Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Abrahama abali mwasi mosusu (1-6)

      • Liwa ya Abrahama (7-11)

      • Bana mibali ya Yishimaele (12-18)

      • Kobotama ya Yakobo ná Esau (19-26)

      • Esau atɛki lotomo na ye ya mwana ya liboso (27-34)

Ebandeli 25:2

Mitindami

  • +Eb 37:28; Kob 2:15; Mit 31:2; Bas 6:2
  • +1Nt 1:32, 33

Ebandeli 25:5

Mitindami

  • +Eb 24:36

Ebandeli 25:6

Mitindami

  • +Eb 21:14

Ebandeli 25:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/12/2010, lok. 13

Ebandeli 25:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2016, lok. 8

Ebandeli 25:9

Mitindami

  • +Eb 23:8, 9; 49:29, 30

Ebandeli 25:10

Mitindami

  • +Eb 23:2, 19

Ebandeli 25:11

Mitindami

  • +Eb 17:19; 26:12-14
  • +Eb 16:14

Ebandeli 25:12

Mitindami

  • +Eb 16:10, 11
  • +Ga 4:24

Ebandeli 25:13

Mitindami

  • +Eb 36:2, 3; Yis 60:7
  • +Nz 120:5; Yir 49:28; Ezk 27:21
  • +1Nt 1:29-31

Ebandeli 25:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “bakaa oyo ezingami na bifelo.”

Mitindami

  • +Eb 17:20

Ebandeli 25:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Oyo ezali maloba ya ntɔki mpo na kolobela liwa.

Ebandeli 25:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “Bonguna ezalaki kati na ye mpe bandeko na ye nyonso.”

Mitindami

  • +1Sa 15:7
  • +Eb 16:7, 8
  • +Eb 16:11, 12

Ebandeli 25:19

Mitindami

  • +Eb 22:2; Mt 1:1, 2

Ebandeli 25:20

Mitindami

  • +Eb 22:23

Ebandeli 25:22

Mitindami

  • +Ro 9:10

Ebandeli 25:23

Mitindami

  • +Nz 139:15
  • +Eb 36:31; Mit 20:14
  • +Eb 27:29, 30; Mib 2:4
  • +2Sa 8:14; Mal 1:2, 3; Ro 9:10-13

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2004, lok. 28

    15/10/2003, lok. 29

    “Makomami nyonso,” lok. 18

    Ndenge ya kosolola, lok. 338

Ebandeli 25:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “nsukinsuki.”

Mitindami

  • +Eb 27:11
  • +Eb 27:32; 36:9; Mal 1:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 14

Ebandeli 25:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “moto oyo asimbi litindi; moto oyo azwi esika ya moto mosusu.”

Mitindami

  • +Hos 12:3
  • +Eb 27:36

Ebandeli 25:27

Mitindami

  • +Eb 27:3, 5
  • +Ebr 11:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/5/2013, lok. 27

    15/10/2003, lok. 28

Ebandeli 25:28

Mitindami

  • +Eb 27:6, 7, 46

Ebandeli 25:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “madesu ya mike.”

Ebandeli 25:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “pesá ngai eloko ya komɛla.”

  • *

    Lil., “motane, motane oyo.”

  • *

    To, “nazali na nzala makasi.”

  • *

    Elimboli, “motane.”

Mitindami

  • +Eb 36:1

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2002, lok. 11

Ebandeli 25:31

Mitindami

  • +Mib 21:16, 17

Ebandeli 25:33

Mitindami

  • +Ebr 12:16

Ebandeli 25:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “madesu ya mike.”

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 25:2Eb 37:28; Kob 2:15; Mit 31:2; Bas 6:2
Eba. 25:21Nt 1:32, 33
Eba. 25:5Eb 24:36
Eba. 25:6Eb 21:14
Eba. 25:9Eb 23:8, 9; 49:29, 30
Eba. 25:10Eb 23:2, 19
Eba. 25:11Eb 17:19; 26:12-14
Eba. 25:11Eb 16:14
Eba. 25:12Eb 16:10, 11
Eba. 25:12Ga 4:24
Eba. 25:13Eb 36:2, 3; Yis 60:7
Eba. 25:13Nz 120:5; Yir 49:28; Ezk 27:21
Eba. 25:131Nt 1:29-31
Eba. 25:16Eb 17:20
Eba. 25:181Sa 15:7
Eba. 25:18Eb 16:7, 8
Eba. 25:18Eb 16:11, 12
Eba. 25:19Eb 22:2; Mt 1:1, 2
Eba. 25:20Eb 22:23
Eba. 25:22Ro 9:10
Eba. 25:23Nz 139:15
Eba. 25:23Eb 36:31; Mit 20:14
Eba. 25:23Eb 27:29, 30; Mib 2:4
Eba. 25:232Sa 8:14; Mal 1:2, 3; Ro 9:10-13
Eba. 25:25Eb 27:11
Eba. 25:25Eb 27:32; 36:9; Mal 1:3
Eba. 25:26Hos 12:3
Eba. 25:26Eb 27:36
Eba. 25:27Eb 27:3, 5
Eba. 25:27Ebr 11:9
Eba. 25:28Eb 27:6, 7, 46
Eba. 25:30Eb 36:1
Eba. 25:31Mib 21:16, 17
Eba. 25:33Ebr 12:16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 25:1-34

Ebandeli

25 Sikoyo Abrahama azwaki mwasi mosusu, nkombo na ye Ketura. 2 Na nsima abotelaki ye Zimirane, Yokeshane, Medane, Midiane,+ Yishibake mpe Shua.+

3 Yokeshane abotaki Sheba ná Dedane.

Bana ya Dedane ezalaki Ashurime, Letushime, mpe Leumime.

4 Bana ya Midiane ezalaki Efa, Efere, Hanoke, Abida mpe Eledaa.

Bango nyonso bazalaki bana ya Ketura.

5 Nsima na yango, Abrahama apesaki Yisaka biloko nyonso oyo azalaki na yango,+ 6 kasi bana oyo Abrahama abotaki na basi mosusu, apesaki bango makabo. Wana azalaki naino na bomoi, atindaki bango bákende na ngámbo ya ɛsti, mosika na mwana na ye Yisaka,+ na mokili ya Ɛsti. 7 Bomoi mobimba ya Abrahama ezalaki mbula 175. 8 Na nsima, Abrahama akataki motema. Akufaki nsima ya kozala na bomoi moko ya malamu mpe ya molai, anuni, atondi na mikolo; mpe ayanganisamaki na bato na ye.* 9 Bana na ye Yisaka ná Yishimaele bakundaki ye na mobenga ya Makapela na elanga ya Efrone mwana ya Zohare Mohiti, elanga oyo etalani na Mamare,+ 10 oyo Abrahama asombaki epai ya bana ya Hete. Kuna nde bakundaki Abrahama ná mwasi na ye Sara.+ 11 Nsima ya liwa ya Abrahama, Nzambe akobaki kopambola Yisaka mwana na ye,+ mpe Yisaka azalaki kofanda pene na Beere-lahai-royi.+

12 Oyo ezali lisolo ya Yishimaele+ mwana ya Abrahama, oyo Agare+ Moezipito, mosaleli ya Sara, abotelaki Abrahama.

13 Sikoyo talá nkombo ya bana ya Yishimaele, na kolanda mabota oyo ebimaki epai na bango: Nebayote,+ mwana ya liboso ya Yishimaele, Kedare,+ na nsima Adibeele, Mibisame,+ 14 Mishima, Duma, Masa, 15 Hadade, Tema, Yeture, Nafishi mpe Kedema. 16 Bango nde bana ya Yishimaele, mpe wana ezali bankombo na bango na kolanda bamboka na bango mpe na kolanda bisika na bango ya kofanda na bakaa,* bankumu 12 na kolanda mabota na bango.+ 17 Mpe bomoi mobimba ya Yishimaele ezalaki mbula 137. Na nsima, akataki motema, akufaki mpe ayanganisamaki na bato na ye.* 18 Mpe bazalaki kofanda banda na Havila+ pene na Shure,+ oyo etalani na Ezipito, tii na Asiri. Afandaki pene ya bandeko na ye nyonso.*+

19 Mpe oyo ezali lisolo ya Yisaka mwana ya Abrahama.+

Abrahama abotaki Yisaka. 20 Yisaka azalaki na mbula 40 ntango abalaki Rebeka, mwana ya Betuele+ moto ya Arame ya Padane-arame, ndeko ya Labana moto ya Arame. 21 Mpe Yisaka akobaki kobondela Yehova mpo na mwasi na ye, mpo azalaki ekomba; bongo Yehova ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka mwasi na ye azwaki zemi. 22 Mpe bana oyo bazalaki na libumu na ye babandaki kobunda,+ bongo alobaki ete: “Soki ezali boye, mpo na nini nazali na bomoi?” Na yango, atunaki Yehova. 23 Mpe Yehova alobaki na ye ete: “Bikólo mibale ezali na kati ya libumu na yo,+ mpe bituluku mibale ya bato ya bikólo ekobima epai na yo mpe ekokabwana;+ ekólo moko ekozala makasi koleka ekólo mosusu,+ mpe mokóló akosalela leki.”+

24 Ntango mikolo na ye ya kobota ekokaki, talá! mapasa bazalaki na libumu na ye. 25 Bongo oyo ya liboso abimaki, azalaki nzoto mobimba motane mpe azalaki lokola elamba ya nsukinsuki;+ na yango bapesaki ye nkombo Esau.*+ 26 Na nsima, ndeko na ye abimaki mpe lobɔkɔ na ye esimbaki litindi ya Esau,+ bongo apesaki ye nkombo Yakobo.*+ Yisaka azalaki na mbula 60 ntango Rebeka abotaki bango.

27 Ntango bana yango bakolaki, Esau akómaki mobali oyo ayebaki malamu kosala bokila,+ moto ya zamba, kasi Yakobo azalaki moto oyo azangi mbeba, mpe azalaki kofanda na bahema.+ 28 Mpe Yisaka azalaki kolinga Esau, mpo azalaki kosepela na nyama oyo azalaki komemela ye, kasi Rebeka azalaki kolinga Yakobo.+ 29 Mokolo moko, Yakobo azalaki kolamba supu ya lantiye,* wana Esau autaki na zamba alɛmbi. 30 Bongo Esau alobaki na Yakobo ete: “Nabondeli yo, pesá ngai noki mwa ndambo* ya supu ya motane oyo ozali na yango wana,* mpo nalɛmbi!”* Yango wana babengaki ye Edome.*+ 31 Na yango, Yakobo alobaki ete: “Liboso tɛkɛlá ngai lotomo na yo ya mwana ya liboso!”+ 32 Mpe Esau alobaki lisusu ete: “Talá ngai oyo nalingi kokufa! Lotomo ya mwana ya liboso ezali na ntina nini mpo na ngai?” 33 Mpe Yakobo abakisaki ete: “Liboso lapelá ngai ndai!” Na yango, alapelaki ye ndai mpe atɛkɛlaki Yakobo lotomo na ye ya mwana ya liboso.+ 34 Na nsima, Yakobo apesaki Esau limpa ná supu ya lantiye,* alyaki mpe amɛlaki, na nsima atɛlɛmaki mpe akendaki. Na ndenge yango, Esau atyolaki lotomo ya mwana ya liboso.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto