Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Bakonzi

      • Bazongiseli mwasi Moshuneme mabele na ye (1-6)

      • Elisha, Bene-hadade, mpe Hazaele (7-15)

      • Yehorame, mokonzi ya Yuda (16-24)

      • Ahazia, mokonzi ya Yuda (25-29)

2 Bakonzi 8:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “azongisaki na bomoi.”

Mitindami

  • +2Ba 4:32-35
  • +Le 26:19; Mib 28:15, 23; 1Ba 17:1

2 Bakonzi 8:2

Mitindami

  • +Yos 13:2, 3

2 Bakonzi 8:4

Mitindami

  • +2Ba 2:14, 20, 21; 3:17; 4:4, 7; 6:5-7; 7:1

2 Bakonzi 8:5

Mitindami

  • +2Ba 4:32-35
  • +Mit 36:9

2 Bakonzi 8:7

Mitindami

  • +Yis 7:8
  • +1Ba 20:1; 2Ba 6:24
  • +1Ba 17:24

2 Bakonzi 8:8

Mitindami

  • +1Ba 19:15
  • +1Sa 9:8; 1Ba 14:2, 3

2 Bakonzi 8:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Komibenga “mwana na yo” ntango ozali kosolola na moto ezalaki komonisa limemya.

2 Bakonzi 8:10

Mitindami

  • +2Ba 8:15

2 Bakonzi 8:12

Mitindami

  • +2Ba 10:32; 12:17; 13:3; Am 1:3
  • +Mib 28:63; Am 1:13

2 Bakonzi 8:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mbwa mpamba.”

Mitindami

  • +1Ba 19:15

2 Bakonzi 8:14

Mitindami

  • +2Ba 8:10

2 Bakonzi 8:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “atandaki.”

Mitindami

  • +1Ba 16:8, 10; 2Ba 11:1; 15:8, 10
  • +1Ba 19:15

2 Bakonzi 8:16

Mitindami

  • +2Ba 1:17
  • +1Ba 22:50; 2Nt 21:3, 5

2 Bakonzi 8:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Atambolaki na nzela.”

Mitindami

  • +1Ba 12:28-30
  • +1Ba 16:32, 33; 21:25
  • +2Ba 8:26, 27; 2Nt 18:1
  • +2Nt 21:6, 7

2 Bakonzi 8:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elingi koloba, mokitani.

Mitindami

  • +Eb 49:10; 2Sa 7:16, 17
  • +1Ba 11:36; Nz 132:17

2 Bakonzi 8:20

Mitindami

  • +Eb 27:40; 2Sa 8:14
  • +1Ba 22:47; 2Nt 21:8-10

2 Bakonzi 8:22

Mitindami

  • +Yos 21:13; 2Ba 19:8

2 Bakonzi 8:24

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +1Ba 2:10; 2Nt 21:18-20
  • +1Nt 3:10, 11; 2Nt 21:16, 17; 22:1, 2

2 Bakonzi 8:25

Mitindami

  • +2Ba 9:29

2 Bakonzi 8:26

Mitindami

  • +2Ba 11:1, 13, 16
  • +1Ba 16:16, 23

2 Bakonzi 8:27

Mitindami

  • +1Ba 16:33
  • +2Ba 8:16, 18; 2Nt 22:3, 4

2 Bakonzi 8:28

Mitindami

  • +Yos 21:38; 1Ba 22:2, 3
  • +1Ba 19:17; 2Nt 22:5

2 Bakonzi 8:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpo azalaki kobɛla.”

Mitindami

  • +Yos 19:17, 18; 1Ba 21:1; 2Nt 22:6
  • +2Ba 9:15

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Bak. 8:12Ba 4:32-35
2 Bak. 8:1Le 26:19; Mib 28:15, 23; 1Ba 17:1
2 Bak. 8:2Yos 13:2, 3
2 Bak. 8:42Ba 2:14, 20, 21; 3:17; 4:4, 7; 6:5-7; 7:1
2 Bak. 8:52Ba 4:32-35
2 Bak. 8:5Mit 36:9
2 Bak. 8:7Yis 7:8
2 Bak. 8:71Ba 20:1; 2Ba 6:24
2 Bak. 8:71Ba 17:24
2 Bak. 8:81Ba 19:15
2 Bak. 8:81Sa 9:8; 1Ba 14:2, 3
2 Bak. 8:102Ba 8:15
2 Bak. 8:122Ba 10:32; 12:17; 13:3; Am 1:3
2 Bak. 8:12Mib 28:63; Am 1:13
2 Bak. 8:131Ba 19:15
2 Bak. 8:142Ba 8:10
2 Bak. 8:151Ba 16:8, 10; 2Ba 11:1; 15:8, 10
2 Bak. 8:151Ba 19:15
2 Bak. 8:162Ba 1:17
2 Bak. 8:161Ba 22:50; 2Nt 21:3, 5
2 Bak. 8:181Ba 12:28-30
2 Bak. 8:181Ba 16:32, 33; 21:25
2 Bak. 8:182Ba 8:26, 27; 2Nt 18:1
2 Bak. 8:182Nt 21:6, 7
2 Bak. 8:19Eb 49:10; 2Sa 7:16, 17
2 Bak. 8:191Ba 11:36; Nz 132:17
2 Bak. 8:20Eb 27:40; 2Sa 8:14
2 Bak. 8:201Ba 22:47; 2Nt 21:8-10
2 Bak. 8:22Yos 21:13; 2Ba 19:8
2 Bak. 8:241Ba 2:10; 2Nt 21:18-20
2 Bak. 8:241Nt 3:10, 11; 2Nt 21:16, 17; 22:1, 2
2 Bak. 8:252Ba 9:29
2 Bak. 8:262Ba 11:1, 13, 16
2 Bak. 8:261Ba 16:16, 23
2 Bak. 8:271Ba 16:33
2 Bak. 8:272Ba 8:16, 18; 2Nt 22:3, 4
2 Bak. 8:28Yos 21:38; 1Ba 22:2, 3
2 Bak. 8:281Ba 19:17; 2Nt 22:5
2 Bak. 8:29Yos 19:17, 18; 1Ba 21:1; 2Nt 22:6
2 Bak. 8:292Ba 9:15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Bakonzi 8:1-29

Mokanda ya mibale ya

8 Mokolo moko Elisha alobaki na mama ya mwana oyo ye asekwisaki*+ boye: “Longwá awa, yo ná bato ya libota na yo, mpe kende kofanda na mboka mopaya, na esika nyonso oyo okoki kofanda. Mpo Yehova alobi ete nzala+ ekoya na mboka oyo mpe ekoumela mbula nsambo.” 2 Bongo mwasi yango asalaki kaka ndenge moto ya Nzambe ya solo alobaki. Asimbaki nzela, akei, ye ná bato ya libota na ye, mpe afandaki na mboka ya Bafilistia+ mbula nsambo.

3 Nsima ya mbula nsambo, mwasi yango alongwaki na mboka ya Bafilistia mpe azongaki. Bongo akendaki epai ya mokonzi mpo na kosɛnga ete bázongisela ye ndako na ye mpe elanga na ye. 4 Na ntango yango, mokonzi azalaki kosolola na Gehazi, mosaleli ya moto ya Nzambe ya solo, alobi: “Nabondeli yo, yebisá ngai makambo nyonso ya kokamwa oyo Elisha asalá.”+ 5 Ntango kaka Gehazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge oyo Elisha asekwisaki mwana moko ya mobali,+ mama ya mwana yango ayaki epai ya mokonzi mpo na kosɛnga ete bázongisela ye ndako na ye mpe elanga na ye.+ Na mbala moko Gehazi alobaki: “Nkolo na ngai mokonzi, mwasi yango ye oyo, mpe mwana na ye ya mobali oyo Elisha asekwisaki ye oyo.” 6 Bongo mokonzi atunaki mwasi yango, mpe ye abɛtɛlaki ye lisolo yango mobimba. Na nsima mokonzi abengaki mosali moko ya ndako na ye mpe alobaki na ye: “Zongiselá mwasi oyo biloko na ye nyonso mpe futá ye mbongo oyo mbuma nyonso ya elanga na ye ekokaki kobimisa banda mokolo oyo alongwaki na mboka oyo tii lelo.”

7 Elisha akendaki na Damasi.+ Na ntango yango, Bene-hadade+ mokonzi ya Siri azalaki kobɛla. Bongo bayebisaki mokonzi ete: “Moto ya Nzambe ya solo+ ayei awa na Damasi.” 8 Bongo mokonzi alobaki na Hazaele:+ “Zwá likabo mpe memelá moto ya Nzambe ya solo.+ Yebisá ye atuna Yehova soki nakobika na maladi oyo.” 9 Hazaele akendaki kokutana na Elisha. Amemelaki ye likabo oyo: Lolenge nyonso ya biloko malamu ya Damasi oyo bakamela 40 ekoki komema. Ayaki mpe atɛlɛmaki liboso ya Elisha mpe alobaki: “Mwana na yo,* Bene-hadade mokonzi ya Siri, atindi ngai natuna yo soki akobika na maladi oyo azali kobɛla.” 10 Elisha ayanolaki ye: “Kende koyebisa ye: ‘Okobika mpenza.’ Kasi mpo na koloba solo, Yehova alakisi ngai ete akokufa.”+ 11 Kasi Elisha azalaki kaka kotala Hazaele na miso tii Hazaele ayokaki nsɔni. Na nsima moto ya Nzambe ya solo abandaki kolela. 12 Hazaele atunaki: “Nkolo na ngai, mpo na nini ozali kolela?” Elisha ayanolaki: “Mpo nayebi mabe oyo okosala bato ya Yisraele.+ Okozikisa bingumba na bango oyo ebatelami makasi, okoboma na mopanga basoda na bango ya makasi koleka, okokatakata bana na bango, mpe okotɔbɔla mabumu ya basi na bango oyo bazali na zemi.”+ 13 Hazaele alobaki: “Ndenge nini ngai mosaleli na yo, moto mpamba,* nakoki kosala likambo ya boye?” Kasi Elisha alobaki: “Yehova alakisi ngai ete okokóma mokonzi ya Siri.”+

14 Na nsima, Hazaele atikaki Elisha mpe azongaki epai ya nkolo na ye. Nkolo na ye atunaki ye: “Elisha alobi na yo nini?” Hazaele ayanolaki: “Alobi na ngai ete okobika mpenza.”+ 15 Kasi na mokolo oyo elandaki, Hazaele azwaki bolangiti, azindisaki yango na mai, mpe azipaki* nkolo na ye na elongi mpe akangamaki mpema tii akufaki.+ Mpe Hazaele akómaki mokonzi na esika na ye.+

16 Na mbula ya mitano ya Yehorame+ mwana ya Ahaba mokonzi ya Yisraele, wana Yehoshafate azalaki mokonzi ya Yuda, Yehorame+ mwana ya Mokonzi Yehoshafate akómaki mokonzi ya Yuda. 17 Azalaki na mbula 32 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula mwambe na Yerusaleme. 18 Alandaki ndakisa mabe* ya bakonzi ya Yisraele,+ kaka ndenge bato ya libota ya Ahaba basalaki,+ mpo mwana ya Ahaba akómaki mwasi na ye.+ Mpe akobaki kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova.+ 19 Kasi Yehova alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi mosaleli na ye.+ Mpo alakaki ye ete akopesa ye ná bana na ye mwinda*+ ntango nyonso.

20 Na mikolo ya Yehorame, Edome etombokelaki Yuda+ mpe etyaki mokonzi na yango moko.+ 21 Bongo Yehorame akatisaki mpe akendaki na Zairi, elongo na makalo na ye nyonso. Kuna, bato ya Edome bazingaki ye ná bakomanda ya makalo na ye. Kasi atɛlɛmaki na butu mpe alongaki bango na etumba; mpe basoda bakimaki na bahema na bango. 22 Kasi Edome ekobaki kotombokela boyangeli ya Yuda tii na mokolo ya lelo. Na ntango yango Libina+ mpe etombokaki.

23 Makambo mosusu ya lisolo ya Yehorame, ná nyonso oyo asalaki, ekomami na buku ya masolo ya kala ya bakonzi ya Yuda. 24 Na nsima Yehorame akufaki* mpe bakundaki ye esika moko na bankɔkɔ na ye na Sité ya Davidi.+ Mpe mwana na ye Ahazia+ akómaki mokonzi na esika na ye.

25 Ahazia mwana ya Yehorame mokonzi ya Yuda akómaki mokonzi na mbula ya 12 ya boyangeli ya Yehorame mokonzi ya Yisraele, mwana ya Ahaba.+ 26 Ahazia azalaki na mbula 22 ntango akómaki mokonzi, mpe ayangelaki mbula moko na Yerusaleme. Nkombo ya mama na ye ezalaki Atalia,+ mwana ya mwana ya Omiri+ mokonzi ya Yisraele. 27 Ahazia alandaki ndakisa mabe ya libota ya Ahaba+ mpe akobaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, lokola libota ya Ahaba, mpo akómaki ndeko ya libota ya Ahaba mpo na libala.+ 28 Mokolo moko, Ahazia akendaki elongo na Yehorame mwana ya Ahaba mpo na kobundisa Hazaele mokonzi ya Siri na Ramote-gileade.+ Kasi bato ya Siri bazokisaki Yehorame.+ 29 Na nsima Mokonzi Yehorame azongaki na Yizireele+ mpo na kozwa lisalisi mpo na bampota oyo bato ya Siri bazokisaki ye na Rama, ntango abundaki na Hazaele mokonzi ya Siri.+ Ahazia mokonzi ya Yuda, mwana ya Yehorame, akendaki na Yizireele kotala Yehorame mwana ya Ahaba, mpo azokaki.*

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto