Yosua
11 Ntango kaka Yabine mokonzi ya Hazore ayokaki yango, atindaki maloba epai ya Yobabe mokonzi ya Madone,+ epai ya mokonzi ya Shimirone, epai ya mokonzi ya Akashafe,+ 2 epai ya bakonzi oyo bazalaki na nɔrdi na etúká ya ngombangomba, mpe baoyo bazalaki na mokili patatalu* na sudi ya Kinerete, mpe baoyo bazalaki na Shefela, mpe na bisika oyo bangomba ekitá na Dore+ na wɛsti, 3 mpe epai ya Bakanana+ na ɛsti mpe na wɛsti, epai ya Baamore,+ Bahiti, Baperizi, Bayebusi, oyo bazalaki kofanda na etúká ya ngombangomba, mpe ná Bahivi,+ oyo bazalaki kofanda na nse ya Heremone,+ na mokili ya Mizipa. 4 Na yango babimaki elongo na mampinga na bango, bato ebele mpenza lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu; bazalaki mpe na ebele ya bampunda mpe makalo ya bitumba. 5 Bakonzi wana nyonso bayokanaki ete bákutana esika moko mpe batyaki kaa na bango pene na mai ya Merome mpo na kobundisa Yisraele.
6 Na yango, Yehova alobaki na Yosua boye: “Kobanga bango te,+ mpo lobi, na bangonga oyo, nakokaba bango nyonso na lobɔkɔ ya Yisraele, mpe bokosilisa bango nyonso. Okokata misisa ya mabɔlɔngɔ ya makolo ya nsima ya bampunda na bango,+ mpe okotumba makalo na bango.” 7 Yosua elongo na mibali nyonso ya etumba babimelaki bango na mbalakaka mpe babundisaki bango pembenipembeni ya mai ya Merome. 8 Yehova apesaki bango na lobɔkɔ ya Yisraele,+ mpe Bayisraele balongaki bango mpe balandaki bango tii na Sidone Monene+ mpe na Misirefote-maime+ mpe na Lobwaku ya Mizipe na ɛsti, mpe babomaki bango tii ntango bango nyonso basilaki.+ 9 Na nsima Yosua asalaki bango kaka ndenge Yehova ayebisaki ye; akataki misisa ya mabɔlɔngɔ ya makolo ya nsima ya bampunda na bango mpe atumbaki makalo na bango.+
10 Lisusu, Yosua azongaki mpe azwaki Hazore mpe abomaki mokonzi na yango na mopanga,+ mpo liboso Hazore ezalaki engumba oyo elekaki bingumba ya makonzi wana nyonso. 11 Babomaki na mopanga moto* nyonso oyo azalaki kuna.+ Ata moto moko te atikalaki na bomoi.+ Na nsima, atumbaki Hazore. 12 Yosua azwaki bingumba yango nyonso mpe abomaki bakonzi na yango nyonso na mopanga.+ Abomaki bango nyonso,+ kaka ndenge Moize mosaleli ya Yehova apesaki mitindo. 13 Nzokande na bingumba nyonso oyo ezalaki likoló ya mwa bangomba, Yisraele etumbaki ata moko te, longola kaka Hazore; yango ezalaki engumba kaka moko oyo Yosua atumbaki. 14 Bayisraele bazwaki mpo na bango moko biloko nyonso ya kopunza mpe bibwɛlɛ nyonso ya bingumba yango.+ Kasi babomaki bato nyonso na mopanga tii basilisaki bango.+ Batikaki ata moto moko te na bomoi.+ 15 Kaka ndenge Yehova apesaki Moize mosaleli na ye mitindo, ndenge wana nde Moize apesaki Yosua mitindo,+ mpe Yosua asalaki kaka bongo. Asalaki makambo nyonso oyo Yehova apesaki Moize mitindo.+
16 Yosua alongaki mokili yango mobimba, etúká ya ngombangomba, Negebe+ mobimba, mokili mobimba ya Goshene, Shefela,+ Araba,+ mpe etúká ya ngombangomba ya Yisraele ná Shefela* na yango, 17 banda na Ngomba Halake, oyo emati na Seire, tii na Baala-gade+ na Lobwaku ya Liban, na nse ya Ngomba Heremone.+ Akangaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango. 18 Bitumba oyo Yosua abundaki na bakonzi wana nyonso ezwaki mwa ntango. 19 Engumba moko te esalaki boyokani ya kimya ná Bayisraele, longola kaka Bahivi oyo bazalaki kofanda na Gibeone.+ Bayisraele balongaki bingumba mosusu nyonso na bitumba.+ 20 Yehova nde azalaki kotika ete mitema na bango ekóma makasi+ mpo bábundisa Yisraele, mpe aboma bango nyonso kozanga komonisela bango boboto.+ Basengelaki kosilisama, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+
21 Na ntango yango nde Yosua asilisaki Baanakime+ nyonso na etúká ya ngombangomba, na Hebrone, na Debire, na Anabe, na etúká mobimba ya ngombangomba ya Yuda, mpe na etúká mobimba ya ngombangomba ya Yisraele. Yosua abomaki bango mpe abebisaki bingumba na bango.+ 22 Ata Anakime moko te atikalaki na mokili ya Bayisraele. Batikalaki+ kaka na Gaza,+ na Gate+ mpe na Ashedode.+ 23 Na ndenge wana nde Yosua azwaki mokili yango mobimba, kaka ndenge Yehova alakaki Moize.+ Bongo Yosua apesaki Yisraele mokili yango lokola libula, mpo bákabola yango libota na libota.+ Mpe mokili yango ekómaki na kimya, bitumba ezalaki lisusu te.+