Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Loyembo ya Salomo 8
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Loyembo ya Salomo

    • MOSHULAME NA YERUSALEME (3:6–8:4)

    • MOSHULAME AZONGI; AMONISI ETE AZALI SEMBO (8:5-14)

        • Bandeko mibali ya elenge mwasi (5a)

          • ‘Nani wana ayekameli bolingo na ye?’

        • Elenge mwasi (5b-7)

          • “Bolingo ezali makasi lokola liwa” (6)

        • Bandeko mibali ya elenge mwasi (8, 9)

          • “Soki azali efelo, . . . kasi soki azali porte, . . .” (9)

        • Elenge mwasi (10-12)

          • “Nazali efelo” (10)

        • Mobateli ya mpate (13)

          • ‘Tiká nayoka mongongo na yo’

        • Elenge mwasi (14)

          • “Zalá na mbangu lokola mboloko”

Loyembo ya Salomo 8:1

Mitindami

  • +Loy 1:2

Loyembo ya Salomo 8:2

Mitindami

  • +Loy 3:4

Loyembo ya Salomo 8:3

Mitindami

  • +Loy 2:6

Loyembo ya Salomo 8:4

Mitindami

  • +Loy 2:7; 3:5

Loyembo ya Salomo 8:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “Kokangama kaka na moto.”

  • *

    To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

  • *

    “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

Mitindami

  • +Yn 15:13; Ef 5:25; Em 12:11
  • +Mib 4:24; 1Yn 4:8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/1/2015, lok. 28

    15/5/2012, lok. 4

    15/11/2006, lok. 20

Loyembo ya Salomo 8:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To mbala mosusu, “ye.”

Mitindami

  • +1Ko 13:8, 13
  • +Ro 8:38, 39

Loyembo ya Salomo 8:8

Mitindami

  • +Loy 1:6

Loyembo ya Salomo 8:11

Mitindami

  • +Mos 2:4

Loyembo ya Salomo 8:13

Mitindami

  • +Loy 1:6; 6:11
  • +Loy 2:14

Loyembo ya Salomo 8:14

Mitindami

  • +Loy 2:9, 17

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Loy. 8:1Loy 1:2
Loy. 8:2Loy 3:4
Loy. 8:3Loy 2:6
Loy. 8:4Loy 2:7; 3:5
Loy. 8:6Yn 15:13; Ef 5:25; Em 12:11
Loy. 8:6Mib 4:24; 1Yn 4:8
Loy. 8:71Ko 13:8, 13
Loy. 8:7Ro 8:38, 39
Loy. 8:8Loy 1:6
Loy. 8:11Mos 2:4
Loy. 8:13Loy 1:6; 6:11
Loy. 8:13Loy 2:14
Loy. 8:14Loy 2:9, 17
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Loyembo ya Salomo 8:1-14

Loyembo ya Salomo

8 “Soki ozalaki ata lokola ndeko na ngai ya mobali,

Oyo amɛlaki mabɛlɛ ya mama na ngai!

Nalingaki kopwɛpwa yo+ soki nakutanaka na yo libándá,

Mpe moto moko te alingaki kotyola ngai.

 2 Nalingaki kokamba yo;

Nalingaki komema yo na ndako ya mama na ngai,+

Oyo ateyaki ngai.

Nalingaki kopesa yo vinyo oyo esangisami na matiti ya nsolo kitoko mpo omɛla,

Mai ya mbuma ya grenade oyo bauti kobimisa sika.

 3 Lobɔkɔ na ye ya mwasi elingaki kozala na nse ya motó na ngai,

Mpe lobɔkɔ na ye ya mobali elingaki kozinga ngai.+

 4 Ee bana basi ya Yerusaleme, nalapisi bino ndai:

Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolamuka.”+

 5 “Nani wana azali kobima na esobe,

Ayekameli bolingo na ye?”

“Nalamwisaki yo na nse ya nzete ya pɔme.

Kuna mama na yo azalaki na mpasi ya kobota yo.

Kuna nde moto oyo abotaki yo ayokaki mpasi ya kobota.

 6 Tyá ngai lokola kashɛ na motema na yo,

Lokola kashɛ na lobɔkɔ na yo,

Mpo bolingo ezali makasi lokola liwa,+

Bolingo ya makasi,* ezali makasi lokola Nkunda.*

Epelaka makasi lokola mɔtɔ, kopela ya mɔtɔ ya Yah.*+

 7 Ata mai oyo etomboki ekoki koboma mɔtɔ ya bolingo te,+

Bibale mpe ekoki komema yango te.+

Soki moto apesi bozwi nyonso ya ndako na ye mpo na bolingo,

Bakotyola yango* mpenza.”

 8 “Tozali na leki moko ya mwasi,+

Oyo abimi naino mabɛlɛ te.

Tokosala nini mpo na ndeko na biso ya mwasi

Mokolo oyo bakotuna ye libala?”

 9 “Soki azali efelo,

Tokotonga likoló na ye mwa efelo ya likoló oyo bakatakatá madusu ya palata,

Kasi soki azali porte,

Tokokanga ye na libaya ya sɛdrɛ.”

10 “Nazali efelo,

Mpe mabɛlɛ na ngai ezali lokola manɔ́ngi.

Yango wana, na miso na ye nakómi

Lokola mwasi oyo azali na kimya.

11 Salomo azalaki na elanga moko ya vinyo+ na Baala-hamone.

Apesaki elanga yango ya vinyo epai ya babateli.

Mokomoko azalaki koya na bashekele ya palata nkóto moko mpo na mbuma na yango.

12 Bashekele ya palata nkóto moko ezali ya yo, Ee Salomo,

Mpe nkama mibale mpo na baoyo babatelaka mbuma na yango.”

Kasi nazali na elanga na ngai ya vinyo, oyo ezali kaka mpo na ngai moko.

13 “Ee yo oyo ozali kofanda na bilanga,+

Baninga bazali koyoka mongongo na yo.

Tiká ngai mpe nayoka yango.”+

14 “Salá noki, bolingo na ngai,

Mpe zalá na mbangu lokola mboloko+

To lokola mwana ya nyama ebengami serfe

Likoló ya bangomba ya matiti ya nsolo kitoko.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto