Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 5
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Basambisi

      • Loyembo ya bolongi ya Debora mpe Barake (1-31)

        • Minzoto ebundisi Sisera (20)

        • Mokɛli ya Kishone etondi (21)

        • Baoyo balingaka Yehova bazali lokola moi (31)

Basambisi 5:1

Mitindami

  • +Bas 4:4
  • +Bas 4:6; Ebr 11:32
  • +Kob 15:1; Nz 18:maloba ya ebandeli ya loyembo

Basambisi 5:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mosusu maloba oyo emonisi ete moto asali elako to amipesi na Nzambe.

Mitindami

  • +Bas 4:10

Basambisi 5:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

Mitindami

  • +Kob 20:2
  • +2Sa 22:50; Nz 7:17

Basambisi 5:4

Mitindami

  • +Mib 33:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, lok. 14

Basambisi 5:5

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “eninganaki.”

Mitindami

  • +Mib 4:11
  • +Kob 19:18; Ne 9:13
  • +Kob 20:2

Basambisi 5:6

Mitindami

  • +Bas 3:31
  • +Bas 4:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, nk. 12-13

Basambisi 5:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “basilaki.”

Mitindami

  • +Bas 4:4
  • +Bas 4:5

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, nk. 12-13

    15/11/2003, lok. 28

Basambisi 5:8

Mitindami

  • +Mib 32:16, 17; Bas 2:12
  • +Bas 4:1-3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, lok. 12

    15/11/2003, lok. 29

    15/12/1998, nk. 11-12

Basambisi 5:9

Mitindami

  • +Bas 4:6
  • +Bas 4:10

Basambisi 5:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 31

Basambisi 5:12

Mitindami

  • +Bas 4:4
  • +Bas 5:1
  • +Bas 4:6

Basambisi 5:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lobwaku patatalu.”

  • *

    To mbala mosusu, “baoyo bazalaki kosalela biloko ya mosala ya mokomeli.”

Mitindami

  • +Mit 32:39

Basambisi 5:15

Mitindami

  • +Bas 4:6; Ebr 11:32
  • +Bas 4:14

Basambisi 5:16

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lokola nyama oyo amemi kilo mibale.”

Mitindami

  • +Mit 32:1

Basambisi 5:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “na bisika na ye ya kosɛma.”

Mitindami

  • +Yos 22:9
  • +Yos 19:46, 48
  • +Yos 19:24, 29

Basambisi 5:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “milimo.”

Mitindami

  • +Bas 4:6, 10
  • +Bas 4:14

Basambisi 5:19

Mitindami

  • +Bas 4:13
  • +Bas 1:27
  • +Bas 4:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, lok. 14

Basambisi 5:20

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 30

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2005, lok. 25

    15/11/2003, lok. 30

Basambisi 5:21

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Mai.”

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Bas 4:7, 13; Nz 83:9

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, lok. 30

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, lok. 14

    15/12/1998, nk. 11-12

Basambisi 5:22

Mitindami

  • +Nz 20:7; Mas 21:31

Basambisi 5:23

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    4/2017, nk. 30-31

Basambisi 5:24

Mitindami

  • +Bas 4:17
  • +Bas 4:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, lok. 15

Basambisi 5:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “krɛmɛ.”

Mitindami

  • +Bas 4:19

Basambisi 5:26

Mitindami

  • +Bas 4:21, 22

Basambisi 5:28

Mitindami

  • +Bas 4:15, 16

Basambisi 5:30

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Libumu.”

  • *

    Lil., “mabumu.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/8/2015, lok. 13

    15/11/2003, lok. 31

Basambisi 5:31

Mitindami

  • +Nz 83:9
  • +Bas 3:10, 11, 30

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    “Makomami nyonso,” lok. 50

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Bas. 5:1Bas 4:4
Bas. 5:1Bas 4:6; Ebr 11:32
Bas. 5:1Kob 15:1; Nz 18:maloba ya ebandeli ya loyembo
Bas. 5:2Bas 4:10
Bas. 5:3Kob 20:2
Bas. 5:32Sa 22:50; Nz 7:17
Bas. 5:4Mib 33:2
Bas. 5:5Mib 4:11
Bas. 5:5Kob 19:18; Ne 9:13
Bas. 5:5Kob 20:2
Bas. 5:6Bas 3:31
Bas. 5:6Bas 4:17
Bas. 5:7Bas 4:4
Bas. 5:7Bas 4:5
Bas. 5:8Mib 32:16, 17; Bas 2:12
Bas. 5:8Bas 4:1-3
Bas. 5:9Bas 4:6
Bas. 5:9Bas 4:10
Bas. 5:12Bas 4:4
Bas. 5:12Bas 5:1
Bas. 5:12Bas 4:6
Bas. 5:14Mit 32:39
Bas. 5:15Bas 4:6; Ebr 11:32
Bas. 5:15Bas 4:14
Bas. 5:16Mit 32:1
Bas. 5:17Yos 22:9
Bas. 5:17Yos 19:46, 48
Bas. 5:17Yos 19:24, 29
Bas. 5:18Bas 4:6, 10
Bas. 5:18Bas 4:14
Bas. 5:19Bas 4:13
Bas. 5:19Bas 1:27
Bas. 5:19Bas 4:16
Bas. 5:21Bas 4:7, 13; Nz 83:9
Bas. 5:22Nz 20:7; Mas 21:31
Bas. 5:24Bas 4:17
Bas. 5:24Bas 4:11
Bas. 5:25Bas 4:19
Bas. 5:26Bas 4:21, 22
Bas. 5:28Bas 4:15, 16
Bas. 5:31Nz 83:9
Bas. 5:31Bas 3:10, 11, 30
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Basambisi 5:1-31

Basambisi

5 Na mokolo yango, Debora+ ná Barake,+ mwana ya Abinoame, bayembaki loyembo oyo:+

 2 “Lokola bilombe ya etumba na Yisraele bafungoli nsuki na bango,*

Lokola bato bamipesi bango moko,+

Bósanzola Yehova!

 3 Bóyoka, bino bakonzi! Bótya litoi, bino bayangeli!

Nakoyembela Yehova.

Nakoyemba mpo na kosanzola* Yehova,+ Nzambe ya Yisraele.+

 4 Yehova, ntango obimaki na Seire,+

Ntango olongwaki na teritware ya Edome,

Mabele eninganaki, mpe likoló esopanaki,

Mapata esopaki mai.

 5 Bangomba enyangwaki* liboso ya Yehova,+

Ata Sinai enyangwaki liboso ya Yehova,+ Nzambe ya Yisraele.+

 6 Na mikolo ya Shamagare+ mwana ya Anate,

Na mikolo ya Yaele,+ banzela ekaukaki;

Bato ya mibembo bazalaki koleka na banzela ya mike.

 7 Bato oyo bafandaka na bamboka na Yisraele bazalaki lisusu te;*

Bazalaki lisusu te tii ntango ngai Debora+ natɛlɛmaki,

Tii ntango natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele.+

 8 Bato baponaki banzambe ya sika;+

Bongo etumba ezalaki na baporte ya bingumba.+

Nguba ezalaki komonana te, ata likɔnga mpe te,

Kati na bato 40 000 na Yisraele.

 9 Motema na ngai ezali elongo na bakomanda ya Yisraele,+

Baoyo bamipesaki bango moko mpe bakendaki elongo na bato.+

Bósanzola Yehova!

10 Bino batambwisi-mpunda ya langi ya mwa mosaka,

Bino baoyo bofandi na tapi ya kitoko mpenza,

Mpe bino baoyo bozali kotambola na nzela,

Bókanisa likambo oyo:

11 Mingongo ya bato oyo bamemelaka banyama mai eyokanaki na bisika ya kotoka mai;

Kuna bazalaki kolobela misala ya bosembo ya Yehova,

Misala ya bosembo ya bato na ye oyo bafandaka na bamboka na Yisraele.

Na nsima, bato ya Yehova bakitaki tii na baporte ya engumba.

12 Lamuká, lamuká, Ee Debora!+

Lamuká, lamuká, yembá loyembo!+

Tɛlɛmá, Barake!+ Memá bakangami na yo, yo mwana ya Abinoame!

13 Na nsima, bato oyo batikalaki bakitaki epai ya bato ya lokumu;

Bato ya Yehova bakitaki epai na ngai mpo na kobunda na bato ya nguya.

14 Baoyo bazali na lobwaku* bautaki na Efraime;

Bazali kolanda yo, Ee Benyamina, kati na bato na yo.

Bakomanda bautaki na Makire+ mpe bakitaki,

Mpe baoyo bazali kozwa bato mpo na mosala ya soda* bautaki na Zebulone.

15 Bankumu ya Isakare bazalaki elongo na Debora;

Kaka ndenge Isakare asalaki, Barake+ mpe asalaki bongo.

Batindaki ye akende na makolo na lobwaku patatalu.+

Bato ya libota ya Rubene bazalaki komitunatuna mingi na motema.

16 Mpo na nini ofandaki na katikati ya mabenga mibale ya kiti ya mpunda,*

Mpe oyokaki babateli ya mpate bazali kobɛta piololo mpo na bitonga?+

Bato ya libota ya Rubene bazalaki komitunatuna mingi na motema.

17 Gileade atikalaki na ngámbo mosusu ya Yordani;+

Mpe Dani, mpo na nini atikalaki na bamasuwa?+

Ashere afandaki mpamba pembeni ya mbu,

Mpe atikalaki na mabongo na ye.*+

18 Bato ya libota ya Zebulone batyaki bomoi* na bango na likama tii pene na liwa;

Bato ya libota ya Nafatali basalaki mpe bongo,+ likoló ya bangomba.+

19 Bakonzi bayaki mpe babundaki;

Bongo bakonzi ya Kanana babundaki+

Na Taanake, pene na mai ya Megido.+

Bapunzaki palata te.+

20 Longwa na likoló, minzoto ebundaki;

Longwa na banzela na yango, ebundisaki Sisera.

21 Mokɛli* ya Kishone ekɔmbɔlaki bango,+

Mokɛli yango ya kalakala, mokɛli ya Kishone.

Onyataki bato ya nguya, Ee molimo* na ngai.

22 Na nsima, basabo ya bampunda ebɛtabɛtaki mabele

Wana bampunda na ye ya mibali ezalaki kopota mbangu na nkanda mpenza.+

23 Anzelu ya Yehova alobaki: ‘Bólakela Meroze mabe,

Bólakela bato oyo bafandi kuna mabe,

Mpo bayaki te kopesa Yehova mabɔkɔ,

Bayaki te na bilombe na bango mpo na kopesa Yehova mabɔkɔ.’

24 Mwasi oyo apambwami koleka basi nyonso ezali Yaele+

Mwasi ya Hebere+ Mokeni;

Apambwami koleka basi nyonso oyo bafandaka na bahema.

25 Asɛngaki ye mai; Yaele apesaki ye miliki.

Na kati ya saani monene ya fɛti, apesaki ye miliki ya kilo.*+

26 Asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kozwa pike ya hema,

Lobɔkɔ na ye ya mobali mpo na kozwa marto ya kilo.

Mpe abɛtaki Sisera na marto, apanzaki motó na ye,

Bongo apanzaki mpe atɔbɔlaki mopanzi ya motó na ye.+

27 Abambanaki na katikati ya makolo na ye; akweaki, alalaki, mpe azalaki koningana te;

Abambanaki mpe akweaki na katikati ya makolo na ye;

Esika abambanaki, kuna nde akweaki mpe akufaki.

28 Na fɛnɛtrɛ, mwasi moko azalaki kotala libándá,

Mama ya Sisera azalaki kotala na fɛnɛtrɛ:

‘Mpo na nini likalo na ye eumeli boye?

Mpo na nini lokito ya bampunda ya makalo na ye ezali koya noki te?’+

29 Baoyo baleki na bwanya kati na basi na ye nyonso ya lokumu bazalaki kopesa ye eyano;

Ɛɛ, ye mpe azalaki kolobaloba ye moko:

30 ‘Na ntembe te, bazali kokabola biloko oyo bapunzi,

Elenge mwasi* moko, bilenge basi* mibale, mpo na mobali ya etumba mokomoko,

Bilamba ya langilangi oyo bapunzi mpo na Sisera, bilamba ya langilangi oyo bapunzi,

Elamba ya mayemi ya nsingansinga, elamba ya langilangi, bilamba mibale ya mayemi ya nsingansinga

Mpo na bankingo ya bapunzi.’

31 Na yango, tiká banguna na yo nyonso básila,+ Ee Yehova,

Kasi tiká bato oyo balingaka yo bázala lokola moi ntango ebimaka na nkembo na yango.”

Bongo mokili yango ekómaki na kimya mbula 40.+

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto