Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Miriame ná Arona batɛmɛli Moize (1-3)

        • “Moize azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso” (3)

      • Yehova alongisi Moize (4-8)

      • Miriame azwi maladi ya maba (9-16)

Mitángo 12:1

Mitindami

  • +Kob 2:16, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2009, lok. 26

    1/8/2004, lok. 26

    15/10/2002, nk. 28-29

Mitángo 12:2

Mitindami

  • +Kob 4:14-16, 30; 15:20; 28:30; Mik 6:4
  • +Mit 11:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/10/2002, nk. 28-29

Mitángo 12:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “ezaleli ya boboto koleka moto mosusu nyonso.”

Mitindami

  • +Mt 11:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2019, lok. 8

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2005, lok. 20

    1/4/2003, nk. 17-18

Mitángo 12:5

Mitindami

  • +Kob 34:5; Mit 11:25

Mitángo 12:6

Mitindami

  • +Eb 15:1; 46:2; Kob 24:9-11
  • +Eb 31:10, 11

Mitángo 12:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Na ndako na ngai mobimba, ye nde amonisi ete azali sembo.”

Mitindami

  • +Ebr 3:2, 5

Mitángo 12:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Nalobaka na ye monɔkɔ na monɔkɔ.”

Mitindami

  • +Kob 33:11; Mib 34:10

Mitángo 12:10

Mitindami

  • +Mib 24:9
  • +2Nt 26:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2004, lok. 26

Mitángo 12:13

Mitindami

  • +Kob 32:11; Yk 5:16

Mitángo 12:14

Mitindami

  • +Le 13:45, 46; Mit 5:2

Mitángo 12:15

Mitindami

  • +Mib 24:9

Mitángo 12:16

Mitindami

  • +Mit 11:35; 33:18
  • +Mit 10:12

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 12:1Kob 2:16, 21
Mit. 12:2Kob 4:14-16, 30; 15:20; 28:30; Mik 6:4
Mit. 12:2Mit 11:1
Mit. 12:3Mt 11:29
Mit. 12:5Kob 34:5; Mit 11:25
Mit. 12:6Eb 15:1; 46:2; Kob 24:9-11
Mit. 12:6Eb 31:10, 11
Mit. 12:7Ebr 3:2, 5
Mit. 12:8Kob 33:11; Mib 34:10
Mit. 12:10Mib 24:9
Mit. 12:102Nt 26:19
Mit. 12:13Kob 32:11; Yk 5:16
Mit. 12:14Le 13:45, 46; Mit 5:2
Mit. 12:15Mib 24:9
Mit. 12:16Mit 11:35; 33:18
Mit. 12:16Mit 10:12
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 12:1-16

Mitángo

12 Sikoyo Miriame ná Arona babandaki koloba mabe mpo na Moize mpo abalaki mwasi Mokushi, mpamba te azwaki mwasi Mokushi.+ 2 Bazalaki koloba ete: “Ezali kaka na nzela ya Moize nde Yehova alobaki? Ye alobaki mpe na nzela na biso te?”+ Mpe Yehova azalaki koyoka.+ 3 Kasi Moize azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso*+ oyo bazalaki na mabele.

4 Na mbala moko, Yehova alobaki na Moize ná Arona mpe Miriame ete: “Bóbima, bino misato, bókende na hema ya kokutana.” Bongo bango misato babimaki. 5 Mpe Yehova akitaki kati na likonzí ya lipata+ mpe atɛlɛmaki na ekɔtelo ya hema mpe abengaki Arona ná Miriame. Na yango, bango mibale bapusanaki. 6 Na nsima alobaki ete: “Nabondeli bino, bóyoka maloba na ngai. Soki mosakoli moko ya Yehova azalaki na kati na bino, nalingaki komimonisa na ye na emonaneli+ mpe nalingaki koloba na ye na ndɔtɔ.+ 7 Kasi na mosaleli na ngai Moize ezali bongo te! Napesi ye bato na ngai nyonso.*+ 8 Nalobaka na ye boye mpenza*+ na ndenge ya polele, kasi na sambole te; mpe amonaka mpenza kobima ya Yehova. Bongo mpo na nini bobangaki te koloba mabe mpo na mosaleli na ngai, mpo na Moize?”

9 Na yango, nkanda ya Yehova engalelaki bango mpe akendaki. 10 Lipata elongwaki likoló ya hema, mpe talá! Miriame azwaki maladi ya maba, mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+ Bongo Arona abalukaki epai ya Miriame, mpe amonaki ete Miriame azwaki maladi ya maba.+ 11 Na mbala moko, Arona alobaki na Moize ete: “Nabondeli yo, nkolo na ngai! Nabondeli yo, kotángela biso te lisumu oyo tosali! Tosali makambo na bozoba. 12 Nabondeli yo, kotika ye te akoba kozala lokola mwana oyo akufi na libumu ya mama, oyo ndambo ya mosuni na ye elyami!” 13 Mpe Moize abandaki kobelela Yehova na maloba oyo: “Ee Nzambe, nabondeli yo, bikisá ye, nabondeli yo!”+

14 Yehova ayanolaki Moize ete: “Soki tata na ye abwakeli ye mpenza nsoi na elongi, alingaki kosambwa mikolo nsambo te? Tiká atyama mosika na bato mikolo nsambo na libándá ya kaa,+ mpe na nsima, akoki kozongisama na kaa.” 15 Na yango, Miriame atyamaki mosika na bato na libándá ya kaa mikolo nsambo,+ mpe bato balongolaki kaa te tii Miriame azongisamaki. 16 Na nsima, bato balongwaki na Hazerote+ mpe babandaki kotya kaa na esobe ya Parane.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto