Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 6
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Ezekiele

      • Mpasi oyo ekokómela bangomba ya Yisraele (1-14)

        • Bikeko ya bosɔtɔ ekosambwa (4-6)

        • “Bokoyeba mpenza ete nazali Yehova” (7)

Ezekiele 6:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe kolimbola nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.

Mitindami

  • +Yis 27:9
  • +Le 26:30

Ezekiele 6:5

Mitindami

  • +Yir 8:1, 2

Ezekiele 6:6

Mitindami

  • +Yir 2:15; 32:29; Mik 3:12
  • +Ezk 16:39

Ezekiele 6:7

Mitindami

  • +Yir 14:18
  • +Ezk 7:4

Ezekiele 6:8

Mitindami

  • +Yir 30:10; 44:28; Ezk 14:22

Ezekiele 6:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mpo na pite na bango.”

  • *

    To, “balandaki kosala pite na.”

  • *

    To, “mpe nkɛlɛ.”

Mitindami

  • +Mib 30:1, 2; Nz 137:1
  • +Nz 78:40, 41; Yis 63:10
  • +Mit 15:39
  • +Ezk 20:43; 36:31

Ezekiele 6:10

Mitindami

  • +Ezk 33:29; Da 9:12; Zek 1:6

Ezekiele 6:11

Mitindami

  • +Yir 15:2; 16:4; Ezk 5:12

Ezekiele 6:12

Mitindami

  • +Ezk 5:13

Ezekiele 6:13

Mitindami

  • +Ezk 12:15
  • +Yir 8:2
  • +Ezk 20:28

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Ezk. 6:4Yis 27:9
Ezk. 6:4Le 26:30
Ezk. 6:5Yir 8:1, 2
Ezk. 6:6Yir 2:15; 32:29; Mik 3:12
Ezk. 6:6Ezk 16:39
Ezk. 6:7Yir 14:18
Ezk. 6:7Ezk 7:4
Ezk. 6:8Yir 30:10; 44:28; Ezk 14:22
Ezk. 6:9Mib 30:1, 2; Nz 137:1
Ezk. 6:9Nz 78:40, 41; Yis 63:10
Ezk. 6:9Mit 15:39
Ezk. 6:9Ezk 20:43; 36:31
Ezk. 6:10Ezk 33:29; Da 9:12; Zek 1:6
Ezk. 6:11Yir 15:2; 16:4; Ezk 5:12
Ezk. 6:12Ezk 5:13
Ezk. 6:13Ezk 12:15
Ezk. 6:13Yir 8:2
Ezk. 6:13Ezk 20:28
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Ezekiele 6:1-14

Ezekiele

6 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya bangomba ya Yisraele mpe sakolá mpasi oyo ekokómela bango. 3 Osengeli koloba boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso: Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba, bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku: “Talá! Nazali kotinda mopanga mpo ebɛta bino, nakobebisa bisika na bino oyo etombwaná. 4 Bitumbelo na bino ekotikala mpamba, bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekobukana,+ mpe nakobwaka bato na bino oyo babomami liboso ya bikeko na bino ya bosɔtɔ.*+ 5 Nakobwaka bibembe ya bato ya Yisraele liboso ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.+ 6 Na bisika na bino nyonso ya kofanda, bingumba ekobebisama,+ mpe bisika oyo etombwaná ekotikala mpamba, mpe ekobebisama.+ Bitumbelo na bino ekotikala mpamba mpe ekobukana, bikeko na bino ya bosɔtɔ ekosuka, bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekokweisama mpe misala na bino ekolongolama. 7 Bato oyo bakobomama, bibembe na bango ekokwea na kati na bino,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+

8 “‘“Kasi nakotika ndambo ya bato oyo babiki, mpo ndambo na kati na bino bakobika na mopanga na kati ya bikólo ntango bokopalanganisama na kati ya mikili.+ 9 Mpe bato oyo bakobika bakokanisa ngai na kati ya bikólo epai bamemaki bango bakangami,+ bakoyeba ete motema na ngai epasukaki mpo bazangaki bosembo,* bapesaki ngai mokɔngɔ,+ bazalaki na mposa makasi ya* bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ Bakoyoka nsɔni mpe mabe mpenza* mpo na makambo nyonso oyo basalaki ya mabe mpe oyo eyinamá.+ 10 Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova mpe ete mpasi oyo nalobaki nakobimisela bango ezali mpamba te.”’+

11 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bɛtá mabɔkɔ na yo mpe tutatutá na lokolo na yo, lelá mpo na makambo nyonso ya mabe mpe oyo eyinamá oyo bato ya Yisraele basali, mpo bakokufa na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe.+ 12 Moto oyo azali mosika, akokufa na maladi mabe, oyo azali pene, akokufa na mopanga mpe moto nyonso oyo abiki na yango mpe atikali, akokufa na nzala, nakosopela mpenza bango nkanda makasi na ngai.+ 13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango bato na bango oyo babomami bakolala na kati ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, zingazinga ya bitumbelo na bango,+ likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná, na bansɔngɛ nyonso ya bangomba, na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa mpe na nse ya nzete nyonso ya monene ya nkasa mingi, esika bapesaki bambeka ya nsolo kitoko mpo na kokitisa motema ya bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ 14 Nakosembolela bango lobɔkɔ na ngai mpe nakokómisa mokili yango esika oyo etikali mpamba, mpe bisika na bango nyonso ya kofanda ekotikala mpamba koleka esobe oyo ezali pene ya Dibla. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto