:18
1 Sa. 15:141Sa 15:3
1 Sa. 15:161Sa 15:10, 11
1 Sa. 15:171Sa 9:21; 10:22
1 Sa. 15:171Sa 9:16; 10:1
1 Sa. 15:181Sa 15:3
1 Sa. 15:18Mib 25:19
1 Sa. 15:19Mib 13:17; 1Sa 15:9
1 Sa. 15:20Le 27:29; Mib 7:16; 1Sa 15:3, 9
1 Sa. 15:211Sa 15:15
1 Sa. 15:22Yis 1:11
1 Sa. 15:22Mas 21:3; Hos 6:6; Mr 12:33
1 Sa. 15:22Le 3:16
1 Sa. 15:231Sa 12:15
1 Sa. 15:23Le 20:6; Mib 18:10, 12; 1Nt 10:13
1 Sa. 15:231Sa 15:3
1 Sa. 15:231Sa 13:14; 16:1; Mis 13:22
1 Sa. 15:251Sa 15:30
1 Sa. 15:261Sa 13:14; 16:1
1 Sa. 15:281Sa 13:14; 16:12, 13; Mis 13:22
1 Sa. 15:291Nt 29:11
1 Sa. 15:29Tit 1:2; Ebr 6:18
1 Sa. 15:29Mit 23:19
1 Sa. 15:301Sa 15:25
1 Sa. 15:33Kob 17:14; Mib 25:19; 1Sa 15:3
1 Sa. 15:351Sa 16:1
1 Sa. 15:351Sa 15:11
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 15:1-35

Mokanda ya liboso ya Samwele

15 Na nsima, Samwele alobaki na Saulo boye: “Yehova atindaki ngai natya yo mafuta mpo ozala mokonzi ya bato na ye Yisraele.+ Sikoyo, yoká maloba oyo Yehova alingi koloba na yo.+ 2 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nakosɛnga Baamaleke bázongisa monɔkɔ mpo batɛmɛlaki Bayisraele na nzela na bango ntango babimaki na Ezipito.+ 3 Sikoyo kende, mpe bɛtá Baamaleke+ mpe silisá bango nyonso nyɛɛ+ elongo na biloko na bango nyonso. Osengeli kobikisa* bango te. Osengeli koboma bango nyonso,+ ezala mobali to mwasi, mwana moke to oyo azali naino komɛla mabɛlɛ, ngɔmbɛ to mpate, kamela to mpunda.’”+ 4 Bongo Saulo ayanganisaki bato mpe atángaki bango na Telaime: bazalaki basoda 200 000 oyo batambolaka na makolo mpe mibali ya Yuda 10 000.+

5 Saulo akendaki tii na engumba ya Amaleke mpe abombanaki pene na lobwaku.* 6 Na nsima, Saulo alobaki na Bakeni:+ “Bókende, bólongwa na kati ya Baamaleke, mpo naboma bino elongo na bango te.+ Mpo bomoniselaki bato nyonso ya Yisraele bolingo ya sembo+ ntango babimaki na Ezipito.” Na yango Bakeni balongwaki na Amaleke. 7 Nsima na yango, Saulo abomaki Baamaleke,+ banda na Havila+ tii na Shure,+ oyo ezali pene na Ezipito. 8 Akangaki Agage,+ mokonzi ya Amaleke, wana azalaki naino na bomoi, kasi abomaki bato mosusu nyonso na mopanga.+ 9 Nzokande, Saulo ná bato babikisaki* Agage ná banyama oyo eleki malamu, etonga ya bampate, ya bangɔmbɛ, banyama ya mafutamafuta, bampate-mibali, mpe biloko nyonso oyo ezalaki malamu.+ Balingaki te kobebisa yango. Kasi biloko nyonso oyo ezangaki ntina mpe oyo bazalaki na mposa na yango te, yango nde babebisaki.

10 Bongo Yehova alobaki na Samwele: 11 “Nayoki mawa ndenge nakómisaki Saulo mokonzi, mpo apesi ngai mokɔngɔ mpe atiki kolanda ngai mpe atosi maloba na ngai te.”+ Samwele amitungisaki mingi, mpe alelelaki Yehova butu mobimba.+ 12 Ntango Samwele alamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpo na kokutana na Saulo, bayebisaki Samwele: “Saulo akendaki na Karamele,+ mpe kuna atongaki monimá mpo na ye moko.+ Na nsima abalukaki mpe akitaki na Gilgale.” 13 Nsukansuka ntango Samwele akutanaki na Saulo, Saulo alobaki na ye: “Tiká Yehova apambola yo. Natosi maloba ya Yehova.” 14 Kasi Samwele atunaki ye: “Bongo makɛlɛlɛ ya bampate mpe ya bangɔmbɛ oyo nazali koyoka na matoi na ngai elakisi nini?”+ 15 Na yango Saulo ayanolaki: “Bauti na yango epai ya Baamaleke, mpo bato babikisaki* bampate mpe bangɔmbɛ oyo eleki malamu mpo na kopesa yango mbeka epai ya Yehova Nzambe na yo. Kasi biloko mosusu oyo etikali, tobebisaki yango nyonso.” 16 Na yango Samwele alobaki na Saulo: “Ekoki! Tiká nayebisa yo makambo oyo Yehova alobaki na ngai na butu.”+ Bongo alobaki na ye: “Lobá!”

17 Samwele alobaki lisusu: “Na ntango oyo ozalaki komimona moto mpamba,+ Yehova akómisaki yo nkumu ya mabota ya Yisraele mpe atyaki yo mafuta mpo okóma mokonzi ya Yisraele, boye te?+ 18 Na nsima Yehova apesaki yo mosala moko mpe alobaki: ‘Kende mpe bomá mpenza Baamaleke bato ya masumu.+ Bundisá bango tii okosilisa bango nyɛɛ.’+ 19 Bongo mpo na nini otosi mongongo ya Yehova te? Mpo na nini okei kowelela na lokoso biloko oyo bopunzi na etumba+ mpe osali lisumu na miso ya Yehova?”

20 Kasi Saulo alobaki na Samwele: “Natosi mongongo ya Yehova! Nakendaki mpe nasalaki likambo oyo Yehova asɛngaki ngai nasala! Nayei na Agage mokonzi ya Amaleke, mpe nasilisi Baamaleke nyɛɛ.+ 21 Kasi bato bazwaki bampate ná bangɔmbɛ na biloko oyo epunzami, biloko ya kitoko koleka na biloko oyo esengeli kobebisama, mpo na kopesa Yehova Nzambe na yo mbeka na Gilgale.”+

22 Bongo Samwele alobaki: “Eloko nini esepelisaka Yehova koleka: makabo ya kotumba mpe bambeka+ to kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa eleki kopesa mbeka,+ mpe koyoka na likebi eleki mafuta+ ya bampate-mibali; 23 mpo botomboki+ ezali ndenge moko na lisumu ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ mpe kokende liboso na lofundo ezali ndenge moko na kosala makambo ya maji mpe kosambela bikeko.* Lokola oboyi kotosa liloba ya Yehova,+ ye mpe aboyi yo ozala mokonzi.”+

24 Na nsima, Saulo alobaki na Samwele: “Nasali lisumu, mpo natosi etinda ya Yehova te mpe nalandi maloba na yo te, mpo nabangaki bato mpe nayokelaki bango. 25 Bongo sikoyo, nabondeli yo, limbisá lisumu na ngai mpe yaká tózonga elongo mpo nafukama liboso ya Yehova.”+ 26 Kasi Samwele alobaki na Saulo: “Nakozonga elongo na yo te, mpo oboyi liloba ya Yehova, mpe Yehova aboyi yo okoba kozala mokonzi ya Yisraele.”+ 27 Ntango Samwele azalaki kobaluka mpo na kokende, Saulo akangaki ye na nsɔngɛ ya kazaka na ye oyo ezangá mabɔkɔ, kasi kazaka yango elongwaki. 28 Na yango Samwele alobaki na ye: “Yehova alongoli bokonzi ya Yisraele epai na yo lelo, mpe akopesa yango moto mosusu oyo azali malamu koleka yo.+ 29 Lisusu, Moto ya lokumu ya Yisraele+ akobuka lokuta te+ mpe akobongola makanisi na ye te,* mpo Ye azali mwana ya moto te mpo abongola makanisi na ye.”*+

30 Na yango alobaki boye: “Nasali lisumu. Kasi, nabondeli yo, koyokisa ngai nsɔni te na miso ya bankulutu ya bato na ngai mpe na miso ya Yisraele. Yaká tózonga elongo, mpe nakofukama liboso ya Yehova Nzambe na yo.”+ 31 Bongo Samwele azongaki elongo na Saulo, mpe Saulo afukamaki liboso ya Yehova. 32 Mpe Samwele alobaki: “Bóyela ngai Agage mokonzi ya Amaleke.” Bongo Agage akendaki epai na ye na kokakatana,* mpo Agage alobaki na motema na ye: ‘Ya solo bakoboma ngai lisusu te.’* 33 Kasi Samwele alobaki: “Kaka ndenge mopanga na yo esalaki ete basi bázanga bana, mama na yo mpe akozanga bana koleka basi nyonso.” Na yango, Samwele akataki Agage bitenibiteni liboso ya Yehova na Gilgale.+

34 Bongo Samwele akendaki na Rama, mpe Saulo amataki na ndako na ye na Gibea.* 35 Tii mokolo Samwele akufaki, amonaki lisusu Saulo te, mpo azalaki na mawa mingi mpo na Saulo.+ Mpe Yehova ayokaki mawa ndenge atyaki Saulo mokonzi ya Yisraele.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto