Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Abrahama akokóma tata ya bikólo mingi (1-8)

        • Abrama akómi kobengama Abrahama (5)

      • Kondimana ya kokatama ngɛnga (9-14)

      • Sarai akómi kobengama Sara (15-17)

      • Nzambe ayebisi kobotama ya Yisaka (18-27)

Ebandeli 17:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na mbeba te.”

Ebandeli 17:2

Mitindami

  • +Eb 15:18; Nz 105:8-11
  • +Eb 22:17; Mib 1:10; Ebr 11:11, 12

Ebandeli 17:4

Mitindami

  • +Nz 105:9-11
  • +Eb 13:16; Ro 4:17

Ebandeli 17:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “tata atombwami (akumisami).”

  • *

    Elimboli, “tata ya bato ebele.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 13

Ebandeli 17:6

Mitindami

  • +Eb 35:10, 11

Ebandeli 17:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Lk 1:72, 73

Ebandeli 17:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Kob 6:4; Ebr 11:8, 9
  • +Mib 14:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Lamuká!,

    7/2012, nk. 25-26

Ebandeli 17:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Ebandeli 17:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Eb 21:4; Ro 2:29

Ebandeli 17:11

Mitindami

  • +Mis 7:8; Ro 4:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2007, nk. 12-13

    “Makomami nyonso,” lok. 18

Ebandeli 17:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Lk 2:21

Ebandeli 17:13

Mitindami

  • +Kob 12:44

Ebandeli 17:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

  • *

    To, “kobomama.”

Ebandeli 17:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu elimboli, “moto oyo aswanaka.”

  • *

    Elimboli, “mwasi ya lokumu.”

Mitindami

  • +Eb 11:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 lok. 14

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, lok. 13

Ebandeli 17:16

Mitindami

  • +Eb 18:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 lok. 14

Ebandeli 17:17

Mitindami

  • +Eb 18:12
  • +Ro 4:19; Ebr 11:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 5 2017 lok. 14

Ebandeli 17:18

Mitindami

  • +Eb 16:11

Ebandeli 17:19

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “kosɛka.”

  • *

    Lil., “momboto.”

Mitindami

  • +Mt 1:2
  • +Eb 26:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/2/2009, nk. 13-14

Ebandeli 17:20

Mitindami

  • +Eb 16:10; 21:13, 18; 25:13-16; 1Nt 1:29-31

Ebandeli 17:21

Mitindami

  • +Eb 26:3; Ebr 11:8, 9
  • +Eb 18:10, 14; 21:1

Ebandeli 17:23

Mitindami

  • +Eb 17:13

Ebandeli 17:24

Mitindami

  • +Mis 7:8; Ro 4:11

Ebandeli 17:25

Mitindami

  • +Eb 16:16

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 17:2Eb 15:18; Nz 105:8-11
Eba. 17:2Eb 22:17; Mib 1:10; Ebr 11:11, 12
Eba. 17:4Nz 105:9-11
Eba. 17:4Eb 13:16; Ro 4:17
Eba. 17:6Eb 35:10, 11
Eba. 17:7Lk 1:72, 73
Eba. 17:8Kob 6:4; Ebr 11:8, 9
Eba. 17:8Mib 14:2
Eba. 17:10Eb 21:4; Ro 2:29
Eba. 17:11Mis 7:8; Ro 4:11
Eba. 17:12Lk 2:21
Eba. 17:13Kob 12:44
Eba. 17:15Eb 11:29
Eba. 17:16Eb 18:10
Eba. 17:17Eb 18:12
Eba. 17:17Ro 4:19; Ebr 11:11
Eba. 17:18Eb 16:11
Eba. 17:19Mt 1:2
Eba. 17:19Eb 26:24
Eba. 17:20Eb 16:10; 21:13, 18; 25:13-16; 1Nt 1:29-31
Eba. 17:21Eb 26:3; Ebr 11:8, 9
Eba. 17:21Eb 18:10, 14; 21:1
Eba. 17:23Eb 17:13
Eba. 17:24Mis 7:8; Ro 4:11
Eba. 17:25Eb 16:16
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 17:1-27

Ebandeli

17 Ntango Abrama akómaki na mbula 99, Yehova abimelaki ye mpe alobaki na ye ete: “Ngai nazali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Tambolá liboso na ngai mpe zalá sembo.* 2 Nakokokisa mpenza kondimana oyo nasalaki kati na ngai ná yo,+ mpe nakokómisa yo ebele, ebele mpenza.”+

3 Bongo Abrama afukamaki mpe atyaki elongi na nse, mpe Nzambe akobaki kosolola na ye, alobaki ete: 4 “Talá! Ngai, nasali kondimana elongo na yo,+ mpe okokóma mpenza tata ya bikólo ebele.+ 5 Bakobenga yo lisusu Abrama* te, nkombo na yo ekokóma nde Abrahama,* mpo nakokómisa yo tata ya bikólo ebele. 6 Nakosala ete obota mingi, mingi mpenza mpe nakokómisa yo bikólo, mpe bakonzi bakobima epai na yo.+

7 “Mpe nakokokisa kondimana na ngai oyo ezali kati na ngai ná yo+ mpe ná bato ya libota* na yo, oyo bakoya nsima na yo, ná mabota na bango mpo na kondimana moko ya libela, mpo nazala Nzambe na yo mpe ya bato ya libota* na yo, oyo bakoya nsima na yo. 8 Mpe nakopesa yo ná bato ya libota* na yo, oyo bakoya nsima na yo, mokili oyo ofandaki mopaya+—mokili mobimba ya Kanana—mpo ezala ya bino mpo na libela, mpe nakozala Nzambe na bango.”+

9 Nzambe alobaki lisusu na Abrahama ete: “Kasi yo, osengeli kobatela kondimana na ngai, yo ná bato ya libota* na yo, oyo bakoya nsima na yo, na mabota na bango. 10 Oyo ezali kondimana kati na ngai ná yo, oyo bokobatela yo ná bato ya libota* na yo: Mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.+ 11 Bosengeli kokata mosuni ya misutu na bino, mpe ekozala elembo ya kondimana kati na ngai ná bino.+ 12 Na mabota na bino, ezala oyo ekoya nsima, mwana mobali nyonso kati na bino oyo azali na mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga:+ mwana mobali oyo abotami na ndako na yo mpe oyo asombami na mbongo epai ya mopaya mpe oyo auti na libota* na yo te. 13 Mobali nyonso oyo abotami na ndako na yo to oyo asombami na mbongo na yo asengeli kokatama ngenga;+ mpe kondimana na ngai na mosuni na bino esengeli kozala kondimana ya libela. 14 Mobali oyo akatami ngenga te, oyo mosuni ya mosutu na ye ekokatama te, moto* yango asengeli kolongolama* kati na bato na ye, mpo abuki kondimana na ngai.”

15 Na nsima, Nzambe alobaki na Abrahama ete: “Mpo na mwasi na yo Sarai,*+ okobenga ye lisusu Sarai te, mpo Sara* nde ekokóma nkombo na ye. 16 Nakopambola ye mpe lisusu nakopesa yo mwana mobali na nzela na ye;+ nakopambola ye mpe akokóma bikólo; bakonzi ya bato ya bikólo bakobima epai na ye.” 17 Bongo Abrahama afukamaki mpe atyaki elongi na nse mpe abandaki kosɛka mpe koloba na motema+ na ye ete: “Mobali ya mbula 100 akobota mwana, mpe Sara, mwasi ya mbula 90 akobota?”+

18 Nsima na yango, Abrahama alobaki na Nzambe ya solo ete: “Ee, Yishimaele azala na bomoi liboso na yo!”+ 19 Na yango, Nzambe alobaki ete: “Mwasi na yo Sara akobotela yo mpenza mwana mobali, mpe osengeli kopesa ye nkombo Yisaka.*+ Mpe nakosala kondimana na ngai elongo na ye mpo ezala kondimana moko ya libela mpo na bato ya libota* na ye, oyo bakoya nsima na ye.+ 20 Kasi mpo na Yishimaele, nayoki yo. Talá! Nakopambola ye mpe nakosala ete abota mingi mpe nakokómisa ye ebele, ebele mpenza. Akobimisa bankumu 12, mpe nakokómisa ye ekólo moko monene.+ 21 Kasi, nakokokisa mpenza kondimana na ngai oyo nakosala ná Yisaka,+ mwana oyo Sara akobotela yo na ntango lokola oyo, na mbula oyo ekoya.”+

22 Ntango asilisaki kosolola na Abrahama, Nzambe amataki, atiki ye. 23 Na nsima, Abrahama azwaki Yishimaele, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo babotami na ndako na ye mpe mobali nyonso oyo ye asombaki na mbongo, mobali nyonso ya ndako ya Abrahama, mpe akataki mosuni ya misutu na bango kaka na mokolo yango, ndenge Nzambe ayebisaki ye.+ 24 Abrahama azalaki na mbula 99 ntango bakataki ye mosuni ya mosutu.+ 25 Mpe Yishimaele, mwana ya Abrahama ya mobali, azalaki na mbula 13 ntango bakataki ye mosuni ya mosutu.+ 26 Kaka na mokolo yango, Abrahama mpe mwana na ye ya mobali Yishimaele, bakatamaki ngenga. 27 Mibali nyonso ya ndako na ye, mobali nyonso oyo abotami na ndako na ye mpe oyo asombami na mbongo epai ya mopaya, bakatamaki mpe ngenga elongo na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto