Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 24
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Botomboki ya Yehoyakime mpe liwa na ye (1-7)

      • Yehoyakine, mokonzi ya Yuda (8, 9)

      • Komemama ya liboso na Babilone (10-17)

      • Zidikiya, mokonzi ya Yuda; botomboki na ye (18-20)

2 Bakonzi 24:1

Mitindami

  • +Yir 25:1; 46:2; Da 1:1; 3:1; 4:33

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Esakweli ya Danyele, nk. 31-32

2 Bakonzi 24:2

Mitindami

  • +Hab 1:6
  • +Le 26:27, 28; Mib 28:15; 2Ba 23:27

2 Bakonzi 24:3

Mitindami

  • +Le 26:33; Mib 4:26
  • +2Ba 21:11; 23:26

2 Bakonzi 24:4

Mitindami

  • +2Ba 21:16; Yir 2:34; 19:4
  • +Yir 15:1; Bil 3:42

2 Bakonzi 24:5

Mitindami

  • +2Nt 36:8

2 Bakonzi 24:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +Yir 22:18, 19; 36:30

2 Bakonzi 24:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Yir 46:2
  • +Mit 34:2, 5
  • +Eb 15:18; 1Ba 4:21

2 Bakonzi 24:8

Mitindami

  • +Yir 24:1; 37:1
  • +2Nt 36:8

2 Bakonzi 24:10

Mitindami

  • +Da 1:1

2 Bakonzi 24:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    4/2008, lok. 16

    “Makomami nyonso,” nk. 132-133

2 Bakonzi 24:12

Mitindami

  • +Yir 29:1, 2
  • +2Nt 36:9, 10; Yir 24:1; Ezk 17:12
  • +Yir 52:28

2 Bakonzi 24:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “ndako.”

Mitindami

  • +2Ba 20:13, 17
  • +1Ba 7:48-50; Ezr 1:7; Da 5:2

2 Bakonzi 24:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mosala ya kotonga bifelo ya makasi ya libateli.”

Mitindami

  • +Da 1:3, 6
  • +Yir 24:1
  • +2Ba 25:12

2 Bakonzi 24:15

Mitindami

  • +2Ba 25:27; 1Nt 3:17
  • +Yir 22:24, 25

2 Bakonzi 24:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mosala ya kotonga bifelo ya makasi ya libateli.”

2 Bakonzi 24:17

Mitindami

  • +1Nt 3:15
  • +2Nt 36:10-12; Yir 37:1; 52:1

2 Bakonzi 24:18

Mitindami

  • +2Ba 23:31

2 Bakonzi 24:19

Mitindami

  • +2Ba 23:36, 37; Yir 24:8; 37:1, 2; 38:5, 6; Ezk 21:25

2 Bakonzi 24:20

Mitindami

  • +2Ba 23:27
  • +2Nt 36:11, 13; Yir 27:12; 38:17; Ezk 17:12-15

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 24:1Yir 25:1; 46:2; Da 1:1; 3:1; 4:33
2 Bak. 24:2Hab 1:6
2 Bak. 24:2Le 26:27, 28; Mib 28:15; 2Ba 23:27
2 Bak. 24:3Le 26:33; Mib 4:26
2 Bak. 24:32Ba 21:11; 23:26
2 Bak. 24:42Ba 21:16; Yir 2:34; 19:4
2 Bak. 24:4Yir 15:1; Bil 3:42
2 Bak. 24:52Nt 36:8
2 Bak. 24:6Yir 22:18, 19; 36:30
2 Bak. 24:7Yir 46:2
2 Bak. 24:7Mit 34:2, 5
2 Bak. 24:7Eb 15:18; 1Ba 4:21
2 Bak. 24:8Yir 24:1; 37:1
2 Bak. 24:82Nt 36:8
2 Bak. 24:10Da 1:1
2 Bak. 24:12Yir 29:1, 2
2 Bak. 24:122Nt 36:9, 10; Yir 24:1; Ezk 17:12
2 Bak. 24:12Yir 52:28
2 Bak. 24:132Ba 20:13, 17
2 Bak. 24:131Ba 7:48-50; Ezr 1:7; Da 5:2
2 Bak. 24:14Da 1:3, 6
2 Bak. 24:14Yir 24:1
2 Bak. 24:142Ba 25:12
2 Bak. 24:152Ba 25:27; 1Nt 3:17
2 Bak. 24:15Yir 22:24, 25
2 Bak. 24:171Nt 3:15
2 Bak. 24:172Nt 36:10-12; Yir 37:1; 52:1
2 Bak. 24:182Ba 23:31
2 Bak. 24:192Ba 23:36, 37; Yir 24:8; 37:1, 2; 38:5, 6; Ezk 21:25
2 Bak. 24:202Ba 23:27
2 Bak. 24:202Nt 36:11, 13; Yir 27:12; 38:17; Ezk 17:12-15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 24:1-20

Mokanda ya mibale ya

24 Ntango Yehoyakime azalaki koyangela, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki kobundisa Yuda, mpe Yehoyakime akómaki mosaleli na ye mbula misato. Kasi na nsima, Yehoyakime abalukelaki ye mpe atombokelaki ye. 2 Bongo Yehova abandaki kotindela Yehoyakime bituluku ya bapunzi ya Bakaladea,+ ya bato ya Siri, ya Bamoabe, mpe ya Baamone. Yehova azalaki se kotinda bango na Yuda mpo bábebisa yango, kaka ndenge alobaki yango+ na nzela ya basaleli na ye basakoli. 3 Yehova nde azwaki ekateli ete likambo yango ekómela Yuda, mpo alongola bafandi ya Yuda na miso na ye+ mpo na masumu nyonso oyo Manase asalaki,+ 4 mpe ndenge asopaki makila ya bato oyo bazali na likambo te.+ Ya solo, Manase atondisaki Yerusaleme na makila ya bato oyo bazali na likambo te. Mpe Yehova alingaki kolimbisa te.+

5 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehoyakime, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda.+ 6 Bongo Yehoyakime akufaki,*+ mpe mwana na ye Yehoyakine akómaki mokonzi na esika na ye.

7 Ata mokolo moko te mokonzi ya Ezipito amekaki lisusu kobima na ekólo na ye, mpo mokonzi ya Babilone abɔtɔlaki ye biloko nyonso oyo azalaki na yango,+ banda na Lobwaku* ya Ezipito+ tii na Ebale Efrate.+

8 Yehoyakine+ azalaki na mbula 18 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki sanza misato na Yerusaleme.+ Nkombo ya mama na ye ezalaki Nehushita mwana ya Elenatane, moto ya Yerusaleme. 9 Akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, na kolanda nyonso oyo tata na ye asalaki. 10 Na ntango yango, basoda ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone bayaki kobundisa Yerusaleme mpe bazingaki engumba yango.+ 11 Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki na engumba Yerusaleme na ntango oyo basoda na ye bazingaki yango.

12 Yehoyakine mokonzi ya Yuda, ná mama na ye, ná basaleli na ye, ná bankumu na ye, mpe bakapita ya ndako na ye+ bamikabaki epai ya mokonzi ya Babilone.+ Mokonzi ya Babilone akangaki Yehoyakine mpe amemaki ye na Babilone. Ezalaki na mbula ya mwambe ya boyangeli ya mokonzi ya Babilone.+ 13 Na nsima Mokonzi ya Babilone abimisaki biloko nyonso ya motuya ya tempelo* ya Yehova mpe biloko ya motuya ya ndako ya mokonzi ya Yuda.+ Akataki mikemike bisaleli nyonso ya wolo oyo Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki na tempelo ya Yehova.+ Nyonso wana esalemaki kaka ndenge Yehova asakolaki yango. 14 Amemaki bato ya Yerusaleme mobimba na mboka mopaya: bankumu nyonso,+ bilombe nyonso ya etumba, moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe mosala ya bibende.*+ Bato yango nyonso bazalaki 10 000. Atikaki ata moto moko te na Yerusaleme, longola kaka baoyo bazalaki babola mpenza.+ 15 Bongo amemaki Yehoyakine+ na Babilone;+ amemaki mpe mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakapita ya ndako na ye, mpe bato minene ya mboka; alongolaki bango na Yerusaleme mpe amemaki bango na Babilone. 16 Mokonzi ya Babilone amemaki mpe bilombe nyonso ya etumba. Bazalaki 7 000. Amemaki mpe bato 1 000 oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ ná mosala ya bibende.* Bango nyonso bazalaki mibali ya nguya mpe mibali oyo bayebi mpenza kobunda. 17 Mokonzi ya Babilone akómisaki Matania, leki ya tata ya Yehoyakine,+ mokonzi na esika ya Yehoyakine mpe apesaki ye nkombo mosusu: Zidikiya.+

18 Zidikiya azalaki na mbula 21 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula 11 na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Hamutale,+ mwana ya Yirimia, moto ya engumba Libina. 19 Zidikiya akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, kaka ndenge Yehoyakime asalaki.+ 20 Makambo wana nyonso ekómelaki Yerusaleme mpe Yuda mpo Yehova azalaki na nkanda makasi, yango wana nsukansuka, alongolaki bango na miso na ye.+ Mpe Zidikiya atombokelaki mokonzi ya Babilone.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto