Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 14
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 2 Ntango

      • Liwa ya Abiya (1)

      • Asa, mokonzi ya Yuda (2-8)

      • Asa alongi bato ya Etiopi milio moko (9-15)

2 Ntango 14:1

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “alalaki na liwa esika moko na bankɔkɔ na ye.”

Mitindami

  • +2Sa 5:9

2 Ntango 14:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Mib 7:5
  • +Kob 23:24
  • +1Ba 14:22, 23; 2Ba 18:1, 4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/2009, lok. 12

2 Ntango 14:5

Mitindami

  • +2Nt 34:1, 4

2 Ntango 14:6

Mitindami

  • +2Nt 11:5
  • +2Nt 15:15; Mas 16:7

2 Ntango 14:7

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baporte ya bizipeli mibale.”

Mitindami

  • +2Nt 32:2, 5
  • +Nz 127:1

2 Ntango 14:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Mbala mingi babɛti-makula nde bazalaki kosimba yango.

  • *

    Lil., “mpe kogumba litimbo.”

Mitindami

  • +2Nt 11:1, 12; 13:3

2 Ntango 14:9

Mitindami

  • +2Nt 16:8
  • +Yos 15:20, 44; 2Nt 11:5, 8

2 Ntango 14:11

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “bazali mingi.”

  • *

    Lil., “toyekameli yo.”

Mitindami

  • +Kob 14:10; 1Nt 5:20; 2Nt 32:20
  • +Bas 7:7; 1Sa 14:6
  • +2Nt 13:12; 32:7, 8
  • +1Sa 17:45; Nz 20:5; Mas 18:10
  • +Yos 7:9; Nz 9:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/8/2012, nk. 8-9

2 Ntango 14:12

Mitindami

  • +Mib 28:7

2 Ntango 14:13

Mitindami

  • +Eb 20:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

2 Nt. 14:12Sa 5:9
2 Nt. 14:3Mib 7:5
2 Nt. 14:3Kob 23:24
2 Nt. 14:31Ba 14:22, 23; 2Ba 18:1, 4
2 Nt. 14:52Nt 34:1, 4
2 Nt. 14:62Nt 11:5
2 Nt. 14:62Nt 15:15; Mas 16:7
2 Nt. 14:72Nt 32:2, 5
2 Nt. 14:7Nz 127:1
2 Nt. 14:82Nt 11:1, 12; 13:3
2 Nt. 14:92Nt 16:8
2 Nt. 14:9Yos 15:20, 44; 2Nt 11:5, 8
2 Nt. 14:11Kob 14:10; 1Nt 5:20; 2Nt 32:20
2 Nt. 14:11Bas 7:7; 1Sa 14:6
2 Nt. 14:112Nt 13:12; 32:7, 8
2 Nt. 14:111Sa 17:45; Nz 20:5; Mas 18:10
2 Nt. 14:11Yos 7:9; Nz 9:19
2 Nt. 14:12Mib 28:7
2 Nt. 14:13Eb 20:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Ntango 14:1-15

Mokanda ya mibale ya Ntango

14 Na nsima Abiya akufaki* mpe bakundaki ye na Sité ya Davidi;+ mpe mwana na ye Asa akómaki mokonzi na esika na ye. Na boyangeli na ye, ekólo ezalaki na kimya mbula zomi.

2 Asa asalaki makambo oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye. 3 Alongolaki bitumbelo+ ya bapaya mpe bisika oyo etombwaná, abebisaki makonzí ya losambo+ mpe akataki banzete ya losambo.*+ 4 Lisusu, ayebisaki bato ya Yuda báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe bátosa Mobeko mpe mitindo na ye nyonso. 5 Bongo alongolaki na bingumba nyonso ya Yuda bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo ya mpaka ya malasi;+ mpe na nse ya boyangeli na ye, bokonzi ya Yuda ezalaki na kimya. 6 Atongaki bingumba ya makasi na Yuda,+ mpo ekólo ezalaki na kimya; mpe etumba ata moko te ebimelaki ye na bambula yango, mpo Yehova apesaki ye bopemi.+ 7 Alobaki na bato ya Yuda boye: “Tótonga bingumba oyo mpe tózinga yango na bifelo, manɔ́ngi,+ baporte* mpe bikangiseli. Ekólo ezali naino na mabɔkɔ na biso, mpo toluki Yehova Nzambe na biso, toluki ye mpe apesi biso bopemi epai na epai.” Bongo balongaki kotonga yango nyonso.+

8 Asa azalaki na limpinga ya basoda 300 000 na Yuda oyo bazalaki na banguba minene mpe makɔnga. Mpe na libota ya Benyamina, azalaki na bilombe ya etumba 280 000 oyo bazalaki komema banguba mike* mpe kobunda na matimbo.*+

9 Na nsima, Zera moto ya Etiopi ayaki na limpinga ya basoda 1 000 000 mpe makalo 300 mpo na kobunda na bango.+ Ntango akómaki na Maresha,+ 10 Asa abimaki kobunda na ye. Batandamaki na molɔngɔ mpo na kobunda na Lobwaku ya Zefata, na Maresha. 11 Bongo Asa abelelaki Yehova Nzambe+ na ye mpe alobaki: “Ee Yehova, yo osalisaka kaka, ezala bato oyo ozali kosalisa bazali na makasi* to bazali na makasi te.+ Ee Yehova Nzambe na biso, salisá biso mpo totyeli yo motema,*+ mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo.+ Ee Yehova, ozali Nzambe na biso. Kotika te ete moto, mowei mpamba, alonga yo.”+

12 Bongo Yehova asalaki ete Asa mpe bato ya Yuda bálonga bato ya Etiopi, mpe bato ya Etiopi bakimaki.+ 13 Asa ná bato na ye balandaki bango tii na Gerare,+ mpe babomaki bato ya Etiopi tii ata moko te atikalaki na bomoi; mpo Yehova ná limpinga na ye basilisaki bango nyonso. Nsima na yango, bato ya Yuda bamemaki ebele ya biloko oyo bapunzaki. 14 Lisusu, babundisaki bingumba nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Gerare, mpo bafandi ya bingumba yango bayokaki nsɔmɔ mpo na Yehova, bapunzaki bingumba nyonso, mpo biloko ya kopunza ezalaki mingi na bingumba yango. 15 Babebisaki mpe bahema ya babateli ya bibwɛlɛ, mpe bakangaki bitonga ebele ya bampate mpe ya bakamela. Nsima na yango, bazongaki na Yerusaleme.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto