Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Abrama abikisi Lota (1-16)

      • Melekisedeke apamboli Abrama (17-24)

Ebandeli 14:1

Mitindami

  • +Eb 10:9, 10
  • +Eb 14:17
  • +Eb 10:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2001, lok. 23

Ebandeli 14:2

Mitindami

  • +Eb 10:19; 13:12
  • +Eb 13:10, 12
  • +Mib 29:23

Ebandeli 14:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lobwaku patatalu.”

  • *

    Elingi koloba, “Mbu Ekufá.”

Mitindami

  • +Eb 14:10
  • +Mit 34:2, 12

Ebandeli 14:5

Mitindami

  • +Mib 2:10, 11

Ebandeli 14:6

Mitindami

  • +Mib 2:12
  • +Eb 36:8

Ebandeli 14:7

Mitindami

  • +Mit 20:1
  • +Eb 36:12; 1Sa 15:2
  • +Eb 10:15, 16
  • +2Nt 20:2

Ebandeli 14:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lobwaku patatalu.”

Ebandeli 14:9

Mitindami

  • +Eb 14:1, 2

Ebandeli 14:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lobwaku patatalu.”

Ebandeli 14:11

Mitindami

  • +Eb 14:16

Ebandeli 14:12

Mitindami

  • +Eb 19:1

Ebandeli 14:13

Mitindami

  • +Eb 13:18
  • +Eb 14:24

Ebandeli 14:14

Mitindami

  • +Eb 11:27
  • +Bas 18:29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2009, lok. 3

    15/5/2004, nk. 26-27

    15/8/2001, nk. 23-24

Ebandeli 14:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Lobwaku patatalu.”

Mitindami

  • +2Sa 18:18

Ebandeli 14:18

Mitindami

  • +Nz 110:4; Ebr 6:20
  • +Ebr 7:1, 2
  • +Nz 83:18; Ebr 5:5, 10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 18

Ebandeli 14:20

Mitindami

  • +Ebr 7:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/1990, nk. 19-20

Ebandeli 14:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo.”

Ebandeli 14:23

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “busi.”

Ebandeli 14:24

Mitindami

  • +Eb 14:13

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 14:1Eb 10:9, 10
Eba. 14:1Eb 14:17
Eba. 14:1Eb 10:22
Eba. 14:2Eb 10:19; 13:12
Eba. 14:2Eb 13:10, 12
Eba. 14:2Mib 29:23
Eba. 14:3Eb 14:10
Eba. 14:3Mit 34:2, 12
Eba. 14:5Mib 2:10, 11
Eba. 14:6Mib 2:12
Eba. 14:6Eb 36:8
Eba. 14:7Mit 20:1
Eba. 14:7Eb 36:12; 1Sa 15:2
Eba. 14:7Eb 10:15, 16
Eba. 14:72Nt 20:2
Eba. 14:9Eb 14:1, 2
Eba. 14:11Eb 14:16
Eba. 14:12Eb 19:1
Eba. 14:13Eb 13:18
Eba. 14:13Eb 14:24
Eba. 14:14Eb 11:27
Eba. 14:14Bas 18:29
Eba. 14:172Sa 18:18
Eba. 14:18Nz 110:4; Ebr 6:20
Eba. 14:18Ebr 7:1, 2
Eba. 14:18Nz 83:18; Ebr 5:5, 10
Eba. 14:20Ebr 7:4
Eba. 14:24Eb 14:13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 14:1-24

Ebandeli

14 Na mikolo ya Amirafele mokonzi ya Shinare,+ Arioke mokonzi ya Elasare, Kedolaomere+ mokonzi ya Elame,+ mpe Tidale mokonzi ya Goyime, 2 bakonzi yango babundaki na Bera mokonzi ya Sodoma,+ Birisha mokonzi ya Gomora,+ Shinabe mokonzi ya Adema, Shemebere mokonzi ya Zeboyime,+ mpe mokonzi ya Bela, elingi koloba, Zoare. 3 Bango nyonso bakutanaki na Lobwaku* ya Sidime,+ elingi koloba, Mbu ya Mungwa.*+

4 Basalelaki Kedolaomere mbula 12, kasi na mbula ya 13 batombokaki. 5 Na mbula ya 14, Kedolaomere ná bakonzi oyo bazalaki elongo na ye bayaki, mpe balongaki Barefaime na Asheterote-karnaime, Bazuzime na Hame, Baemime+ na Shave-kiriataime, 6 mpe Bahori+ na ngomba na bango ya Seire,+ tii na Ele-parane, oyo ezali na esobe. 7 Na nsima, babalukaki mpe bayaki tii na Ene-mishipate, elingi koloba, Kadeshe,+ mpe balongaki teritware mobimba ya Baamaleke+ ná Baamore+ oyo bazalaki kofanda na Hazazone-tamara.+

8 Na yango, mokonzi ya Sodoma abandaki kotambola ná mokonzi ya Gomora, mokonzi ya Adema, mokonzi ya Zeboyime, mpe mokonzi ya Bela, elingi koloba, Zoare, mpe basalaki milɔngɔ lokola basoda mpo na kobunda na bango na Lobwaku* ya Sidime, 9 mpo na kobunda na Kedolaomere mokonzi ya Elame, Tidale mokonzi ya Goyime, Amirafele mokonzi ya Shinare mpe Arioke mokonzi ya Elasare+—bakonzi minei bábunda na bakonzi yango mitano. 10 Kasi Lobwaku* ya Sidime etondaki na mabulu ya gudrɔ; mpe ntango bakonzi ya Sodoma mpe ya Gomora balukaki kokima, bakweaki na mabulu yango, mpe baoyo batikalaki bakimaki na etúká ya ngombangomba. 11 Na yango, baoyo balongaki bazwaki biloko nyonso ya Sodoma ná Gomora mpe bilei na bango nyonso, mpe bakendaki.+ 12 Bazwaki mpe Lota mwana ya ndeko ya Abrama, oyo azalaki kofanda na Sodoma,+ bazwaki ná biloko na ye mpe bakendaki.

13 Nsima na yango, moto moko oyo abikaki na etumba ayaki kopesa Abrama Moebre nsango. Na ntango yango, Abrama azalaki kofanda na bahema pene na banzete minene ya Mamare Moamore,+ ndeko ya Eshikole mpe ya Anere.+ Bato yango basalaki boyokani na Abrama. 14 Bongo Abrama ayokaki ete bakangi ndeko na ye.+ Na yango, ayanganisaki mibali na ye oyo babongisamá mpo na etumba, basali 318 oyo babotamaki na ndako na ye, mpe alandaki bakonzi yango tii na Dani.+ 15 Na butu, akabolaki mampinga na ye, mpe ye ná basali na ye babundaki mpe balongaki bango. Mpe alandaki bango tii na Hoba, oyo ezali na nɔrdi ya Damasi. 16 Azwaki biloko nyonso oyo babɔtɔlaki, azwaki mpe Lota ndeko na ye, biloko na ye ná basi mpe bato mosusu.

17 Ntango Abrama autaki kolonga Kedolaomere mpe bakonzi oyo bazalaki elongo na ye, mokonzi ya Sodoma akendaki kokutana na Abrama na Lobwaku* ya Shave, elingi koloba, Lobwaku ya mokonzi.+ 18 Mpe Melekisedeke,+ mokonzi ya Saleme,+ abimisaki mampa mpe vinyo; azalaki nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.+

19 Bongo apambolaki ye mpe alobaki ete:

“Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,

Oyo asalá likoló ná mabele

Apambola Abrama!

20 Mpe Nzambe Oyo-Aleki-Likoló asanzolama,

Ye oyo akabi banguna na yo na lobɔkɔ na yo!”

Mpe Abrama apesaki ye moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso.+

21 Nsima na yango, mokonzi ya Sodoma alobaki na Abrama ete: “Pesá ngai bato,* kasi yo zwá biloko.” 22 Bongo, Abrama alobaki na mokonzi ya Sodoma ete: “Natomboli lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai epai ya Yehova Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Oyo asalá likoló ná mabele, 23 ete, nakozwa eloko moko te na biloko na yo, banda na mwa nsinga* tii na nsinga ya sandale, mpo oloba te: ‘Ngai nde nakómisi Abrama mozwi.’ 24 Nakozwa ata eloko moko te, longola kaka oyo bilenge mibali balyaki. Mpo na likabo ya mibali oyo bakendaki elongo na ngai, Anere, Eshikole mpe Mamare+—tiká bango bázwa likabo na bango.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto