Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 23
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ebandeli

      • Liwa ya Sara mpe esika bakundaki ye (1-20)

Ebandeli 23:1

Mitindami

  • +Eb 17:17

Ebandeli 23:2

Mitindami

  • +Yos 14:15
  • +Eb 35:27; Mit 13:22
  • +Eb 12:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya bato nyonso),

    No. 3 2016 lok. 4

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/1995, lok. 7

    Lamuká!,

    4/1994, lok. 26

Ebandeli 23:3

Mitindami

  • +Eb 10:15

Ebandeli 23:4

Mitindami

  • +Eb 17:1, 8; Ebr 11:9, 13

Ebandeli 23:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “mokonzi monene.”

Mitindami

  • +Eb 21:22

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2001, lok. 21

Ebandeli 23:7

Mitindami

  • +1Nt 1:13

Ebandeli 23:9

Mitindami

  • +Eb 23:15
  • +Eb 25:9, 10; 49:29-33; 50:13, 14

Ebandeli 23:10

Mitindami

  • +Rt 4:1

Ebandeli 23:15

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

Ebandeli 23:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Shekele moko = 11,4 g. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Mis 7:15, 16

Ebandeli 23:20

Mitindami

  • +Eb 25:9, 10; 49:29-33; 50:13, 14

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1994, lok. 32

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Eba. 23:1Eb 17:17
Eba. 23:2Yos 14:15
Eba. 23:2Eb 35:27; Mit 13:22
Eba. 23:2Eb 12:5
Eba. 23:3Eb 10:15
Eba. 23:4Eb 17:1, 8; Ebr 11:9, 13
Eba. 23:6Eb 21:22
Eba. 23:71Nt 1:13
Eba. 23:9Eb 23:15
Eba. 23:9Eb 25:9, 10; 49:29-33; 50:13, 14
Eba. 23:10Rt 4:1
Eba. 23:16Mis 7:15, 16
Eba. 23:20Eb 25:9, 10; 49:29-33; 50:13, 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ebandeli 23:1-20

Ebandeli

23 Mpe Sara aumelaki na bomoi mbula 127; yango nde mbula ya bomoi+ na ye. 2 Bongo Sara akufaki na Kiriate-arba,+ elingi koloba Hebrone,+ na mokili ya Kanana,+ mpe Abrahama abandaki kolela Sara makasi mpe abimisaki mai ya miso. 3 Na nsima, Abrahama atɛlɛmaki mpe alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye, mpe alobaki na bana ya Hete+ boye: 4 “Nafandi mopaya epai na bino mpe nautá mboka mosusu.+ Bópesa ngai esika ya kokunda bibembe epai na bino mpo nakunda mwasi na ngai.” 5 Na yango, bana ya Hete bayanolaki Abrahama ete: 6 “Yoká biso, nkolo na ngai. Epai na biso ozali nkumu ya Nzambe.*+ Okoki kokunda ebembe na yo na malita na biso oyo eleki kitoko. Moto moko te kati na biso akoboya okunda ebembe na yo na lilita na ye.”

7 Na yango, Abrahama atɛlɛmaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka, liboso ya bana ya Hete,+ 8 mpe alobaki na bango ete: “Soki bondimi nakunda ebembe na ngai, boye bóyoka ngai mpe bóbondela Efrone mwana ya Zohare 9 atɛkela ngai mobenga ya Makapela, oyo ezali ya ye; oyo ezali na nsuka ya elanga na ye. Atɛkela ngai yango na miso na bino na ntalo mobimba ya palata+ mpo nazwa esika ya kokunda bibembe.”+

10 Sikoyo Efrone afandaki kati na bana ya Hete. Bongo Efrone Mohiti ayanolaki Abrahama na matoi ya bana ya Hete, mpe liboso ya bato nyonso oyo bakɔtaki na porte ya engumba+ na ye, alobaki ete: 11 “Te, nkolo na ngai! Yoká ngai. Napesi yo elanga ná mobenga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango na miso ya bana ya bato na ngai. Kundá ebembe na yo.” 12 Na yango, Abrahama agumbamaki liboso ya bato ya mboka, 13 mpe alobaki na Efrone na matoi ya bato ya mboka ete: “Yoká ngai, soki olingi! Nakopesa yo ntalo mobimba ya palata mpo na elanga. Zwá yango na lobɔkɔ na ngai, mpo nakunda ebembe na ngai kuna.”

14 Bongo Efrone ayanolaki Abrahama ete: 15 “Nkolo na ngai, yoká ngai. Eteni oyo ya mabele ya motuya ya shekele* 400 ya palata, ezali na ntina te. Boye, kundá ebembe na yo.” 16 Abrahama ayokelaki Efrone, mpe atyelaki Efrone na kilo ntalo ya palata oyo alobaki na matoi ya bana ya Hete, shekele* ya palata 400 na kotalela kilo oyo bato ya mombongo bazalaki kondima.+ 17 Na yango, elanga ya Efrone ya Makapela, oyo etalani na Mamare—elanga ná mobenga oyo ezalaki kati na yango mpe ná banzete nyonso oyo ezalaki na elanga, oyo ezalaki kati na bandelo na yango—endimamaki lokola 18 esika oyo Abrahama asombi na miso ya bana ya Hete, liboso ya bato nyonso oyo bazalaki kokɔta na porte ya engumba na ye. 19 Nsima na yango, Abrahama akundaki mwasi na ye Sara na mobenga ya elanga ya Makapela oyo etalani na Mamare, elingi koloba, Hebrone, na mokili ya Kanana. 20 Bongo bana ya Hete bandimaki ete elanga mpe mobenga oyo ezalaki kati na yango, ekóma ya Abrahama, mpo ezala esika ya kokunda bibembe.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto